Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/4 lok. 11
  • “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Banga Jéhovah, Ye oyo akoyokaka mabondeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Osengeli kobondelaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/4 lok. 11

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

“Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino”

“Nkolo, teyá biso kobondela.” (Luka 11:1) Moyekoli moko ya Yesu nde ayebisaki ye bongo. Na eyano na ye, Yesu asalelaki bandakisa mibale oyo eteyi biso ndenge ya kobondela mpo Nzambe ayoka biso. Osilá komituna soki Nzambe ayokaka mabondeli na yo? Boye, eyano ya Yesu ekosepelisa yo.​—Tángá Luka 11:5-13.

Ndakisa ya liboso elobeli moto oyo azali kobondela. (Luka 11:5-8) Na lisolo yango, mobali moko ayambi mopaya na katikati ya butu mpe azali na bilei ya kopesa ye te. Mpo na mobali yango, ezali likambo ya ntina mingi. Atako ngonga epusani, akei epai ya moninga na ye mpo na kodefa mwa mampa. Na ebandeli, moninga yango aboyi kotɛlɛma mpo bato ya libota na ye balali mpɔngi makasi. Kasi mobali yango azalaki na mbamba makasi mpe akobaki kosɛnga tii nsukansuka moninga na ye alamukaki mpe apesaki ye mwa bilei.a

Ndakisa yango eteyi biso nini mpo na libondeli? Yesu amonisi biso ete tosengeli kozala mbamba, elingi koloba, tókoba kosɛnga, koluka, mpe kobɛta kɔkɔkɔ. (Luka 11:9, 10) Mpo na nini? Yesu alingi nde koloba ete Nzambe akakatanaka mpo na koyoka mabondeli na biso? Te. Na bokeseni na moninga oyo azalaki koboya kofungola porte, Yesu alingaki koloba ete Nzambe azalaka na mposa makasi ya koyanola mabondeli ya baoyo babondelaka na kondima. Mbamba na biso emonisaka ete tozali na kondima ya ndenge wana. Soki tozali kokoba kosɛnga, tokomonisa ete tozali mpenza na mposa ya eloko yango mpe tozali mpenza na kondima ete Nzambe akoki kopesa biso yango soki eyokani na mokano na ye.​—Marko 11:24; 1 Yoane 5:14.

Ndakisa ya mibale elobeli Yehova “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Yesu atunaki boye: “Tata nani na kati na bino oyo soki mwana na ye asɛngi mbisi, akopesa ye mbala mosusu nyoka na esika ya mbisi? To soki mpe asɛngi maki, akopesa ye nkotó?” Eyano ezali polele mpo tata moko te oyo alingaka bana na ye akoki kopesaka bango eloko ya mabe. Na nsima, Yesu alimboli ndakisa yango boye: Soki batata ya kozanga kokoka ‘bapesaka makabo ya malamu’ epai ya bana na bango, ‘bongo Tata na likoló akopesa te elimo santu’​—likabo oyo eleki makabo nyonso epai ya bana na ye oyo bazali awa na mabele, oyo bazali kosɛnga ye yango?b​—Luka 11:11-13; Matai 7:11.

Nzambe azalaka na mposa makasi ya koyanola mabondeli ya baoyo babondelaka na kondima

Ndakisa oyo eteyi biso nini mpo na Yehova, “Moyoki ya libondeli”? Yesu alingi tótalelaka Yehova lokola tata oyo akipaka bana na ye mpe azalaka na mposa makasi ya kokokisa bamposa na bango. Na yango, basambeli ya Yehova bakoki koyebisa ye bamposa ya mitema na bango na libondeli. Lokola bayebi ete alukaka bolamu na bango, bakoki mbala moko kondima eyano oyo apesi na libondeli na bango ata soki ezali te ndenge bazalaki kokanisa.c

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya minei

Luka 7-21

a Ndakisa wana ya Yesu emonisi mimeseno mpe makambo ya bato ya ntango wana. Mpo na Bayuda, koyamba mopaya ezalaki mokumba moko ya ntina mingi. Libota ezalaki kotumba mampa ebele mpo na mokolo, yango wana bato mingi bazalaki kodefa mampa soki oyo ya bango esili. Lisusu, soki libota yango ezalaki na bozwi te, bazalaki kolala na pavema na ndako oyo ezangá shambre.

b Mbala mingi Yesu azalaki kosalela elobeli oyo emonisi ete likambo boye eleki oyo mosusu, elingi koloba, kosalela ndakisa ya eloko moko ya moke mpo na kolimbola likambo moko ya ntina mingi.

c Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge ya kobondela mpo Nzambe ayoka, talá mokapo 17 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto