Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/8 lok. 4
  • Nzambe amonaka makambo oyo osalaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe amonaka makambo oyo osalaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Koyoka mpe koyeba bandeko ekosalisa yo omitya na esika na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • “Elilingi” ya ntina mingi mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lukáká litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/8 lok. 4

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NZAMBE ATYELAKA YO LIKEBI?

Nzambe amonaka makambo osalaka

“Miso na ye ezali likoló ya banzela ya moto, mpe azali komona matambe na ye nyonso.”​—YOBO 34:21.

Tata azali kosakana ná mwana na ye ya moke

Soki mwana azali naino moke, azalaka na mposa baboti bákɛngɛlaka ye

MPO NA NINI BATO MOSUSU BATYAKA NTEMBE? Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema kala mingi te emonisi ete galaksi na biso ezali na baplanɛti soki miliare 100. Lokola molɔ́ngɔ́ ezalaka monene, bato mingi bamitunaka boye: ‘Ekobanda boni Mozalisi oyo aleki na nguya atalaka makambo oyo bato mpamba oyo bafandi na mwa planɛti moke lokola mabele basalaka?’

OYO LILOBA YA NZAMBE ETEYAKA: Nzambe apesá biso kaka Biblia te bongo na nsima asundolá biso. Kutu, Yehova alobi boye: “Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.”​—Nzembo 32:8.

Tózwa ndakisa ya Agare, mwasi Moezipito na siɛklɛ ya 20 liboso ya ntango na biso. Agare aboyaki kotosa patrɔ na ye Sarai, yango wana Sarai asambwisaki ye mpe Agare akimaki na esobe. Lokola Agare asalaki libunga, Nzambe asundolaki ye? Biblia elobi ete anzelu ya Yehova akutanaki na ye. Anzelu yango alendisaki ye boye: “Yehova ayoki mpasi na yo.” Na nsima Agare ayebisaki Yehova boye: “Yo ozali Nzambe oyo amonaka.”​—Ebandeli 16:4-13.

“Nzambe oyo amonaka,” amonaka mpe makambo oyo osalaka. Tózwa ndakisa: Mama oyo alingaka bana na ye akɛngɛlaka baoyo ya mike mingi koleka mpo soki mwana azali naino moke, azalaka na mposa baboti bákɛngɛlaka ye ndenge wana. Ndenge moko mpe, Nzambe amonaka makambo oyo tosalaka, mingimingi ntango tokeleli mpe tozali na likama. Yehova alobi boye: “Nafandaka na esika oyo etombwaná mpe na esika mosantu, mpe esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa, mpo na kopesa lisusu makasi na elimo ya bato ya komikitisa mpe kopesa makasi lisusu na motema ya bato oyo batutami.”​—Yisaya 57:15.

Kasi, okoki komituna boye: ‘Ndenge nini Nzambe amonaka ngai? Asambisaka ngai na kolanda ndenge oyo namonanaka to atalaka nde motema na ngai mpe ayebaka soki nazali mpenza nani?’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto