Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/5 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nani mpenza azali koyangela mokili?
    Nani mpenza azali koyangela mokili?
  • Mpo na nini bampasi etondi na mokili?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/5 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Nani mpenza azali koyangela mokili oyo?

Bililingi ya bitumba, mobulu mpe makama

Soki Nzambe nde ayangelaka mokili oyo, bampasi elingaki kozala mingi boye?

Bato mingi bakanisaka ete Nzambe ya solo nde azali koyangela mokili oyo. Kasi soki ezali bongo, bampasi elingaki kozala mingi boye na mokili? (Kolimbola Mibeko 32:4, 5) Biblia elobi ete moto mabe nde azali kokonza mokili.​—Tángá 1 Yoane 5:19.

Ndenge nini moto mabe akómaki kokonza bato? Na ebandeli, anzelu moko atombokelaki Nzambe mpe atindaki mwasi ná mobali ya liboso básala mpe bongo. (Ebandeli 3:1-6) Mwasi ná mobali yango bandimaki kotosa anzelu wana motomboki, Satana, mpe bakómisaki ye mokonzi na bango. Kaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde azali mokonzi oyo abongi, kasi alingi ete bato bápona boyangeli na ye mpo balingaka ye. (Kolimbola Mibeko 6:6; 30:16, 19) Likambo ya mawa, ebele ya bato bakosami mpe baponi kaka nzela wana ya mabe oyo mwasi ná mobali ya liboso baponaki.​—Tángá Emoniseli 12:9.

Nani akosilisa bampasi ya bato?

Nzambe akotika boyangeli mabe ya Satana libela? Te! Nzambe akosalela Yesu mpo na kolongola makambo nyonso ya mabe oyo Satana abimisá.​—Tángá 1 Yoane 3:8.

Yesu akosalela nguya oyo Nzambe apesi ye mpo na koboma Satana. (Baroma 16:20) Na nsima, Nzambe akoyangela bato mpe akozongisa bango na bomoi ya esengo mpe ya kimya oyo akanaki mpo na bango na ebandeli.​—Tángá Emoniseli 21:3-5.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku oyo: Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okoki mpe kozwa yango na www.jw.org

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto