Mateya ya Biblia mpo na bana
MBULA 3 TII NA NSE
Kalebe ayoki ete moninga na ye azali maladi.
Yango wana, alobi ete: “Nayebi eloko nakosala.
Nakokomela ye mokanda mpo amiyoka malamu, mpe na nsima, nakotindela ye yango!”
Monisá boboto, mpe bino nyonso mibale bokozala na esengo! 1 Petro 3:8
MALAKO MPO NA BABOTI
Sɛngá mwana na yo alakisa:
Ndako
Mesa
Kalebe
Moi
Nzete
Ndɛkɛ
Lobelá moninga moko oyo azali kobɛla mpe sololá na mwana na yo ndenge oyo bokoki kosala mpo na kolendisa moto yango.