Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/8 nk. 16-17
  • Ntango nini Yesu akómaki Mokonzi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango nini Yesu akómaki Mokonzi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • 1914—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bokonzi ya Nzambe eleki na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Badati ya Biblia emonisi nini mpo na mobu 1914?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bokonzi oyo ekosala Paradis
    Bokonzi oyo ekosala Paradis
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/8 nk. 16-17

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Ntango nini Yesu akómaki Mokonzi?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Bokonzi nini Nzambe alakaki Yesu?

Nzambe alakaki ete mokitani moko ya Mokonzi Davidi akofanda na kiti na Ye ya Bokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Mokitani yango ezali nde Yesu, mpe azali sikoyo koyangela na likoló lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe.​—Tángá Nzembo 89:4; Luka 1:32, 33.

Ntango Davidi azalaki naino mwana, Nzambe aponaki ye azala mokonzi ya libota na ye Yisraele. Ntango Davidi akufaki, Salomo, oyo Yehova aponaki, afandaki na “kiti ya bokonzi ya Yehova.” (1 Ntango 28:4, 5; 29:23) Nsima ya liwa ya Salomo, bakonzi mingi bayangelaki na Yerusaleme, kasi, mingi na bango bazalaki sembo te. Nsukansuka, Yehova apesaki nzela ete mampinga ya basoda ya Babilone ebebisa Yerusaleme mpe elongola mokonzi na yango na kiti ya bokonzi. Likambo yango esalemaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Bandá ntango wana, mokonzi moko te ya libota ya Davidi ayangelaki lisusu na engumba Yerusaleme.​—Tángá Ezekiele 21:27.

2. Na boumeli ya ntango boni Bokonzi ya Nzambe ezalaki lisusu te na moto oyo azalaki komonisa yango awa na mabele?

Mwa moke nsima ya kobebisama ya Yerusaleme, Yehova ayebisaki mosakoli Danyele ete Nzambe akopona mokonzi oyo akoyangela uta na likoló. Ntango nini bokonzi yango ekobanda koyangela?​—Tángá Danyele 7:13, 14.

Danyele alimbolaki emonaneli moko oyo Nzambe apesaki mitindo ete bákata nzete moko monene, ndenge kaka Nzambe apesaki mitindo ete Yerusaleme eyangelama lisusu te mpe ebebisama. Kasi misisa ya nzete esengelaki kotikala na mabele mpo nsima ya “ntango nsambo” ekobota lisusu. Biblia emonisi ete “ntango” misato na ndambo ekokani na mikolo 1 260, boye, “ntango nsambo” ekokani na mikolo 2 520. (Emoniseli 12:6, 14) Na bisakweli ya Biblia, mbala mingi, basalelaka mikolo mpo na kolobela bambula. (Mitángo 14:34) Na yango, Bokonzi ya Nzambe esengelaki kozanga mokonzi na boumeli ya bambula 2 520.​—Tángá Danyele 4:10-17.

3. Ntango nini Yesu akómaki Mokonzi?

Nzambe akómisaki Yesu Mokonzi na likoló na mobu 1914, mbula 2 520 nsima mpenza ya kobebisama ya Yerusaleme. Likambo ya liboso oyo Yesu asalaki ntango akómaki Mokonzi ezalaki ya kobengana Satana ná bademo na ye na likoló. (Emoniseli 12:7-10) Bato bamonaki te likambo yango na miso, kasi bamonaki mpasi oyo yango ebimisaki. (Emoniseli 12:12) Makambo oyo esalemi kobanda mobu 1914 emonisi ete Yesu akómaki mokonzi na mbula yango.​—Tángá Matai 24:14; Luka 21:10, 11, 31.

4. Bokonzi ya Yesu ezali na ntina nini mpo na yo?

Kokokisama ya bisakweli etali boyangeli ya Yesu emonisi ete okoki kotyela Liloba ya Nzambe motema. Mosika te, Yesu akosalela nguya ya Bokonzi na ye mpo na kosilisa bampasi nyonso ya bato.​—Tángá Nzembo 72:8, 12, 13; Danyele 2:44.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá nkasa 215-218 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda na nkasa 16, 17]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Ɔkɔtɔbɛ

Mobu 607 L.T.B. ← Mbula 2 520 → 1914 T.B.

1000 L.T.B. | 1 L.T.B. | 1 T.B. | 1000 T.B. | 2000 T.B.

← Mbula 606,25 →← Mbula 1 913,75 →

Boyangeli na Yerusaleme ebebisami

Yo moko salá kalkile: 606,25 + 1 913,75 = 2 520

Nzambe atye Yesu Mokonzi, apesi ye nguya likoló ya bikólo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto