Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/6 nk. 12-13
  • Yehova afungoli miso na ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova afungoli miso na ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi na Kinshasa
  • Bomoi na ngai ekómi lisusu na esengo
  • Yehova apesi ngai “miso” mosusu
  • Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Jéhovah apesaki ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kokufa miso
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/6 nk. 12-13

Yehova afungoli miso na ngai

Lisolo ya Patrice Oyeka

Mokolo moko na mpokwa, lokola nalekisaki lisusu mokolo mobimba na molili, miso ezali komona te mpe kaka ngai moko, nazalaki kolanda bansango na radio. Nazwaki ekateli ya komiboma mpo nalongwa na mpasi. Natyaki pwazɔ na kɔpɔ ya mai mpe natyaki yango na mesa liboso na ngai. Nalingaki kosukola nzoto mbala ya nsuka, na nsima nalata kitoko liboso namɛla pwazɔ yango mpe nakufa. Mpo na nini nalingaki komiboma? Mpe ndenge nini nazali na bomoi tii lelo mpo na kobɛta lisolo oyo?

NABOTAMÁ mokolo ya 2 Febwali 1958, na etúká ya Kasaï Oriental, na République Démocratique du Congo. Tata na ngai akufaki ntango nazalaki na mbula 9 mpe yaya na ngai ya mobali nde abɔkɔlaki ngai.

Ntango nasilisaki kelasi, nazwaki mosala na kompanyi ya bilanga ya ndembo. Na 1989, mokolo moko na ntɔngɔ, ntango nazalaki kobongisa lapolo moko na biro na ngai, na mbalakaka miso na ngai ezalaki lisusu komona eloko te. Na ebandeli, nakanisaki ete kura ekei, kasi nazalaki koyoka makɛlɛlɛ ya motɛrɛ na yango mpe ezalaki naino ntɔngɔ! Nayokaki nsɔmɔ, nayebaki ete nakoki lisusu komona ata eloko moko te, ezala bapapye oyo ezalaki liboso na ngai!

Na mbala moko, nabengaki moko ya bato oyo nazalaki kokamba mpo amema ngai epai ya monganga ya kompanyi. Mobali yango alobaki ete bámema ngai na engumba, epai ya monganga oyo ayebi malamu mosala wana. Lokola monganga yango amonaki ete miso na ngai ebebi mpenza, atindaki ngai na Kinshasa.

Bomoi na Kinshasa

Na Kinshasa, nakutanaki na minganga ndenge na ndenge oyo basalisaka maladi ya miso, kasi moko te alongaki kobikisa ngai. Nsima ya kolekisa mikolo 43 na lopitalo, minganga balobaki ete nakomona lisusu te bomoi na ngai mobimba! Na nsima, bandeko na ngai bakendaki na ngai na mangomba ndenge na ndenge mpo bábikisa ngai na likamwisi, kasi milende na bango ekendaki na mai.

Nsukansuka, elikya nyonso oyo nazalaki na yango ya komona lisusu, esilaki. Makambo nyonso ekómaki mabe na bomoi na ngai. Miso na ngai ekufaki, mpe mosala na ngai esilaki. Mwasi na ngai mpe asundolaki ngai mpe amemaki biloko nyonso ya ndako. Nakómaki koyoka nsɔni kobima libanda to kozala elongo na bato mosusu. Nakómaki kofanda kaka na ndako mpo na kokima bato. Nakómaki kofanda kaka ngai moko, mpe nazalaki komimona lokola nazali na ntina ata moke te.

Nalukaki komiboma mbala mibale mobimba. Mbala ya mibale oyo nalingaki komiboma nalobeli yango na ebandeli ya lisolo oyo. Mwana moko ya moke ya libota na biso nde abikisaki ngai. Kozanga koyeba, azwaki kɔpɔ yango mpe asopaki pwazɔ yango na mabele ntango nazalaki kosukola. Nzambe mersi ndenge amɛlaki yango te. Kasi, nayokaki mabe mpenza ndenge nakutaki kɔpɔ yango te. Na nsima, nayebisaki bandeko na ngai ntina oyo nazalaki koluka kɔpɔ yango mpe likambo oyo nalingaki kosala.

Natɔndaka Nzambe mpe bandeko na ngai ndenge basalisaka ngai. Natikaki makanisi ya komiboma.

Bomoi na ngai ekómi lisusu na esengo

Na 1992, mokolo moko ya lomingo, nafandaki na ndako nazali komɛla likaya, Batatoli mibale ya Yehova bazalaki kosakola ndako na ndako mpe bayaki epai na ngai. Ntango bamonaki ete nakufá miso, batángelaki ngai Yisaya 35:5 oyo elobi ete: “Na ntango yango miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama.” Nayokaki esengo mingi na motema ntango nayokaki maloba wana! Na kokesana na oyo nayokaki na mangomba kilikili oyo nakendaki, Batatoli balobaki te ete bakobikisa ngai na likamwisi. Kutu, bayebisaki ngai ete nakomona lisusu na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, soki kaka nayekoli koyeba Nzambe. (Yoane 17:3) Nabandaki mbala moko koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova na buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Nabandaki mpe koyangana na makita nyonso na Ndako ya Bokonzi mpe nabongolaki bomoi na ngai. Natikaki komɛla likaya.

Kasi, lokola nazalaki komona te, yango ezalaki kopekisa ngai nakola na elimo. Yango wana, nakɔtaki kelasi ya bato oyo bakufá miso mpo nayeba kotánga mpe kokoma na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Yango esalisaki ngai nazwa formasyo ya mosala ya kosakola oyo epesamaka na Ndako ya Bokonzi. Eumelaki te, nakómaki kosakola na kartye na biso. Bomoi na ngai ekómaki lisusu na esengo. Nakobaki kokola na elimo mpe napesaki Yehova bomoi na ngai. Nazwaki batisimo mokolo ya 7 Mai 1994.

Lokola nakómaki kolinga Yehova mingi mpe bato, nayokaki mposa ya kokóma mobongisi-nzela ndenge Batatoli babengaka bato oyo balekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola. Nabandaki mosala yango mokolo ya 1 Desɛmbɛ 1995. Nazwaki mpe libaku ya kokóma nkulutu na lisangá na sanza ya Febwali 2004. Ntango mosusu, babengisaka ngai mpo na kosala badiskur na masangá mosusu. Mapamboli nyonso wana epesaka ngai esengo mingi mpe esalisaka ngai namona ete mokakatano moko te ekoki kopekisa mposa na biso ya kosalela Yehova Nzambe.

Yehova apesi ngai “miso” mosusu

Ndenge nalobaki yango liboso, mwasi na ngai asundolaki ngai mpo miso na ngai ekufaki. Kasi, Yehova apamboli ngai mingi lisusu koleka. Apesi ngai miso mpo namona na ndenge mosusu. Atako nakufá miso, Anny Mavambu andimaki kokóma mwasi na ngai, ye nde akómá miso na ngai. Lokola ye mpe alekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola, abimaka ntango nyonso elongo na ngai na mosala yango. Atángelaka ngai mpe badiskur oyo nakosala mpo nakoma yango na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Azali mpenza lipamboli mpo na ngai. Mpo na ye, namoni ete maloba ya Masese 19:14 ezali mpenza solo, elobi boye: “Libula oyo eutaka na batata nde ndako ná bomɛngo, kasi mwasi ya mayele autaka na Yehova.”

Yehova apamboli mpe ngai ná Anny ndenge apesi biso bana mibale, ya mwasi ná ya mobali. Nazali na mposa makasi ya komona bilongi na bango na Paradiso! Lipamboli mosusu ezali ete yaya na ngai ya mobali, oyo na boboto nyonso andimaki tófanda na ndako na ye, andimaki mpe koyekola Biblia mpe azwá batisimo! Biso nyonso tozali na lisangá moko.

Atako namonaka te, mposa ya motema na ngai ezali ya kosalela Nzambe mingi lisusu mpo apamboli ngai mingi mpenza. (Malaki 3:10) Mikolo nyonso nabondelaka ete Bokonzi na ye eya mpo na kolongola bampasi nyonso awa na mabele. Lokola nayebá Yehova, nakoki mpenza koloba boye: “Lipamboli ya Yehova​—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.”​—Masese 10:22.

[Bililingi na lokasa 13]

Nazali kosala diskur; elongo na libota na ngai mpe yaya na ngai ya mobali

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto