Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/6 lok. 8
  • Yehova “aponaka bilongi te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova “aponaka bilongi te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Petro epai ya Korneyi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Nzambe aponaka bilongi te”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Nzambe azali na koponapona te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Korneyi azwi Elimo santu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/6 lok. 8

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

Yehova “aponaka bilongi te”

Esí ekómá ete bazwa moto mosusu na valɛrɛ koleka yo? Basilá kopimela yo eloko moko, koboya kozwa yo na mosala, to komona yo moto mpamba mpo ozali moindo to mondɛlɛ, moto ya mboka mosusu, to mpo ozali mozwi to mobola? Soki ezali bongo, ozali yo moko te. Kasi, nsango malamu yango oyo: Atako makambo ya ndenge wana emonanaka mingi awa na mabele, na likoló ezalaka te. Na kondimisama nyonso, ntoma Petro alobaki boye: “Nzambe aponaka bilongi te.”​—Tángá Misala 10:34, 35.

Petro alobaki maloba wana na ndako na ye te, kasi nde na ndako ya Korneyi moto ya ekólo mosusu. Petro, oyo abotamá Moyuda, azalaki na bomoi na ntango oyo Bayuda bazalaki kotalela bato ya bikólo mosusu lokola mbindo mpe ebongi te kosala boninga ata ya lolenge nini ná bango. Kasi, mpo na nini Petro ayaki na ndako ya Korneyi? Na mokuse, ezali mpo Yehova Nzambe nde asalaki ete bákutana. Petro azwaki emonaneli moko oyo Nzambe alobaki na ye boye: “Yo tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.” Kozanga ete Petro ayeba, liboso ya mokolo wana, Korneyi mpe azwaki emonaneli oyo anzelu ayebisaki ye abenga Petro. (Misala 10:1-15) Ntango Petro ayebaki ete Yehova nde asali bongo, akokaki kokanga monɔkɔ te.

Petro alobaki boye: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te.” (Misala 10:34) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kopona bilongi” elimbolaka “moto oyo azwaka bilongi.” (The Kingdom Interlinear Translation of the Greek Scriptures) Moto moko ya mayele alobi ete maloba yango “etaleli zuzi oyo akati likambo ya moto moko na kolanda ndenge elongi ya moto yango ezali, kasi te na kotalela likambo mpenza oyo asali.” Nzambe andimaka moto te mpo na mposo to ekólo na ye, mpo azali mozwi to mobola, to mpo na makambo mosusu oyo ezali komonana na miso.

Kutu, Yehova atalaka nde oyo ezali na mitema na biso. (1 Samwele 16:7; Masese 21:2) Na nsima, Petro alobaki boye: “Na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:35) Kobanga Nzambe elimboli komemya, kokumisa mpe kotyela ye motema; koboya kosala likambo nyonso oyo ekosepelisa ye te. Kosala na bosembo esɛngi kondima na motema moko kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. Yehova asepelaka na moto oyo abangaka ye mpe asalaka makambo oyo ezali sembo.​—Kolimbola Mibeko 10:12, 13.

Ntango Yehova atalaka mabele, amonaka ete bato nyonso bazali ndenge moko

Soki basilá kozwa moto mosusu na valɛrɛ koleka yo to bakaniselá yo mabe, okoki mpenza kotya motema na maloba oyo Petro alobaki mpo na Nzambe. Yehova azali kobenda bato ya bikólo nyonso na losambo ya solo. (Yoane 6:44; Misala 17:26, 27) Ayokaka mpe ayanolaka mabondeli ya basambeli na ye nyonso, ata soki bazali bato ya mposo to ekólo nini, bazwi to babola. (1 Bakonzi 8:41-43) Tokoki mpenza kotya motema ete ntango Yehova atalaka mabele, amonaka ete bato nyonso bazali ndenge moko. Yango etindi yo oluka koyeba makambo mingi etali Nzambe oyo aponaka bilongi te, boye te?

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya motoba

Yoane 17-21–Misala 1-10

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto