Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 9
  • Noa atongi masuwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Noa atongi masuwa
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Masuwa ya Noa
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Mekolá kondima na bango
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Moto nyonso akoki kozwa liteya na kasɛti video Noé: il marchait avec Dieu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 9

Lisolo 9

Noa atongi masuwa

NOA azalaki na mwasi moko ná bana mibali misato: Seme, Kame ná Yafete. Bana yango nyonso misato babalaki. Na yango, libota ya Noa ezalaki na bato mwambe.

Mokolo moko, Nzambe apesi Noa mosala oyo ekeseni na misala mosusu nyonso. Atindaki ye atonga masuwa. Ezalaki lokola sanduku moko ya monene. Nzambe alobaki ete: ‘Salá yango na bitaje mibale mpe kabolá yango na bashambrɛ.’ Bashambrɛ yango ezalaki mpo na Noa ná libota na ye, banyama mpe bilei na bango nyonso.

Nzambe ayebisaki Noa apakola masuwa gudrɔ na kati mpe na libándá mpo mai ekɔta te. Nzambe alobaki na ye ete: ‘Nazali kotinda mpela ya monene mpe nakobebisa mokili mobimba. Moto nyonso oyo akokɔta na masuwa te akokufa.’

Noa ná bana na ye batosaki Yehova mpe babandaki mosala. Kasi bato bazalaki kosɛka bango. Babongisaki bizaleli na bango te. Moto moko te andimelaki Noa ntango azalaki kosakola makambo oyo Nzambe akosala.

Mosala ya kotonga masuwa eumelaki bambula mingi, mpo masuwa yango ezalaki monene mpenza. Nsukansuka, nsima ya bambula mingi, basilisaki kotonga yango. Na ntango yango, Nzambe atindaki Noa ete akɔtisa banyama na masuwa. Nzambe alobaki na Noa akɔtisa banyama mosusu mibalemibale na kolanda motindo na yango, mwasi ná mobali. Alobaki mpe ete, motindo mosusu ya banyama, akɔtisa yango nsambonsambo. Nzambe atindaki lisusu Noa akɔtisa bandɛkɛ ya mitindo nyonso. Noa asalaki kaka ndenge Nzambe atindaki ye.

Na nsima, Noa ná libota na ye bakɔtaki na kati ya masuwa. Bongo Nzambe akangaki porte. Na kati ya masuwa, Noa ná libota na ye bazelaki. Kanisá naino ete ozalaki elongo na bango na kati ya masuwa bozali kozela. Mpela ekoya ndenge Nzambe alobaki?

Ebandeli 6:9-22; 7:1-9.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto