Kelasi ya mbala ya 132 ya Gileade
Bato oyo bakɔtelaka solo
MOKOLO ya 10 Marsi 2012 ezalaki mokolo moko ya ntina mingi na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na etúká ya New York. Bankóto ya bato oyo balataki malamu mpe bapaya oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge, bayanganaki na likita ya kopesa badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 132 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Mingi na kati na bango batondisaki ndako ya makita ya Patterson; bamosusu bayanganaki na babiro mosusu ya Batatoli ya Yehova mpo na kolanda programɛ yango na nzela ya video. Bato 9 042 bayanganaki na likita yango.
Bayangani bazalaki mitema likoló. Na kokesana na bana-kelasi mosusu oyo bakɔtaki na Eteyelo ya Gileade na bambula oyo eleki, bana-kelasi nyonso ya mbala ya 132 ya Gileade bazalaki kosala mosala ya ntango nyonso; bamosusu bazalaki bandeko ya libota ya Betele, bamosusu bazalaki babongisi nzela minene, basusu bazalaki bakɛngɛli-batamboli to mpe bamisionɛrɛ—atako bakɔtaki naino te Eteyelo ya Gileade. Makambo nini bakokaki koloba na bana-kelasi yango oyo bazali na eksperiansi mingi?
Eumelaki te mpo bayangani báyeba yango. Ndeko Gerrit Lösch, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova mpe oyo azalaki prezida ya likita yango, asalaki diskur ya ebandeli. Atunaki motuna moko oyo ebendaki likebi ya bayangani: “Okɔtelaka solo?” Amonisaki ete bakristo bazali bato oyo bakɔtelaka solo, elingi koloba mateya nyonso ya bokristo. Kokɔtela solo esuki kaka te na koteya yango epai ya bato, kasi mpe kosalisa bango bálinga solo.
Ndeko Lösch atunaki motuna oyo: “Ndenge nini toyebi ete tozali na solo?” Amonisaki ete ezali te mpo na motángo ya bato oyo bazali kondima yango. Atako lelo oyo bamilio ya bato bandimi losambo ya pɛto, bato kaka moke nde bandimaki yango na pantekote ya mobu 33. Atángaki makambo mitano oyo esalisi biso tóyeba ete tozali na solo: (1) Tokobaka kolanda mateya ya Yesu, (2) Tolinganaka, (3) Totosaka mitinda ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu, (4) tokɔtaka te na makambo ya mobulu ya mokili oyo, mpe (5) tomemi nkombo ya Nzambe.
“Bókoba kolanda nzela ya malamu mpe kotosa malako”
Ntango ndeko Geoffrey Jackson oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova amataki na pipitre ná valize moko na mabɔkɔ, bayangani bamitunaki soki likambo nini ekosalema na nsima! Motó ya likambo ya diskur na ye ezalaki: “Bókoba kolanda nzela ya malamu mpe kotosa malako,” oyo eutaki na Yisaya 50:5. Vɛrsɛ yango oyo elobeli esakweli moko oyo etali Yesu Kristo; elobi boye: “Ngai natombokaki te. Nabalukaki na ngámbo mosusu te.”
Ndeko Jackson alendisaki bana-kelasi ete básosolaka nokinoki litambwisi oyo Yehova azali kopesa bango na nzela ya elimo santu na ye, na Biblia mpe na nzela ya lisangá na ye. Na lisese ya batalanta, oyo ezali na Matai 25:14-30, moombo mokomoko azwaki motángo ya talanta ndenge moko na baombo mosusu nyonso, elingi koloba, moombo mokomoko azwaki talanta na kotalela makoki na ye. Basengelaki kosala nyonso oyo ezalaki na makoki na bango. Baombo mibale bazwaki longonya mpe babengamaki ‘baombo malamu mpe ya sembo.’ Kozala sembo ezali kaka te mpo na matomba oyo emonanaka, kasi nde na kokoba kolanda nzela ya malamu mpe kotosa malako.
Moombo ya misato abengamaki “moombo mabe mpe gɔigɔi” mpe “moombo mpamba.” Asalaki nini? Akundaki talanta na ye. Talanta ezalaki mbongo ya ebende te, ekokanaki nde na motángo ya denari 6 000, oyo ekokaki kozala na kilo 20. Yango nde kilo oyo bapesaka moto nzela ya komema na valize na ye ntango azali kosala mobembo na mikili ya bapaya. Esɛngaki milende mpo na kokunda eloko moko oyo monene na yango ekokani na valize. Boye, moombo yango asalaki eloko moko—akundaki talanta yango—kasi yango ezalaki te likambo oyo basɛngaki ye asala. Ndenge moko, misionɛrɛ akoki kozala na mosala mingi—kasi mosala mingi na makambo nini? Na kokomela baninga mpe bato ya libota, kokɔta na Internet, kobɛta masolo to kosala mombongo? Moto ya ndenge wana akoki kolɛmba mpenza na nsuka ya mokolo na nsima ya kosala misala ya ndenge wana, kasi, asali te makambo oyo basɛngaki ye asala. Ndeko Jackson asukisaki diskur na ye boye: “Bólandaka malako ntango nyonso!”
“Kotyela Yehova ntembe ata moke te”
Yango nde motó ya likambo ya diskur oyo ndeko Anthony Morris ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova asalaki. Alobaki boye: “Biblia elobá ata mbala moko te ete kondima mpe ntembe etambolaka nzela moko. Kondima ná ntembe eyokanaka te.” Satana alongaki kokɔtisa ntembe na makanisi ya Eva, mwasi ya kokoka; boye, akoki mpe kokɔtisa ntembe na makanisi na biso. Ndeko Morris alobaki boye: “Leisá kondima na yo mpe bantembe ekokufa na nzala.” Abendaki likebi ya bayangani na lisolo ya Petro, oyo ‘atambolaki likoló ya mai’ kasi na nsima, ntango “amonaki mopɛpɛ makasi,” abangaki mpe abandaki kozinda. Ntango amonaki ye, Yesu atunaki ye boye: “Mpo na nini obandaki kotya ntembe?” (Matai 14:29-31) Ndeko Morris abakisaki boye: “Ntango nyonso oyo bino bamisionɛrɛ bokozala na mingi ya kosala na mosala na bino ya ntango nyonso, basusu bakoki kokamwa na oyo bozali kosala, ekozala nde lokola bozali kotambola likoló ya mai, kasi, ntango mopɛpɛ makasi ekobɛta, bóbanda kotya ntembe te.”
Ndeko Morris alobaki lisusu ete atako kokutana na mikakatano oyo ezali lokola mopɛpɛ makasi ekoki kozala mpasi, nsukansuka mopɛpɛ yango ekoleka. Mpo na mikakatano, ndeko Morris alendisaki bana-kelasi batalela makambo oyo Paulo ná Silasi basalaki ntango bakɔtisaki bango na bɔlɔkɔ na Filipi. Misala 16:25 elobi boye: “Pene na katikati ya butu, Paulo ná Silasi bazalaki kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo; ɛɛ, bato ya bolɔkɔ bazalaki koyoka bango.” Bosimba likambo oyo: Basukaki kaka te na kobondela, kasi bayembaki mpe. Bayembaki na mongongo makasi mpenza mpe bato mosusu ya bɔlɔkɔ bayokaki yango. Ndeko Morris alobaki ete mingi kati na biso tozali na mingongo ya malamu te mpo na koyemba kasi tosengeli te kokanga monɔkɔ mpo na koyemba, mingimingi ntango tozali na mikakatano. Ndeko Morris asukisaki lisolo na ye na botángi ya maloba ya loyembo 135 “Tóyika mpiko tii na nsuka” oyo ezwami na buku Tóyembela Yehova.
Badiskur mosusu ya kolendisa
“Okosepela koumela mikolo mingi?” ezalaki motó ya likambo ya diskur ya ndeko Robert Luccioni, oyo asalaka na Departema ya kosomba biloko. Motó ya likambo ya diskur yango eutaki na maloba ya Mokonzi Davidi oyo ezali na Nzembo 34:12. Diskur ya ndeko Luccioni emonisaki ndenge ya kolonga na ntango ya mikakatano mpe kokoba kozala na boyokani malamu elongo na Yehova. Lisolo oyo ezali na 1 Samwele mokapo 30 ekoki koteya biso makambo mingi. Ntango Davidi ná mibali oyo bazalaki elongo na ye mpe mabota na bango bazalaki kokima Mokonzi Saulo, bakendaki kofanda na mboka Ziklage. Ntango etuluku ya Baamaleki bakangaki na boombo bato ya mabota na bango, mibali yango bapesaki Davidi foti mpe balingaki kobamba ye mabanga. Davidi asalaki nini? Alɛmbaki nzoto te kasi “azwaki makasi mpo na Yehova Nzambe na ye.” (1 Samwele 30:6) Asɛngaki litambwisi ya Yehova, alandaki litambwisi yango mpe abikisaki bakangami yango. Ndeko Robert Luccioni amonisaki bana-kelasi ete soki batyeli Yehova motema ndenge wana mpe balandi litambwisi na ye, bakosepela koumela mikolo mingi. Bakozala na bomoi moko ya malamu mpo na libaku kitoko oyo bazwi.
“Kanisá mikolo malamu oyo ekoya nsima ya mpasi ya ntango mokuse” ezalaki motó ya likambo ya diskur oyo ndeko Michael Burnett moko ya balakisi ya Eteyelo ya Gileade asalaki. Bayisraele bazalaki kokabola butu na biteni misato ya bokɛngɛli, kobanda na kolala ya moi tii na kobima na yango, oyo mokomoko na yango ezalaki na ngonga soki minei. Eteni ya nsuka, oyo ezalaki kobanda na ngonga ya mibale tii na ngonga ya motoba ya ntɔngɔ, ezalaki ntango moko ya molili mpe ya malili makasi; yango nde ntango oyo elekaki mpasi mpo moto akɛngɛla. Mokomi ya nzembo azalaki kotondisa makanisi na ye na maloba ya Yehova na boumeli ya ntango ya nsuka ya kokɛngɛla na butu, mpo alala mpɔngi te. (Nzembo 119:148) Ndeko Burnett ayebisaki bana-kelasi ete ‘basengeli kokɛngɛla, mpamba te ekozala na mikolo mosusu oyo bakolɛmba nzoto mpenza mpe bakokutana na mikakatano lokola oyo Davidi akutanaki na yango na boumeli ya ntango oyo azalaki kokɛngɛla na butu. Basengeli koyeba liboso likambo oyo bakosala mpo na kolonga ntango bakokutana na makambo oyo ekolɛmbisa bango nzoto.’ Na nsima, akundwelaki bango ete basengeli kokoba koyekola Biblia na mozindo mpo bákoba kokɛngɛla na elimo. Ndeko Burnett apesaki ndakisa oyo: “Bobondelaka Yehova mikolo nyonso mpo bolingi ete azala moninga na bino. Boye, botika ete Yehova alobaka na bino mikolo nyonso na nzela ya Biblia mpo azali moninga na bino. Mosika te, mikakatano oyo tozali kokutana na yango ekosila, yango wana, bómibongisa na ndenge oyo bokosalela mikolo oyo ezali liboso na bino, mpe yango ekosalisa bino bókanisa mikolo malamu oyo ekoya nsima ya mpasi ya ntango mokuse.”
“Bobongisami mpo na mosala oyo ezali kozela bino,” oyo ezwami na 1 Petro 5:10, ezalaki motó ya likambo oyo ndeko Mark Noumair molakisi mosusu ya Eteyelo ya Gileade aponaki. Atunaki bana-kelasi motuna oyo: “Lokola bozali baministre oyo bozali na eksperiansi, mpo na nini babengisi bino na Esika monene ya mateya ya Watchtower?” Eyano: “Mpamba te boyebi malamumalamu mosala na bino. Bato mingi oyo bayebi mosala bazwaka konje na mosala mpo na kokɔta kelasi mpo bákolisa makoki na bango. Na boumeli ya mbula mitano oyo eleki, Yehova atɛlɛmisaki bino ‘ngwi’ mpe ‘makasi’ na nzela ya boyekoli mozindo ya Liloba na ye mpe na nzela ya lisangá na ye mpo bókoka komema mikumba minene oyo bozali kozwa. Mabaya oyo ezali makasi ebebaka te, epasukaka te, mpe ekabwanaka te ata soki ememi kilo mingi. Ekomonana ete formasyo oyo bozwi esalisi bino ntango bokosala elongo na bandeko na bino epai bokokende. Mikakatano ekotinda bino bótika kolanda mitinda ya Nzambe to ekotinda bino nde bótikala ngwi, bólanda makambo oyo boyekoli na Liloba ya Nzambe? Eloko oyo ezali makasi ekoki komema kilo. Mabaya ekoki kozala makasi mpo na singa oyo bakangisi makasi na mabaya yango. Makasi na bino ekomonana na bansinga oyo esimbi bomoto na bino ya kati. Yehova amemi bino awa mpo na kokómisa bino makasi mpe bato oyo babongi kotyelama motema mpo na mosala oyo ezali kozela bino. Nzambe asali oyo akokaki kosala mpo na bino, tozali kobondela ete bókokisa mokumba na bino mpe bótika ete ‘Molakisi na bino Monene’ asilisa kopesa bino formasyo.”
Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna oyo batunaki bango
Ezalaka ntango nyonso likambo ya esengo koyoka bana-kelasi ya Gileade na likita ya kopesa badiplome, mpe esalemaki bongo. Na eteni moko ya programɛ, bana-kelasi basalaki bilakiseli ya makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bautaki na ekólo France, balekisaki bangonga motoba na libándá moko ya mpɛpɔ mpo na kozela ntango bazalaki koya na Eteyelo ya Gileade. Na restora moko na libándá ya mpɛpɔ, babandisaki lisolo elongo na mibali mibale oyo bazalaki mpe kozela mpɛpɔ. Ntango moko ya mibali yango alobaki azali moto ya Malawi, basololaki na ye na monɔkɔ ya Chichewa. Mobali yango akamwaki mpe atunaki bango soki bayebaki koloba monɔkɔ yango ndenge nini. Balobaki ete bazalaki bamisionɛrɛ na Malawi. Ntango mobali mosusu wana alobaki ete azali moto ya Cameroun, basololaki na ye na Français mpe mobali yango akamwaki. Mibali yango mibale bakómaki na limemya mingi mpo na Batatoli ya Yehova, mpe bamisionɛrɛ basakwelaki bango nsango malamu.
Ndeko Nicholas Ahladis oyo asalaka na Departema ya mosala ya kobongola, asololaki elongo na bandeko mibali mibale elongo na basi na bango. Ndeko moko ná mwasi na ye bakendaki na Australie mpo na kosala lokola bamisionɛrɛ na esanga Timor na ɛsti ya bisanga Indonésie, esika etumba engalaki makasi. Ndeko mosusu ná mwasi na ye balongwaki na Corée mpo na kokende kosala na engumba Hong Kong. Bandeko yango mibale elongo na basi na bango basepelaki kozonga lisusu na bamboka oyo bazalaki kosala mosala na bango ya misionɛrɛ mpo na kosalela makambo oyo bayekolaki na Eteyelo ya Gileade.
Nsima ya kopesa bana-kelasi badiplome, mwana kelasi moko atángaki mokanda ya botɔndi mpo na formasyo oyo bazwaki. Na nsima, na maloba na ye ya nsuka, ndeko Lösch asalelaki maloba kitoko ya elilingi mpo na kolendisa bana-kelasi. Alobaki ete solo ezali kitoko lokola monama, lokola liziba ya mai na esobe, lokola longo ya masuwa na kati ya mbu oyo mopɛpɛ ezali kobɛta makasi. Alobaki ete “koyeba solo ezali mpenza lipamboli. Bókɔtelaka solo, mpe bósalisa basusu bákɔtelaka yango.”
[Etanda/Karte na lokasa 31]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 12
Mwayene ya mbula ya kobotama: 36
Mwayene ya mbula ya batisimo: 20
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 15
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Batindami na mikili oyo ezali na nse:
EPAI BAMISIONƐRƐ BATINDAMI
BÉLIZE
BÉNIN
CAMBODGE
CAMEROUN
CAP VERT
CÔTE D’IVOIRE
ÉQUATEUR
ÉTATS-UNIS D’AMÉRIQUE
GABON
GÉORGIE
GUINÉE
HONG KONG
LIBÉRIA
MADAGASCAR
MALAWI
PÉROU
RÉPUBLIQUE DOMINICAINE
SAMOA
SAO TOMÉ ET PRÍNCIPE
TIMOR ORIENTAL
ZIMBABWE
[Elilingi na lokasa 31]
Kelasi ya mbala ya 132 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi, mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Iap, R.; Iap, J.; Ng, T.; Ng, P.; Laurino, F.; Laurino, B.; Won, S.; Won, S.
(2) Morales, N.; Morales, M.; Zanutto, J.; Zanutto, M.; Rumph, I.; Rumph, J.; Germain, D.; Germain, N.
(3) Atchadé, Y.; Atchadé, Y.; Thomas, C.; Thomas, E.; Estigène, C.; Estigène, P.
(4) Ehrman, D.; Ehrman, A.; Bray, J.; Bray, A.; Amorim, M.; Amorim, D.; Seo, Y.; Seo, Y.
(5) Simon, J.; Simon, C.; Seale, C.; Seale, D.; Erickson, J.; Erickson, R.
(6) McCluskey, D.; McCluskey, T.; Brown, A.; Brown, V.; Mariano, D.; Mariano, C.; Loyola, Y.; Loyola, C.
(7) Rutgers, P.; Rutgers, N.; Foucault, P.; Foucault, C.; Wunjah, J.; Wunjah, E.