Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/10 nk. 5-6
  • Moto akoki kozala sembo na mokili oyo etondi na kanyaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto akoki kozala sembo na mokili oyo etondi na kanyaka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Mobongisi-nzela ya mpiko
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Bosembo ememelaka moto matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/10 nk. 5-6

Moto akoki kozala sembo na mokili oyo etondi na kanyaka?

“Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—BAEBRE 13:18.

ATAKO tozali bato ya masumu, tofandi na mokili oyo mabe, mpe Zabolo azali kotya biso mpanzi likoló, tokoki kolonga! Ndenge nini? Soki tozali kopusana penepene na Nzambe mpe kosalela batoli ya Biblia, Liloba na ye, oyo esalisi bato mingi banda kala. Tótalela bandakisa mibale.

TOLI YA BIBLIA: “Bólanda bizaleli ya bato ya mokili oyo té.”​—Ba-romén 12:2, Bible na lingala ya lelo oyo.

Guilherme azali kosala makambo na bosembo na mosala

“Biblia esalisaki ngai namona litomba ya kozala sembo.”​—GUILHERME

Likambo moko oyo esalemaki mpenza: Guilherme azali mobali moko ya Brésil oyo mombongo na ye ezali kotambola malamu. Andimi ete kozala sembo ezali pɛtɛɛ te. Alobi boye: “Ezali mpasi te moto ya mombongo akóma na ezaleli ya kozanga bosembo, ntango mosusu mpo alingi kaka kompanyi na ye ezwa benefisi mingi to bakompanyi mosusu eleka yango te. Bato mingi bamonaka mabe te kozwa kanyaka to kopesa yango. Soki ozali moto ya mombongo oyo azali na mbongo mingi, ezali pɛtɛɛ te ozala sembo.”

Atako bongo, Guilherme alongaki kotikala sembo atako yango ezalaka pɛtɛɛ te. Alobi boye: “Ata na bisika oyo batosaka mibeko te na makambo ya mombongo, moto akoki kozala sembo. Osengeli kozala na mibeko ya Nzambe oyo otosaka. Biblia esalisaki ngai namona litomba ya kozala sembo. Moto oyo azali sembo azalaka na lisosoli ya pɛto, azalaka na kimya na motema, mpe apesaka nzoto na ye kilo. Akoki kozala ndakisa malamu mpo na bato oyo bazali zingazinga na ye.”

TOLI YA BIBLIA: “Bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.”​—1 Timote 6:9, 10.

André

“Nazali na botɔndi ndenge kolanda batoli ya Biblia oyo eleki batoli nyonso ebateli lokumu na ngai.”​—ANDRÉ

Likambo moko oyo esalemaki mpenza: André azali na kompanyi moko oyo etyelaka bato baaparɛyi na lopango mpo na komibatela na bato mabe. Moko ya bakiliya na ye ezali ekipi moko monene ya lisano ya ndembo. Mokolo moko, nsima ya lisano moko monene, André akendaki na biro ya bakonzi oyo bakambaka ekipi yango mpo na kotika faktire ya mosala oyo asalaki. Bato oyo basalaka na departema ya mbongo bazalaki na mosala mingi ya kotánga mbongo oyo ekɔtaki na batikɛ oyo bato basombaki na babiro na bango. Lokola ngonga esilaki, mokonzi na bango afutaki bato oyo basalelaki bango mosala mbangumbangu, ezala mpe André.

André alobi boye: “Na nzela, ntango nazalaki kozonga na ndako, namonaki ete mokonzi yango afutaki ngai mbongo mingi koleka. Nayebaki ete ntango mosusu akoyeba lisusu te moto oyo ye alekiselaki mbongo. Kasi nayebaki mpe ete ekosɛnga abimisa mbongo na ye moko mpo na kozipa nyongo yango! Nazwaki ekateli ya kozonga epai na ye. Nalukaki nzela na katikati ya bato ebele oyo bayaki kotala lisano ya ndembo, mpe nazongisaki mbongo oyo elekaki. Mokonzi yango akamwaki mingi. Moto moko te así azongiselá ye mbongo ndenge wana.”

André akobi boye: “Likambo wana ya bosembo etindaki mokonzi yango apesa ngai limemya. Banda likambo yango esalemá, bambula eleki ebele, kasi na bato nyonso oyo bazalaki kosalela ekipi wana mosala, kaka ngai nde natikalá. Nazali na botɔndi ndenge kolanda batoli ya Biblia oyo eleki batoli nyonso ebateli lokumu na ngai.”

Ezali mpenza kolendisa biso koyeba ete tokoki kolonga makambo oyo ekoki kotinda biso na mabe, na lisalisi ya Nzambe. Kasi, milende ya moto ye moko ekoki te kosilisa kanyaka mpo na libela. Makambo oyo etindaka bato na kanyaka ezwá mpenza misisa, yango wana ezali mpasi moto ya kozanga kokoka asilisa yango na makasi na ye moko. Kasi yango elingi nde koloba ete kanyaka ekosila soki moke te? Lisolo ya nsuka na masolo oyo emonisi eyano ya kolendisa oyo Biblia epesi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto