Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/11 nk. 8-9
  • Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Makambo oyo ezali na kati
    Lamuká!—2020
  • Bampasi
    Lamuká!—2015
  • Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/11 nk. 8-9

Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?

PAPA ya Ian azalaki momɛli monene ya masanga. Atako Ian azalaki kokelela na eloko te ntango azalaki kokola, azalaki mpenza na mposa ete papa na ye amonisela ye bolingo; kasi amoniselaki ye yango te. Ian alobi boye: “Nazalaki mpenza kolinga ye te, mingimingi mpo na masanga na ye mpe ndenge oyo azalaki konyokola mama.” Ntango Ian akómaki mokóló, akómaki komituna soki Nzambe azalaka. Azalaki kokanisa boye: “‘Soki Nzambe azalaka mpenza, mpo na nini atiki ete bato bányokwama?’”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Ata soki bomoi na yo ezali mpenza na mikakatano te, mbala mosusu okoki koyoka mabe ntango omoni bato oyo basali eloko te bazali konyokwama. Kasi, soki okutani na mpasi lokola oyo ya Ian, to soki moto oyo olingaka abɛli to akufi, motuna wana ekokóma mpenza na ntina mingi mpo na yo.

Bamosusu bapesaka eyano nini?

Bamosusu bakanisaka ete Nzambe atiki bampasi ezala mpo na koteya biso tózala na komikitisa mpe tóyokelaka basusu mawa. Basusu bakanisaka ete bato bazali konyokwama na bomoi oyo mpo na masumu oyo basalaká na bomoi oyo bazalaká na yango liboso.

Biyano ya ndenge wana emonisaka nini?

Nzambe akipaka bampasi ya bato te, yango wana ezali mpasi bato bálinga ye. Azali mabe mpenza.

Biblia eteyaka nini?

Biblia emonisi polele ete bato basengeli te kopesa Nzambe foti mpo na bampasi na bango. Elobi boye: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Kutu, kopesa Nzambe foti mpo na bampasi, eyokani te na ndenge oyo Biblia elobelaka bizaleli na ye. Ndenge nini?

Moko ya bizaleli ya libosoliboso ya Nzambe ezali bolingo. (1 Yoane 4:8) Mpo na komonisa mpenza likambo yango, Biblia ekokanisi Nzambe na mama oyo azali komɛlisa mwana. Nzambe atuni boye: “Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ mpe ayokela mwana ya libumu na ye mawa te? Ata basi wana bakoki kobosana, kasi ngai nakobosana yo te.” (Yisaya 49:15) Okanisi ete mama oyo alingaka mwana na ye akoki kosala ye mabe na nko nyonso? Kutu, moboti oyo akipaka mwana na ye akoluka nde kokitisa mpasi ya mwana na ye. Ndenge moko mpe, ezali Nzambe te nde asalaka ete bato oyo basali eloko te bányokwama.​—Ebandeli 18:25.

Ata bongo, bato oyo basali eloko te bazali konyokwama. Okoki komituna boye: ‘Soki Nzambe akipaka biso mpe azali na nguya nyonso, mpo na nini alongoli te makambo oyo esalaka ete bato banyokwama?’

Nzambe azali na bantina oyo atiki ete bampasi ezala naino. Tótalela kaka ntina moko: Mbala mingi bato nde babimiselaka basusu bampasi. Bato mingi oyo banyokolaka basusu balingaka te kobongola bizaleli na bango. Na yango, mpo Nzambe alongola mpenza likambo oyo ebimiselaka bato bampasi, asengeli koboma bato ya ndenge wana.

Ntoma Petro amonisaki ntina oyo Nzambe atiki naino bato mabe bázala; akomaki boye: “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Motema molai ya Yehova Nzambe emonisaka ete azali bolingo mpe motema mawa.

Ata bongo, mosika te, Yehova Nzambe akosala likambo moko. ‘Akozongisa bolɔzi na baoyo bazali kobimisela bato oyo basali likambo te bolɔzi.’ Baoyo bazali konyokola basusu “bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.”​—2 Batesaloniki 1:6-9.

Ian oyo tolobelaki azwaki mpenza biyano ya malamu na mituna oyo azalaki komituna mpo na bampasi. Makambo oyo ayekolaki esalaki ete akóma kotalela bomoi na ndenge mosusu. Tángá lisolo na ye na lisolo elandi, oyo elobi: “Biblia ebongolaka bato”.

Mpo na koyeba makambo mosusu etali ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpe oyo akosala mpo na kosilisa yango, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? Okoki kozwa yango na Internet na www.jw.org

Yesu alobaki nini mpo na bampasi?

Yesu apesaki Nzambe foti te mpo na bampasi oyo akutanaki na yango. Kutu asalaki nde makambo oyo elandi.

Yesu amonisaki ete Nzambe te nde abimisaka bampasi mpo na kopesa bato etumbu. Yesu abikisaki bato ya maladi, batɛngumi, mpe bato oyo bakufá miso. (Matai 15:30) Makamwisi oyo asalaki eteyi biso makambo mibale ya ntina: Ya liboso, Yesu asalelaki nguya ya Nzambe mpo na kokitisa bampasi kasi te mpo na kobimisa yango. Ya mibale, mawa nde ezalaki kotinda ye abikisa bato. Ntango amonaki bato bazali konyokwama, ‘mawa ekangaki ye.’ (Matai 20:29-34) Yesu amonisaki mpenza ndenge oyo tata na ye ayokaka mpo na bampasi. Na yango, maloba mpe misala ya Yesu, eteyi biso ete Nzambe ayokaka mawa mpo na makambo ya mpasi oyo amonaka mpe azali na mposa ya kosilisa yango.​—Yoane 14:7, 9.

Yesu amonisaki polele ete bampasi mingi oyo ekómelaka bato eutaka nde na Satana Zabolo. Yesu alobaki ete Satana “azalaki mobomi-bato ntango abandaki.” (Yoane 8:44) Yesu amonisaki mpe ete Satana Zabolo azali “mokonzi ya mokili oyo” mpe ye nde azali “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.”​—Yoane 12:31; Emoniseli 12:9.

Yesu apesaki biso elikya ete mokolo mosusu bampasi nyonso ekosila. Ateyaki bayekoli na ye babondelaka: “Tata na biso na likoló. . . . Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, bampasi ekozala lisusu te awa na mabele, kaka ndenge ezalaka te kuna na likoló.

Na emonaneli oyo apesaki ntoma Yoane, Yesu amonisaki ndenge bomoi ekozala mpo na baoyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Na ntango yango, Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 1:1; 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto