Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/7 nk. 30-31
  • Nzambe oyo ayinaka kozanga bosembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe oyo ayinaka kozanga bosembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/7 nk. 30-31

Mpo na bilenge

Nzambe oyo ayinaka kozanga bosembo

Malako: Salá devuare oyo na esika moko ya kimya. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozali wana ntango makambo yango ezali kosalema. Salá lokola ozali komona makambo yango na makanisi, ozali koyoka mingongo, mpe luká komitya na esika ya bato oyo bazali kolobela. Salá lokola nde likambo yango ezali kosalema sikoyo.

Bato oyo balobeli: Ahaba, Yezabele, Nabote, mpe Eliya

Na mokuse: Mpo na mwasi na ye Yezabele, Mokonzi Ahaba abomi moto mpo na kozwa elanga ya vinyo.

1 TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ 1 BAKONZI 21:1-26.

Na makanisi na yo, okanisi ete bato minei oyo balobelami na lisolo oyo bazali komonana ndenge nini?

Ahaba ․․․․․

Yezabele ․․․․․

Nabote ․․․․․

Eliya ․․․․․

Okanisi ete mongongo ya Yezabele mpe ya Ahaba ezali koyokana ndenge nini na vɛrsɛ 5 tii 7?

․․․․․

Lobelá mobulu oyo ebimi na vɛrsɛ 13, ndenge ozali kokanisa.

․․․․․

Mongongo ya Eliya mpe ya Ahaba ezali koyokana ndenge nini ntango bazali kozongiselana maloba, ndenge ezali na vɛrsɛ 20-26?

․․․․․

2 KƆTÁ NA MOZINDO.

Bizaleli nini Yezabele amonisi na vɛrsɛ 7 mpe 25?

․․․․․

Bizaleli nini Ahaba amonisi na vɛrsɛ 4?

․․․․․

Mpo na kozwa elanga ya vinyo ya Nabote, Ahaba asengelaki koboma banani mosusu? (Tángá 2 Bakonzi 9:24-26.)

․․․․․

Na miso ya Yehova, Ahaba azalaki moto ya ndenge nini? (Tángá lisusu vɛrsɛ 25 mpe 26. Talá mpe 1 Bakonzi 16:30-33.)

․․․․․

3 SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Ndenge oyo Yehova ayebaka makambo ya kozanga bosembo.

․․․․․

Ndenge oyo Yehova akipaka bato oyo basaleli bango makambo na bosembo te.

․․․․․

Ndenge oyo Yehova amonisaka ete azali Nzambe moko ya bosembo. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:4.)

․․․․․

4 MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Lelo oyo, ndenge nini bato mosusu bakoki komonisa bizaleli lokola oyo ya Yezabele? (Tángá Emoniseli 2:18-21.)

․․․․․

Na makambo nini osengeli komonisa mpiko lokola oyo ya Eliya?

․․․․․

Osengeli kotya motema na likambo nini ntango basaleli yo likambo moko na bosembo te?

․․․․․

5 NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

Okoki kosala boye: Salá lokola ozali mopanzi-nsango mpe ozali kolobela makambo oyo esalemaki, salá lokola ozali kotuna mituna na bato oyo balobeli na lisolo yango mpe na baoyo bamonaki makambo yango.

Kɔtá na adrɛsi oyo www.jw.org

Tángá Biblia na Internet

Zwá lisolo oyo na Internet to bimisá yango

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto