Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/11 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Lisekwa ekozala!
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Lisekwa ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/11 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Bakufi bakozonga lisusu na bomoi?

Bato bazali koyamba bato oyo basekwi na paradiso

Na ntembe te, Mozalisi ya bomoi akoki kozongisa bato na bomoI

Bomoi eutá epai ya Yehova Nzambe. (Nzembo 36:9) Boye, ebongi te tóloba ete kaka ye nde akoki kozongisa bakufi na bomoi? Biblia endimisi biso ete akosala yango na mikolo ezali koya. (Tángá Misala 24:15) Kasi, mpo na nini akosala yango?

Na ebandeli, Nzambe akanaki ete bato bázala na bomoi libela na mabele. (Ebandeli 1:31; 2:15-17) Alingi kaka bato bázala na bomoi ya ndenge wana. Esalaka ye mpasi ntango amonaka bomoi ya mokuse tókóma na yango oyo etondi na mikakatano.​—Tángá Yobo 14:1, 14, 15.

Baoyo bakosekwa bakofanda wapi?

Nzambe asalaki bato mpo báfanda na likoló? Te. Nzambe asalaki baanzelu mpo báfanda na likoló. Asalaki bato mpo báfanda na mabele. (Ebandeli 1:28; Yobo 38:4, 7) Na kotalela likanisi yango, tólobela bato oyo Yesu asekwisaki. Bato oyo asekwisaki bazongaki na bomoi awa na mabele. Ndenge moko mpe, bato mingi oyo bakosekwa na mikolo ezali koya bakozonga na bomoi awa na mabele.​—Tángá Yoane 5:28, 29; 11:44.

Kasi, Nzambe aponi bato moke oyo bakosekwa mpo na bomoi na likoló, epai bakozala na nzoto ya elimo. (Luka 12:32; 1 Bakorinti 15:49, 50) Baoyo bakosekwa mpo na kokende na likoló bakoyangela mabele elongo na Kristo lokola bakonzi.​—Tángá Emoniseli 5:9, 10.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 7 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.jw.org

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto