Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/10 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/10 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mpo na nini kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya?

Yesu Kristo azali kotambola na mpunda mpo na kolonga banguna ya Bokonzi ya Nzambe

Olingi koyeba makambo mosusu etali Bokonzi ya Nzambe mpe oyo ekosala?

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló. Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka ete eya mpo yango nde ekozongisa bosembo mpe kimya na mabele. Ata guvɛrnema moko te ya bato ekosilisa mobulu, kozanga bosembo mpe maladi, kasi Bokonzi ya Nzambe ekoki mpe ekosala yango. Nzambe aponi Mwana na ye, Yesu mpo azala mokonzi ya Bokonzi yango. Yehova aponi mpe mwa etuluku ya bayekoli ya Yesu mpo báyangela ná Yesu na Bokonzi yango.​—Tángá Luka 11:2; 22:28-30.

Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekolongola bato nyonso oyo batɛmɛlaka Bokonzi yango. Yango wana, kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya ezali kosɛnga ete guvɛrnema ya Nzambe ezwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya bato.​—Tángá Danyele 7:13, 14; Emoniseli 11:15, 18.

Mpo na nini Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato matomba?

Yesu nde mokonzi oyo abongi mpenza mpo azali na motema mawa. Lokola azali Mwana ya Nzambe, azali na nguya ya kosalisa bato nyonso oyo bazali kosɛnga lisalisi epai ya Nzambe.​—Tángá Nzembo 72:8, 12-14.

Bokonzi ya Nzambe ekopesa matomba epai ya bato nyonso oyo babondelaka na bosembo ete Bokonzi yango eya mpe bazali na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe ezali mosala ya mpunda te.​—Tángá Luka 18:16, 17; Yoane 4:23.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 8 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova

Okoki mpe kozwa yango na Internet www.jw.org

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto