Mituna ya batángi . . .
Namɛla makaya to te, etali Nzambe na nini?
▪ Moto akoki kotuna motuna wana na makanisi ya malamu, mpo mobeko moko te ya Biblia elobeli makaya. Yango elingi nde koloba ete ezali mpasi koyeba makanisi ya Nzambe na likambo yango? Te, soki moke te.
Biblia elobi ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Biblia ezali na mitinda ya polele oyo emonisi ndenge oyo Nzambe alingi tóbatelaka nzoto na biso. Ya liboso, tótalela naino oyo bato ya mayele bamoni mpo na ndenge oyo makaya esalaka na nzoto ya moto. Na nsima, tokotalela ndenge oyo mitinda ya Biblia eyokani na makambo oyo bango balobi.
Makaya ebebisaka nzoto ya moto oyo azali komɛla yango mpe koboya komɛla yango ekoki kopekisa ete moto akufa liwa ya mbalakaka. Na ekólo États-Unis, na kati ya bato mitano oyo bazali kokufa, moko azali kokufa mpo na makaya. Lapolo ya ebongiseli moko (Institut américain pour la prévention de la toxicomanie) emonisi ete na ekólo yango, makaya ezali koboma bato ebele mbula nyonso koleka motángo ya bato oyo bakufaka mpo na masanga, bilangwiseli, oyo babomaka bango, oyo bamibomaka, oyo bakufaka na makama ya mituka mpe sida.
Bato oyo bamɛlaka makaya basalaka basusu mabe. Kozala pene na moto oyo azali komɛla makaya ezali likama. Bato mingi (30%) oyo bamɛlaka makaya te kasi bamɛlaka milinga ya moto oyo azali komɛla makaya, bazalaka na likama ya kozwa kanser ya mimpululu mpe maladi ya motema. Na bambula oyo euti koleka, minganga bamoni mpe likama mosusu oyo eutaka na komɛla makaya. Yango eutaka na pwazɔ oyo ezalaka na kati ya makaya, soki milinga elimwe, pwazɔ yango etikalaka na bilamba, na tapi mpe na bisika mosusu oyo ezwaki milinga yango. Pwazɔ yango, ebebisaka kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bana mpe ekoki kobebisa likoki na bango ya koyekola makambo.
Makaya ekómisaka moto moombo. Moto oyo amɛlaka makaya akómaka moombo ya bizaleli oyo ebebisaka nzoto. Kutu, bato ya mayele bamoni ete nicotine, pwazɔ oyo ezalaka na kati ya makaya ekomisaka moto moombo, mpe ezalaka mpasi mingi mpo moto alongwa na boombo yango.
Ndenge nini mitinda ya Biblia eyokani na makambo wana? Talá makambo oyo elandi:
Nzambe alingi ete tózwa bomoi na valɛrɛ. Na Mobeko oyo apesaki Bayisraele, Nzambe amonisaki ete bato oyo balingi kosepelisa ye basengeli kozwa bomoi ya moto na valɛrɛ. (Kolimbola Mibeko 5:17) Bayisraele basengelaki kotonga efelo ya libateli na nsamba ya ndako na bango. Mpo na nini? Nsamba ezalaki patatalu mpe bazalaki kozwa mwa mopɛpɛ na esika yango. Efelo ezalaki kobatela libota mpe bato mosusu mpo bakwea te, bazoka te to mpe bakufa te. (Kolimbola Mibeko 22:8) Lisusu, Bayisraele basengelaki kokeba ete nyama na bango ememela bato mosusu likama te. (Kobima 21:28, 29) Moto oyo amɛlaka makaya abukaka mitinda oyo esimbi mibeko wana. Azali kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye na nko nyonso. Longola yango, makaya oyo azali komɛla ezali mpe kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato oyo bazali pene na ye.
Nzambe asɛngi ete tólinga ye mpe bazalani na biso. Yesu Kristo amonisaki ete bayekoli na ye basengeli kotosa mibeko mibale oyo eleki minene. Basengeli kolinga Nzambe na motema na bango mobimba, molimo na bango mobimba, na makanisi na bango nyonso mpe na makasi na bango nyonso mpe kolinga bazalani na bango lokola bango moko. (Marko 12:28-31) Lokola bomoi ezali likabo euti na Nzambe, moto oyo amɛlaka makaya amonisaka ete azangi limemya na likabo yango mpe ete alingaka Nzambe te. (Misala 17:26-28) Momeseno ya moto wana ekoki komemela bato mosusu mpasi makasi, mpe soki alobi ete alingaka mozalani na ye, amikosi.
Nzambe asɛngi ete tóboya bizaleli ya mbindo. Biblia esɛngi bakristo ete bámipɛtola “na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.” (2 Bakorinti 7:1) Emonani polele ete komɛla makaya ebebisaka nzoto ya moto. Bato oyo balingi kotika komɛla makaya mpo na kosepelisa Nzambe bazali na mokakatano monene. Kasi, na lisalisi ya Nzambe, bakoki kolongwa na boombo wana oyo ekómisaka moto mbindo.