Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/10 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Elikya ezali mpo na bato oyo bakufá?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Lisekwa ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/10 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Soki moto akufi, nyonso esili?

Liwa ezali lokola mpɔngi mpo bakufi bayebaka eloko te mpe bakoki kosala eloko moko te. Kasi, Mozalisi ya bomoi akoki kozongisa bakufi na bomoi na nzela ya lisekwa. Mpo na komonisa ete akosala yango, Nzambe apesaki Yesu nguya ya kosekwisa bato ebele oyo bakufaki.​—Tángá Mosakoli 9:5; Yoane 11:11, 43, 44.

Na ndenge nini liwa ekokani na mpɔngi?

Nzambe alaki ete bakufi oyo bazali na makanisi na ye bakosekwa na mokili ya sika. Baoyo bakosekwa, basengeli kozala naino na nkunda tii ntango Nzambe akozongisa bango lisusu na bomoi. Nzambe-Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali na mposa makasi ya kosalela nguya na ye mpo na kozongisa bakufi na bomoi.​—Tángá Yobo 14:14, 15.

Lisekwa ekozala ndenge nini?

Ntango Nzambe akosekwisa bato, bakozala na likoki ya komiyeba, koyeba baninga mpe mabota na bango. Ata soki nzoto ya moto epɔli na mabele, Nzambe akoki kosekwisa moto yango na nzoto ya sika.​—Tángá 1 Bakorinti 15:35, 38.

Kasi, kaka bato moke nde bakosekwa mpo na bomoi na likoló. (Emoniseli 20:6) Bato mingi oyo bakosekwa bakozonga na bomoi na mabele oyo ekozonga paradiso. Bato yango bakobanda bomoi ya sika na elikya ya kozala na bomoi libela na libela.​—Tángá Nzembo 37:29; Misala 24:15.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 6 mpe 7 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Okoki kozwa yango na internet na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto