Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/4 nk. 7-11
  • Lukáká litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lukáká litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kotya motema na litambwisi ya Yehova?
  • Ntango nini tozalaka na mposa ya litambwisi?
  • Makama ya koboya litambwisi ya Nzambe
  • Kolanda toli ya Nzambe esɛngaka nini?
  • Ndenge nini Yehova atambwisaka biso?
  • Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Kobá kolanda litambwisi ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Yehova azali kokamba basaleli na ye na nzela ya bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Mpo na nini kotika Biblia etambwisa biso?
    Lamuká!—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/4 nk. 7-11

Lukáká litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso

“Oyo azali Nzambe, Nzambe na biso libela na libela; ye akozala motambolisi na biso kino ntango ya kufa.”​—Nz. 48:14.

1, 2. Mpo na nini tosengeli kotya motema na litambwisi ya Yehova na esika ya kotya motema na mayele na biso moko, mpe mituna nini likambo yango ebimisi?

NTANGO tozali kotalela makambo, ezalaka mpasi te tómikosa mpe tókanisa ete makambo ya mpamba to ya mabe ezali malamu. (Mas. 12:11) Soki tolingi kosala likambo oyo ebongi te mpo na moklisto, mbala mingi motema na biso elukaka kolongisa likambo yango. (Yil. 17:5, 9) Yango wana, mokomi ya nzembo amonisaki bwanya ntango abondelaki Yehova boye: “Bimisá pole na yo mpe sembo na yo, yango ekokamba ngai.” (Nz. 43:3) Na esika atya motema na mayele na ye moko, atyelaki Yehova motema, mpe na ndenge yango, alukaki litambwisi oyo eleki malamu. Lokola mokomi ya nzembo, ebongi tólukaka litambwisi ya Nzambe.

2 Kasi, mpo na nini tosengeli kotya motema libosoliboso na litambwisi ya Yehova? Ntango nini tosengeli kolukaka yango? Bizaleli nini tosengeli kolona mpo Yehova atambwisa biso, mpe ndenge nini atambwisaka biso lelo oyo? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna yango ya ntina mingi.

Mpo na nini kotya motema na litambwisi ya Yehova?

3-5. Mpo na nini tosengeli kotya motema mobimba na litambwisi ya Yehova?

3 Yehova azali Tata na biso ya likoló. (1 Kol. 8:6) Ayebi malamu mokomoko na biso mpe akoki kotánga na mitema na biso. (1 Sam. 16:7; Mas. 21:2) Mokonzi Davidi alobaki na Nzambe boye: “Oyebi ntango wana nakofanda mpe wana nakotɛlɛma; oyebi makanisi na ngai longwa na mosika. Naino liloba ebimi na lolemo na ngai te, ee [Yehova], Oyebi yango nyonso.” (Nz. 139:2, 4) Lokola Yehova ayebi biso malamu, tokoki nde kotya ntembe ete ayebi makambo oyo eleki malamu mpo na biso? Longola yango, Yehova azali na bwanya nyonso. Amonaka makambo nyonso, amonaka mosika koleka moto nyonso, mpe ayebaka nsuka ya likambo banda na ebandeli na yango. (Yis. 46:9-11; Lom. 11:33) Yehova azali “Nzambe, oyo kaka ye moko nde azali moto ya bwanya.”​—Lom. 16:27.

4 Lisusu, Yehova alingaka biso mpe alukaka ntango nyonso bolamu na biso. (Yoa. 3:16; 1 Yoa. 4:8) Lokola azali Nzambe ya bolingo, apesaka biso biloko mingi. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpamba te ekitaka uta na Tata ya miinda ya likoló.” (Yak. 1:17) Baoyo bandimaka ete Nzambe atambwisa bango bazwaka mapamboli mingi.

5 Lisusu, Yehova azali na nguya nyonso. Mpo na yango, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Oyo akofandaka kati na esika ya kobombama ya Oyo-Aleki-Likoló, akopema na nse ya elilingi ya Oyo-na-nguya-Nyonso. Nakoloba epai na [Yehova] ete, Yo ozali ebombelo na ngai mpe ndako na ngai makasi, Nzambe na ngai oyo ekondima ngai.” (Nz. 91:1, 2) Kolanda litambwisi ya Yehova elimboli koluka libateli ya Nzambe oyo azali na nguya nyonso. Ata ntango tokutani na botɛmɛli, Yehova akosunga biso. Akotika biso te. (Nz. 71:4, 5; Tángá Masese 3:19-26.) Ya solo, Yehova ayebi makambo oyo eleki malamu mpo na biso, alingaka bolamu na biso, mpe azali na nguya ya kopesa biso oyo eleki malamu. Ezali mpenza bozoba koboya litambwisi na ye! Kasi, ntango nini tozalaka na mposa ya litambwisi yango?

Ntango nini tozalaka na mposa ya litambwisi?

6, 7. Ntango nini tozalaka na mposa ya litambwisi ya Yehova?

6 Tozalaka na mposa ya litambwisi ya Nzambe na bomoi na biso mobimba, banda bolenge tii na bobange. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Oyo azali Nzambe, Nzambe na biso libela na libela; ye akozala motambolisi na biso kino ntango ya kufa.” (Nz. 48:14) Ndenge moko na mokomi ya nzembo, baklisto oyo bazali na bwanya batikaka te koluka litambwisi ya Nzambe.

7 Kasi, ezali na bantango oyo tozalaka na mposa makasi ya lisalisi. Na bantango mosusu, tozalaka na “mpasi” makasi, na ndakisa ntango tokutani na botɛmɛli, tozali na maladi ya makasi, to mpe balongoli biso na mosala. (Nz. 69:16, 17) Na ntango wana, ezalaka malamu tótya elikya ete Yehova akopesa biso makasi ya koyika mpiko mpe akotambwisa biso mpo tózwa bikateli ya malamu. (Tángá Nzembo 102:17.) Kasi, tozalaka mpe na mposa ya lisalisi na ye na bantango mosusu. Na ndakisa, ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bazalani na biso, tozalaka na mposa Yehova atambwisa biso mpo mosala na biso ebota mbuma malamu. Ntango tolingi kozwa ekateli moko, ezala na oyo etali kominanola, molato mpe monzɛlɛ, baninga, mosala, kelasi, to likambo mosusu, ekateli na biso ekozala ya bwanya kaka soki tolandi litambwisi ya Yehova. Ya solo, tozalaka na mposa ya litambwisi ya Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na biso.

Makama ya koboya litambwisi ya Nzambe

8. Ekateli oyo Eva azwaki ya kolya mbuma oyo epekisamaki emonisaki nini?

8 Kasi, tóbosana te ete biso moko tosengeli komonisa ete tozali na mposa ya kolanda litambwisi ya Yehova. Nzambe asɛngisaka biso na makasi te ete tósala yango. Moto ya liboso oyo aponaki koboya kolanda litambwisi ya Yehova ezalaki Eva, mpe ndakisa na ye emonisi ete ekateli ya ndenge wana ezali likama mpenza. Tókanisa mpe oyo ekateli na ye emonisaki. Eva alyaki mbuma oyo epekisamaki mpo alingaki ‘kozala lokola Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.’ (Gen. 3:5) Na yango, amityaki na esika ya Nzambe, akómaki kozwa bikateli ye moko na esika ya kolanda litambwisi ya Yehova. Na ndenge yango, apesaki boyangeli ya Yehova mokɔngɔ. Alingaki komiyangela ye moko. Mobali na ye Adama mpe alandaki nzela yango ya botomboki.​—Lom. 5:12.

9. Soki toboyi kolanda litambwisi ya Yehova, yango ekomonisa nini, mpe mpo na nini yango ezali mpenza bozoba?

9 Lelo oyo, soki toboyi kolanda litambwisi ya Yehova, ekomonisa ete tolingi boyangeli na ye te. Tózwa ndakisa ya moto moko oyo akómi na ezaleli ya kotala bafilme to mikanda ya bato bazali bolumbu. Soki moto yango azali ndeko na kati ya lisangá, ayebi mobeko ya Nzambe na likambo yango. Makambo ya bosɔtɔ esengeli ata kotángama te, tosengeli mpe te kotalaka yango. (Ef. 5:3) Lokola moto yango aboyi kolanda litambwisi ya Yehova, emonisi ete aboyi ete Yehova azala Mokonzi na ye. (1 Kol. 11:3) Kosala ndenge wana ezali mpenza bozoba, mpamba te, ndenge Yilimia alobaki yango, “ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.”​—Yil. 10:23.

10. Mpo na nini tosengeli kosalela bonsomi na biso ya kopona na ndenge ya malamu?

10 Bato mosusu bakoki kotyela maloba ya Yilimia ntembe mpe koloba ete lokola Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, akoki te kopekisa biso kosalela yango. Nzokande, tóbosana te ete atako bonsomi ya kopona ezali likabo ya Nzambe, ezali mpe mokumba. Tokozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na makambo oyo toponaka koloba to kosala. (Lom. 14:10) Yesu alobaki boye: “Uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ elobaka.” Alobaki lisusu ete: “Longwa na motema nde ebimaka makanisi ya mabe, koboma bato, bikobo, bapite, koyiba, matatoli ya lokuta, matuki.” (Mat. 12:34; 15:19) Na yango, maloba mpe misala na biso emonisaka ndenge motema na biso ezali. Emonisaka ndenge tozali mpenza. Yango wana, moklisto oyo azali na bwanya alukaka litambwisi ya Yehova na makambo nyonso. Na ndenge yango, Yehova amonaka ete moklisto yango azali ‘sembo kati na motema’ mpe ‘akosala malamu’ mpo na ye.​—Nz. 125:4.

11. Liteya nini tozwi na lisolo ya Bayisalaele?

11 Tókanisa lisolo ya Bayisalaele. Ntango bazalaki kozwa bikateli ya malamu mpe kotosa mibeko ya Yehova, Yehova azalaki kobatela bango. (Yos. 24:15, 21, 31) Nzokande, mbala na mbala bazalaki kosalela bonsomi na bango ya kopona na ndenge ya malamu te. Na mikolo ya Yilimia, Yehova alobaki mpo na bango ete: “Bayokaki te, basembolaki matoi na bango te; batambolaki na toli mpe na mabanza ya mitema na bango mabe, bazongaki nsima, bayaki liboso te.” (Yil. 7:24-26) Ezalaki mpenza mawa! Yango wana, tosengeli te kotika ete motema na biso etinda biso tóboya litambwisi ya Yehova mpe tótambola na toli na biso moko, mpo tokozonga nsima na esika ya kokende liboso!

Kolanda toli ya Nzambe esɛngaka nini?

12, 13. (a) Ezaleli nini etindaka biso tólanda litambwisi ya Yehova? (b) Mpo na nini kondima ezali na ntina?

12 Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tólanda litambwisi na ye. (1 Yoa. 5:3) Kasi, Paulo amonisaki ezaleli mosusu oyo tosengeli na yango ntango alobaki boye: “Tozali kotambola na kondima, kasi na komona te.” (2 Kol. 5:6, 7) Mpo na nini kondima ezali na ntina? Yehova azali kotambwisa biso na “nzela ya boyengebene,” kasi nzela yango ememelaka biso bozwi to lokumu te na mokili oyo. (Nz. 23:3) Mpo na yango, tosengeli kotya miso na biso ya kondima na mapamboli ya elimo oyo tozali kozwa na mosala ya Yehova. (Tángá 2 Bakolinti 4:17, 18.) Kondima esalisaka biso tósepela na mwa biloko ya mosuni oyo tozali na yango.​—1 Tim. 6:8.

13 Yesu amonisaki ete losambo ya solo esɛngaka kozala na elimo ya komipimela, oyo esɛngaka mpe kondima. (Luka 9:23, 24) Baklisto mosusu ya sembo bamipimelaki makambo mingi, bayikaki mpiko na bobola, minyoko, koyinama, ata mpe botɛmɛli ya makasi. (2 Kol. 11:23-27; Emon. 3:8-10) Kondima makasi nde esalisaki bango báyikela makambo yango mpiko na esengo. (Yak. 1:2, 3) Kondima makasi esalisaka biso tómona mpenza ete kolanda litambwisi ya Yehova elekaka ntango nyonso malamu. Ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. Tozalaka mpenza na elikya ete mbano oyo bato oyo bazali koyika mpiko bakozwa ezali monene koleka minyoko oyo bazali kokutana na yango mpo na mwa ntango.​—Ebe. 11:6.

14. Mpo na nini Agala asengelaki komikitisa?

14 Tótalela mpe ntina ya komikitisa mpo na kolanda litambwisi ya Yehova. Ndakisa ya Agala, moombo ya Sala, emonisi yango. Lokola Sala azalaki kaka kobota te, apesaki Agala epai ya Abalayama, mpe Agala akómaki na zemi. Na nsima, Agala akómaki na lolendo liboso ya nkolo na ye oyo azalaki ekomba. Yango wana, Sala “anyokolaki ye,” mpe Agala akimaki. Anzelu moko ya Yehova akutanaki na Agala mpe alobaki na ye boye: “Zongá epai ya nkolo na yo, mpe tosá ye.” (Gen. 16:2, 6, 8, 9) Mbala mosusu Agala alingaki kosepela soki anzelu ayebisaki ye likambo mosusu. Mpo na kolanda toli oyo anzelu apesaki ye, asengelaki kotika lolendo. Agala amikitisaki mpe asalaki ndenge anzelu ayebisaki ye, mpe Yisamaele, mwana na ye abotamaki na ndako ya tata na ye.

15. Lobelá mwa makambo oyo ekoki kosɛnga ete tózala na komikitisa mpo na kolanda litambwisi ya Yehova.

15 Ekoki kosɛnga ete biso mpe tózala na komikitisa mpo na kolanda litambwisi ya Yehova. Na ndakisa, basusu basengeli kozala na komikitisa mpo na kondima ete lolenge moko ya kominanola oyo basepelaka na yango ezali mabe na miso ya Yehova. Ekoki kozala ete ndeko moko ayokisaki mozalani na ye nkanda mpe asengeli kosɛnga ye bolimbisi. Ekoki mpe kozala ete asalaki libunga, mpe asengeli kondima yango. Ezali boni soki moto asali lisumu? Asengeli kozala na komikitisa mpo na koyebisa yango epai ya bankulutu. Ndeko mosusu mpe akoki kobimisama na lisangá. Mpo azonga na lisangá, asengeli komikitisa, kobongola motema mpe kobongwana. Na makambo wana mpe na makambo mosusu oyo ekokani na yango, maloba ya Masese 29:23 ebɔndisaka: “Lolendo ya moto ekokweisa ye na nse; nde lokumu ekotɛmisa mosɔkɛmi na motema.”

Ndenge nini Yehova atambwisaka biso?

16, 17. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa mpenza matomba na litambwisi oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya Biblia?

16 Nzambe atambwisaka biso libosoliboso na nzela ya Biblia, Liloba na ye. (Tángá 2 Timote 3:16, 17.) Mpo na kozwela yango mpenza matomba, tosengeli te kozelaka tókutana naino na mokakatano mpo na koluka lisalisi ya Makomami. Tosengeli nde kotángaka Biblia mokolo na mokolo. (Nz. 1:1-3) Na ndenge yango, tokomesana na Liloba ya Nzambe. Tokokóma na makanisi ya Nzambe mpe tokoyeba oyo tosengeli kosala ata ntango tokutani na mokakatano moko na mbalakaka.

17 Longola yango, ezali na ntina komanyola makambo oyo totángi na Makomami mpe kobondela mpo na yango. Ntango tozali komanyola bavɛrsɛ ya Biblia, tosengeli kokanisaka ndenge oyo tokoki kosalela yango na makambo oyo tokoki kokutana na yango. (1 Tim. 4:15) Ntango tokutani na mikakatano ya makasi, tosengeli kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye lisalisi oyo tozali na yango mposa. Elimo santu ya Yehova ekozongisa na makanisi na biso mitinda ya Nzambe oyo totángaki na Biblia to na mikanda oyo elimbolaka Biblia.​—Tángá Nzembo 25:4, 5.

18. Ndenge nini Yehova asalelaka bandeko na biso baklisto mpo na kotambwisa biso?

18 Bandeko na biso baklisto mpe basalisaka biso mpenza mpo na kolanda litambwisi ya Yehova. Libosoliboso, tozali na “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe momonisi na ye, Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo azali ntango nyonso kopesa biso bilei ya elimo na nzela ya mikanda, makita, mpe mayangani. (Mat. 24:45-47; talá mpe Misala 15:6, 22-31.) Tozali mpe na bandeko oyo bakɔmeli na elimo, mingimingi bankulutu, oyo bazali na makoki ya kosalisa mokomoko na biso mpe kopesa biso toli oyo euti na Biblia. (Yis. 32:1) Bilenge oyo bazali na mabota ya baklisto bazali mpe na lisalisi mosusu. Nzambe apesi baboti na bango mokumba ya kotambwisa bango mpe basengeli kolanda litambwisi yango.​—Ef. 6:1-3.

19. Mapamboli nini tozali na yango lokola tozali ntango nyonso kolanda litambwisi ya Yehova?

19 Tomoni ete Yehova atambwisaka biso na ndenge mingi mpe ete ezali malamu kolanda litambwisi yango. Mokonzi Davidi alobelaki eleko moko oyo Bayisalaele bazalaki sembo; alobaki boye: “Batata na biso batalelaki yo, batalelaki yo mpe yo obikisaki bango. Babelelaki yo mpe babikaki; batalelaki yo mpe bayokaki nsɔni te.” (Nz. 22:3-5) Soki biso mpe tozali kotalela Yehova mpe tozali kolanda litambwisi na ye, ‘tokoyoka nsɔni te.’ Elikya na biso ekozala mpamba te. Soki ‘totikeli [Yehova] elekelo na biso,’ na esika ya kotya motema na mayele na biso moko, akopambola biso banda sikoyo. (Nz. 37:5) Mpe soki tolendendeli na nzela yango, mapamboli yango ekozala libela na libela. Mokonzi Davidi akomaki boye: “[Yehova] alingi sembo; akobatela bayengebene na ye. Akobatela bango seko . . . Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nz. 37:28, 29.

Okoki kolimbola?

• Mpo na nini tosengeli kotya motema na litambwisi ya Yehova?

• Soki toboyi litambwisi ya Yehova, yango ekomonisa nini?

• Na makambo nini moklisto asengeli komikitisa?

• Ndenge nini Yehova atambwisaka biso lelo oyo?

[Bililingi na lokasa 8]

Olukaka litambwisi ya Yehova na makambo nyonso ya bomoi na yo?

[Elilingi na lokasa 9]

Eva aboyaki boyangeli ya Yehova

[Elilingi na lokasa 10]

Ezaleli nini Agala asengelaki na yango mpo na kolanda toli ya anzelu?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto