Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/11 nk. 4-5
  • Motuna 1: Bomoi na ngai ezali mpenza na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuna 1: Bomoi na ngai ezali mpenza na ntina?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Tómityela mokano ya malamu na bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bomoi ezali na ntina nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/11 nk. 4-5

Motuna 1: Bomoi na ngai ezali mpenza na ntina?

ROSALIND, oyo akolá na Angleterre, azalaki na mposa makasi ya kozwa boyebi. Azalaki mpe na mposa ya kosalisa bato. Nsima ya kosilisa kelasi, azwaki mosala moko ya lokumu oyo esɛngaki kosalisa bato oyo bazangá bisika ya kofanda; azalaki mpe kosalisa bibosono mpe baoyo bazali na mokakatano ya koyekola. Atako azalaki na mosala moko malamu mpe azalaki kokelela te, alobi boye: “Banda bambula mingi nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini tozali awa na mabele?’ mpe ‘ntina ya bomoi ezali nini?’”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Bato bazali te lokola banyama mpo banyama bakanisaka te. Tozali na likoki ya kozwa liteya na makambo oyo eleká, komibongisa mpo na avenire, mpe kosala ete bomoi na biso ezala na ntina.

Bamosusu bapesaka eyano nini?

Bato mingi bamonaka ete ntina ya libosoliboso ya bomoi ezali kozwa bomɛngo to lokumu mpe yango nde epesaka esengo.

Eyano ya ndenge wana emonisaka nini?

Toponaka makambo ya kotya na esika ya liboso na bomoi na biso. Bamposa na biso eleki mokano ya Nzambe na valɛrɛ.

Biblia eteyaka nini?

Mokonzi Salomo andukaki bozwi mpe alukaki bisengo ya mokili kasi amonaki ete nyonso wana esalaki te ete bomoi na ye ekóma mpenza na ntina. Amonisaki likambo oyo epesaka ntina mpenza na bomoi; akomaki boye: “Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye. Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.” (Mosakoli 12:13) Kobatela mitindo ya Nzambe esɛngaka nini?

Mokano ya Nzambe ezali mpe ete tósepela na bomoi. Salomo akomaki boye: “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi. Yango mpe namoni, ɛɛ ngai, ete euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo.”​—Mosakoli 2:24.

Nzambe alingi mpe ete tólinga mpe tóbatela libota na biso. Talá toli ya pɛtɛɛ mpe oyo ebongi, oyo apesi moto mokomoko na kati ya libota.

  • “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.”​—Baefese 5:28.

  • “Mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”​—Baefese 5:33.

  • “Bana, bótosaka baboti na bino.”​—Baefese 6:1.

Soki tosaleli batoli oyo ya Biblia, tokozwa esengo mpe tokosepela na biloko oyo tozali na yango. Kasi, likambo eleki ntina ezali ya koyekola nyonso oyo tokoki koyekola mpo na Mozalisi na biso mpe kokóma baninga na ye. Kutu, Biblia esɛngi biso ‘tópusana penepene na Nzambe.’ Mpe elaki ete ‘akopusana penepene na biso.’ (Yakobo 4:8) Soki ondimi kosala bongo, bomoi na yo ekokóma mpenza na ntina.

Rosalind, oyo tolobelaki liboso, alobi ete amoni sikoyo ntina ya bomoi. Okoki kotánga makambo oyo ye moko alobi ete etindaki ye abongola makanisi na ye na lisolo “Biblia ebongolaka bato”.

Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge ya kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe, talá mokapo 12 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? Okoki kozwa yango na Internet na www.pr2711.com

Yesu alobaki nini mpo na ntina ya bomoi?

Yesu ayebaki mpenza ntina ya bomoi na ye. Alobaki boye: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina na solo.” (Yoane 18:37) Yesu alekisaki bomoi na ye mobimba na koteya bato solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye.

Bomoi na biso ekokóma mpenza na ntina soki tolandi ndakisa ya Yesu. Kutu, asɛngi biso tóyekola epai na ye. (Matai 11:29) Tótalela kaka lolenge mibale oyo tokoki kosala yango.

Yesu ateyaki ete mpo tózala na esengo tosengeli ‘koyeba bobola na biso ya elimo.’ (Matai 5:3) Tokoki kokokisa mposa yango soki toyekoli koyeba ‘Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo [ye] atindaki, Yesu Kristo.’​—Yoane 17:3.

Yesu atindaki bayekoli na ye báteya basusu makambo oyo bayekolaki. Alobaki boye: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”​—Matai 28:19, 20.

Baoyo bayekolaka Biblia mpo na kokokisa mposa na bango ya koyeba Nzambe mpe basalelaka makambo oyo bayekoli, bamonaka ete bomoi na bango ekómaka malamu mingi koleka. Bandimaka mpenza ete bomoi na bango ezali mpenza na ntina ntango babandaka kosalisa basusu báyekola makambo ya Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto