Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/7 lok. 7
  • Ezali na lingomba oyo ebongi kotyela motema?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali na lingomba oyo ebongi kotyela motema?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/7 lok. 7

Ezali na lingomba oyo ebongi kotyela motema?

Soki lingomba moko elɛmbisá yo nzoto, ekoki kozala mpasi otyela lingomba mosusu nyonso motema. Kasi yebá ete ezali na lingomba moko oyo ebongi kotyela motema. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayanganisaki etuluku moko ya bayekoli ya sembo mpe ateyaki bango bátosaka mibeko ya Nzambe. Tii lelo oyo, ezali na bayekoli ya solosolo ya Kristo oyo basalaka nyonso mpo na kotosa mibeko ya bokristo na bomoi na bango. Okoki komona bango wapi?

Estelle, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli, alobi boye: “Nsukansuka, nabandaki koyekola Biblia ntango Batatoli ya Yehova bakómaki koteya ngai. Eumelaki te, nayebaki ndimbola ya Yoane 8:32, oyo elobaka ete: ‘Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.’”

Ray, oyo tolobelaki mpe na ebandeli, alobi boye: “Koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova esalisaki ngai nayeba ete bampasi ya bato eutaka na Nzambe te. Nasepelaki ndenge nayebaki ete atako Nzambe azali na bantina oyo atiki mabe ezala, alaki mpe ete mosika te, akolongola yango.”

Toboyi te, ezali mpasi kosala malamu ntango bato mingi bazali kosala mabe. Kasi ekoki kosalema. Bato mingi balingaka básalisa bango mpo bákanga ntina mpe básalela mateya ya Biblia. Yango wana, Batatoli ya Yehova bayekolaka Biblia ofele na bamilio ya bato na mokili mobimba. Pɔsɔ na pɔsɔ, bato mingi bazali koyekola oyo Biblia eteyaka mpenza. Yango esali ete bápusana penepene na Mozalisi na bango, mpe bákóma na bomoi ya malamu koleka.a

Mpo na nini te kotuna Batatoli ya Yehova ntina oyo batyelaka lingomba na bango motema?

Mbala ya nsima oyo okokutana na Batatoli ya Yehova, mpo na nini te kotuna bango ntina oyo batyelaka lingomba na bango motema? Talelá mateya mpe makambo oyo basalaka. Na nsima, yo moko talá soki ezali na lingomba oyo okoki kotyela motema.

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto