Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/6 nk. 9-11
  • Eloko moko ya motuya oyo ebombamaki bankama ya bambula

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eloko moko ya motuya oyo ebombamaki bankama ya bambula
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MABONGOLI MINGI YA BIBLIA
  • LIBOTA YA MOKONZI EZWI MOSALA YA KOBIMISA BIBLIA
  • Na ekólo Géorgie bazali konyokola bato mpo na lingomba na bango—Likambo yango ekosila mokolo nini?
    Lamuká!—2002
  • “Makamwisi” mibale na liyangani moko na ekólo Géorgie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mobali na ngai azalaki kokoka kotika kotánga yango te!
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Namonaki na miso na ngai moko oyo Biblia elobi!
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/6 nk. 9-11

Eloko moko ya motuya oyo ebombamaki bankama ya bambula

Moto moko ya mayele azali kondima te. Mbala na mbala, azali kotalatala eteni moko ya makomi ya kala. Gramɛrɛ mpe ekomeli na yango ya kitoko endimisi ye ete ezali biteni mikemike ya libongoli ya kala mpenza ya Biblia ya monɔkɔ ya Géorgien oyo eyebani mingi!

BAMONAKI eloko yango ya motuya na nsuka ya sanza ya 12 ya mobu 1922, ntango Ivané Javakhishvili moto moko ya ekólo Géorgie azalaki kosala bolukiluki mpo na koyeba ndenge oyo alfabɛ ya monɔkɔ ya Géorgien ebandaki. Ayaki komona kopi moko ya Talmud ya Yerusaleme. Ntango azalaki kotalatala yango, amonaki na nse ya makomi ya Ebre mwa ndambo ya makomi ya Géorgien oyo bapalolá.a

Makomi oyo “ebombamaki” na Talmud, ezalaki kopi ya eteni moko ya mokanda ya Yirimia ya siɛklɛ ya mitano ya ntango na biso. Liboso bámona makomi yango, maniskri ya kala ya Biblia na monɔkɔ ya Géorgien oyo eyebanaki ezalaki ya siɛklɛ ya 9 ya ntango na biso. Eumelaki te, bamonaki biteni mosusu ya mikanda ya Biblia ya siɛklɛ ya mitano ya ntango na biso to mwa liboso. Kanisá naino ndenge bayokaki ntango bamonaki mikanda wana ya Biblia oyo kopi na yango esalemaki kaka mwa bankama ya bambula nsima ya eleko ya Yesu mpe bantoma!

Nani abongolaki mikanda yango? Ezalaki mosala ya moto moko to ya etuluku ya babongoli oyo bamipesaki mpenza na mosala? Tii sikoyo, bamoni naino te mokanda moko ya kala oyo ekoki kosalisa biso tózwa eyano. Ata soki nani abongolaki yango, emonani ete babongolaki Biblia to biteni na yango na monɔkɔ ya Géorgien na ebandeli ya siɛklɛ ya 4 mpe banda ntango wana, bato ya Géorgie bazalaki na Liloba ya Nzambe na monɔkɔ na bango to bayebaki yango.

Buku moko (The Martyrdom of St. Shushanik the Queen) oyo mbala mosusu ekomamaki na nsuka ya siɛklɛ ya 5, elobeli lisolo moko oyo emonisi ete bato ya Géorgie bayebaki Makomami. Mokomi ya buku yango atyaki mpe alobelaki maloba ya Nzembo, Baevanzile, mpe ya mikanda mosusu ya Biblia ntango abɛtaki lisolo ya makambo ya mawa oyo ekómelaki mokonzi-mwasi. Alobaki mpe ete mpo na kokitisa bakonzi ya nguya ya Perse motema, Varsken mobali ya Shushanik, guvɛrnɛrɛ ya Kartli na bokonzi ya Géorgie atikaki “lingomba ya bokristo,” mpe akɔtaki na lingomba ya Zoroastre ya Baperse, mpe asɛngaki mwasi na ye asala mpe bongo. Buku yango elobi ete mwasi na ye aboyaki kokɔta na lingomba yango, mpe liboso báboma ye, azalaki kozwa libɔndisi na nzela ya Makomami.

Emonani ete, kobanda siɛklɛ ya 5, mosala ya kobongola Biblia na monɔkɔ ya Géorgien mpe ya kosala bakopi na yango ekobaki. Bamaniskri mingi ya Biblia na monɔkɔ yango emonisi mosala makasi ya babongoli mpe ya bato oyo bamipesaki na kosala bakopi. Tótalela naino makambo mibale ya lisolo yango oyo ezali kobenda likebi​—ndenge oyo babongolaki mpe babimisaki Biblia.

MABONGOLI MINGI YA BIBLIA

Giorgi Mtatsmindeli sango moko ya Géorgie ya siɛklɛ ya 11, alobaki boye: “Ngai, Giorgi, mwa sango moko boye, nasalaki makasi nabongola mokanda ya Nzembo na monɔkɔ ya Géorgien uta na monɔkɔ ya Grɛki.” Mpo na nini esengelaki kobongola Biblia nzokande ezalaki na libongoli mosusu ya Biblia na monɔkɔ ya Géorgien mwa basiɛklɛ liboso?

Na siɛklɛ ya 11, ezalaki naino na mwa ndambo ya bakopi ya bamaniskri ya liboso ya Biblia na monɔkɔ ya Géorgien. Mikanda mosusu ebungaki nyonso. Lisusu, monɔkɔ yango ebongwanaki mwa moke, yango wana ezalaki mpasi mpo batángi bakanga ntina ya makomi oyo ezalaki na bakopi ya liboso. Atako babongoli mingi basalaki milende mpo na kobongola lisusu Biblia ya Géorgien, Giorgi asalaki mosala moko ya ntina mingi. Azalaki kokokanisa Babiblia ya Géorgien ná bamaniskri ya Grɛki mpe kobongola biteni oyo ezangaki to mpe mokanda mobimba. Na moi, azalaki kokokisa mokumba na ye ya mokambi ya monastɛrɛ. Na butu azalaki kobongola Biblia.

Longolá mosala ya kobongola, Ephrem Mtsire oyo azalaki na bomoi na eleko moko ná Giorgi abimisaki mpe mwa buku moko ya ntina mpo na kosalisa babongoli. Ezalaki na malako ya ntina mingi mpo na mosala ya kobongola, na ndakisa: Kozwa makambo oyo ezali na monɔkɔ moko kaka ndenge ezali mpe kobongola yango na ndenge oyo elobamaka mpenza na monɔkɔ mosusu. Abandisaki mpe likambo ya kotyaka maloba na nse ya lokasa mpe mitindami na mabongoli ya Biblia ya Géorgien. Ephrem asalaki lisusu libongoli ya sika ya mikanda mosusu ya Biblia. Mosala oyo Giorgi ná Ephrem basalá esalisaka babongoli mingi.

Na siɛklɛ oyo elandaki, babuku ndenge na ndenge ebimaki na ekólo Géorgie. Basalaki biteyelo na engumba Gelati mpe Ikalto. Bato mingi ya mayele balobaka ete oyo bato babengaka Biblia ya Gelati, oyo ezali sikoyo na Centre national des manuscrits géorgiens, ezali libongoli ya sika ya Biblia oyo moto moko ya mayele ya Gelati to Ikalto asalaki.

Mosala ya kobongola Biblia etindaki bato ya Géorgie basala nini? Na siɛklɛ ya 12, Shota Rustaveli, powɛti moko ya Géorgie akomaki mokanda moko (Vepkhis-tqaosani, to soda ya mpiko na mposo ya nkoi), mokanda yango eyebanaki mingi na boumeli ya basiɛklɛ, yango wana bazalaki kobenga yango Biblia ya mibale ya monɔkɔ ya Géorgien. Kekelidze, moto moko ya mayele ya ekólo Géorgie ya mikolo na biso alobi ete ata soki powɛti yango atángaki mbala moko maloba ya Biblia to te, “makanisi na ye mosusu ekokani mpenza ná bavɛrsɛ mingi ya Biblia.” Atako, poɛmi yango elekisaki ndelo na makambo mosusu, elobeli mbala na mbala makambo lokola boninga ya solosolo, kokaba, komemya basi, mpe kolinga bapaya na motema moko. Makambo yango mpe makambo mosusu oyo Biblia eteyaka esalisaki mpenza bato ya Géorgie na boumeli ya bambula mingi, mpe tii lelo oyo batalelaka yango kaka lokola mibeko etali bizaleli malamu oyo basengeli kolanda.

LIBOTA YA MOKONZI EZWI MOSALA YA KOBIMISA BIBLIA

Na nsuka ya siɛklɛ ya 17, libota ya mokonzi ya ekólo Géorgie ekómaki mpenza na mposa ya kobimisa Biblia. Yango wana, mokonzi Vakhtang VI atongaki ndako ya konyata mikanda na engumba-mokonzi, Tbilisi. Kasi, makomi ya Biblia oyo basengelaki konyata ezalaki naino te. Emonanaki lokola ete Biblia ya Géorgien ebombamaki lisusu. Ezalaki kaka na mwa bamaniskri ya mikanda mosusu ya Biblia oyo ezangaki makambo mosusu, mpe monɔkɔ ya Géorgien oyo basalelaki esilaki ngala. Bapesaki Sulkhan-Saba Orbeliani moto ya mayele oyo ayebaki mibeko ya lokota malamu mpenza, mosala ya kozongela mpe kobongisa lisusu makomi ya Biblia.

Orbeliani asalaki mosala yango na likebi mpenza. Lokola ayebaki minɔkɔ ebele, ata mpe Grɛki ná Latin, longola bamaniskri ya Géorgien, asalelaki mpe mikanda ndenge na ndenge. Kasi, lokola azalaki kosala bongo, bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Géorgie basepelaki te. Bafundaki ye ete atɛki lingomba mpe basalaki nyonso mpo na kondimisa mokonzi apekisa ye mosala yango. Mikanda mosusu ya Géorgien emonisi ete, na likita moko ya lingomba, basango basengaki Orbeliani na makasi ete atumba Biblia oyo amonelaki mpasi na boumeli ya bambula mingi!

Likambo ya ntina, kopi moko ya maniskri Mtskheta (Mcxeta), oyo babengaka yango mpe Biblia ya Saba, oyo ezali tii lelo, ezali na mwa bakomantɛrɛ oyo Orbeliani akomaki. Kasi, bato mosusu bandimaka te ete ezali Biblia oyo basango babundelaki. Kaka makambo oyo ezali na apɛndisi nde ezali mpenza ya ye.

Atako mikakatano ezalaki mingi, kobimisa Biblia ezalaki kaka mosala oyo bato mosusu ya libota ya mokonzi batyaki na esika ya liboso. Kobanda mobu 1705 tii 1711, babimisaki biteni mosusu ya Biblia. Mpo na milende oyo bana ya mokonzi, Vakhushti mpe Bakari basalaki, nsukansuka na mobu 1743, Biblia ebimisamaki na mobimba na yango. Ekokaki kobombama lisusu te.

a Na ntango ya kala, biloko ya kokomela ezalaki komonana mpenza te mpe ezalaki ntalo mingi. Yango wana, bato bamesanaki kopalola makomi ya kala na bamaniskri mpe kosalela yango mpo na kokoma oyo ya sika. Bazalaki kobenga bamaniskri ya ndenge wana palimpsestes, euti na liloba ya Grɛki oyo elimboli “bapalolá lisusu.”

NKOMBO YA NZAMBE NA BIBLIA YA MONƆKƆ YA GÉORGIEN

Yehova (na Ebre, יהוה), nkombo mpenza ya Nzambe ndenge ezali na Biblia, ezwami mbala soki 7 000 na minɔkɔ ya ebandeli oyo bakomaki na yango bamaniskri ya Biblia. Mabongoli mingi ya Biblia na monɔkɔ ya Géorgien etyá titre “Nkolo” na esika ya nkombo yango. Kasi, na apɛndisi ya Biblia oyo babengaka Biblia ya Saba, Sulkhan-Saba Orbeliani apesi ndimbola ya nkombo Yesu boye: “Na Ebre: Ieses elimboli Ieova Nkolo mobikisi.” Likambo ya esengo, na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Géorgien, oyo Batatoli ya Yehova babimisaki na 2006, nkombo Yehova ezali na bisika nyonso oyo esengelaki kozala.

LINGOMBA YA BOKRISTO NA GÉORGIE

Ntango nini lingomba ya bokristo ekɔtaki na Géorgie? Tii sikoyo, bamoni ata makomi moko te ya mokili oyo elobeli mpenza likambo yango. Nzokande, mokanda ya Misala elobi ete Bayuda mosusu to baprozelite ya mboka Ponti bazalaki kati na bato oyo bayokaki nsango malamu na Yerusaleme na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso. Ekoki kozala ete bapalanganisaki nsango yango ntango bazongaki na Ponti. Emonani ete masangá ya bokristo ezalaki na mboka Ponti na mobu soki 62 ya ntango na biso. Na siɛklɛ ya liboso, Ponti ezalaki na etúká oyo ezwami lelo na nɔrdi-ɛsti ya ekólo Turquie, pene ya ekólo Géorgie.​—Misala 2:9; 1 Petro 1:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto