Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/1 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Banyama
    Lamuká!—2015
  • Banyama ekendeke na likoló?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/1 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Nini etindaka bato mingi bándima ete Mozalisi azalaka?

Mama moko azali kosepela na mwana na ye

Bomoi ezali likamwisi, boye te?

Eleki sikoyo bambula soki 3 000, powɛti moko akomaki boye: “Nasalami na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ.” (Nzembo 139:14) Soki okanisi ndenge oyo mwana abandaka na mwa selile moko ya moke na libumu ya mama, yango ekamwisaka yo te? Bato mingi bamonaka mpenza ete Mozalisi moko nde akelá bikelamu nyonso ya bomoi.​—Tángá Nzembo 139:13-17; Baebre 3:4.

Nzambe oyo akelá likoló mpe mabele oyo tofandi, akelá mpe bomoi. (Nzembo 36:9) Asololaki na bato mpe ayebisá biso makambo etali ye.​—Tángá Yisaya 45:18.

Toutá nde na banyama?

Nzoto na biso ekokani na oyo ya banyama na makambo mingi. Kasi ezali bongo mpo Mozalisi akelá bato ná banyama mpo báfanda na mabele. Asalelaki nyama te mpo na kokela moto ya liboso kasi nde putulu ya mabele.​—Tángá Ebandeli 1:24; 2:7.

Bato bakeseni na banyama na makambo mibale ya ntina mingi. Ya liboso, bato bazali na likoki ya koyeba, kolinga mpe kotosa Mozalisi. Ya mibale, Nzambe akelá bato mpo bázala na bomoi ya seko, kasi ezali bongo te mpo na banyama. Kasi lelo bato nyonso bakufaka mpo moto ya liboso aboyaki litambwisi ya Mozalisi.​—Tángá Ebandeli 1:27; 2:15-17.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 1 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Okoki mpe kozwa yango na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto