Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/3 nk. 13-15
  • Makabo oyo ebongaki na Mokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makabo oyo ebongaki na Mokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • EKATISI ESOBE YA ARABIE
  • “SEKELE YA MOMBONGO OYO EBATELAMAKI KOLEKA BASEKELE MOSUSU NYONSO”
  • Ndenge oyo bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Balsame ya Gileade—Mafuta oyo ebikisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/3 nk. 13-15
Matiti ndenge na ndenge ya nsolo kitoko

Makabo oyo ebongaki na Mokonzi

“Banganga-minzoto bauti na ɛsti . . . bafungolaki mpe biloko na bango ya motuya mpe bapesaki ye makabo: wolo, olibana ná mire.”​—Matai 2:1, 11.

OKOPONA likabo ya ndenge nini soki olingi kopesa moto moko ya lokumu? Na ntango ya kala, matiti mosusu ya nsolo kitoko ezalaki na valɛrɛ ndenge moko na wolo; lokola ezalaki na valɛrɛ mingi, ezalaki na kati ya makabo oyo bazalaki kopesa mokonzi.a Yango wana na makabo oyo banganga-minzoto bamemelaki “mokonzi ya Bayuda,” mibale na yango ezalaki matiti ya nsolo kitoko.​—Matai 2:1, 2, 11.

Mafuta ya balsame

Mafuta ya balsame

Biblia elobi mpe ete ntango mokonzi-mwasi ya Sheba ayaki kotala Solomo, “apesaki mokonzi talanta nkama moko na ntuku mibale (120) ya wolo, ebele ya mafuta ya balsame ná mabanga ya ntalo; mpe mafuta ya balsame lokola oyo mokonzi-mwasi ya Sheba apesaki Mokonzi Salomo emonaná lisusu te.”b (2 Ntango 9:9) Bakonzi bazalaki mpe kotindela Salomo mafuta ya balsame mpo na komonisa ete basepeli na ye.​—2 Ntango 9:23, 24.

Mpo na nini matiti yango ya nsolo kitoko mpe biloko mosusu ya ndenge wana ezalaki na motuya mpe ntalo mingi na ntango ya kala? Mpo bazalaki kosala na yango makambo mingi ya ntina, na ndakisa kosala mafuta mpo na kobongisa loposo, kosalela yango na milulu ya losambo mpe na kokunda ebembe. (Talá etanda “Ndenge oyo bazalaki kosalela matiti ya nsolo kitoko na ntango ya kala.”) Eloko ezalaki kosala ete ezala ntalo mingi ezalaki mpo bato mingi bazalaki na mposa na yango mpe mpo tike mpe piblisite na yango ezalaki kozwa mbongo mingi.

EKATISI ESOBE YA ARABIE

Kasia

Kasia

Na ntango ya kala, matiti mosusu ya nsolo kitoko ezalaki kobota na lobwaku ya Yordani. Kasi, mosusu ezalaki kouta na bikólo mosusu. Biblia elobeli matiti ndenge na ndenge ya nsolo kitoko. Fololo safra, aloe, balsame, kinamono, olibana, mire nde eyebanaki mingi. Longola yango, ezalaki mpe na biloko mikemike oyo batyaka na biloko lokola kumini, manti mpe aneti.

Matiti wana ya nsolo kitoko ezalaki kouta wapi? Aloe, kasia mpe kinamono ezalaki kouta na bamboka oyo tobengaka lelo Chine, Inde mpe Sri Lanka. Matiti ya nsolo kitoko lokola mire mpe olibana ezalaki kouta na banzete mpe banzete mikemike oyo ezalaki kokóla na sudi ya Arabie tii na Somalie, na Afrika. Mpe narde ezalaki kaka na Himalaya, na Inde.

Safra

Safra

Mpo ekóma na Yisraele, matiti mingi ya nsolo kitoko ezalaki kokatisa Arabie. Mpo na yango, buku moko (The Book of Spices) elobi ete na boumeli ya mobu 2000 mpe mobu 1000 liboso ya ntango na biso, Arabie ekómaki “nzela kaka moko oyo biloko ezalaki koleka na Ɛsti mpo na kokende na Wɛsti.” Bingumba ya kala, bifelo mpe esika oyo bato ya mimbongo bazalaki kosuka, oyo bamonaki na Néguev na sudi ya Yisraele, emonisi banzela oyo bakomelesa ya matiti ya nsolo kitoko bazalaki koleka. Lapolo moko ya UNESCO emonisi ete bisika yango “ezali komonisa ete mombongo wana oyo ezalaki kosalema kolongwa na sudi ya Arabie tii na Mediterane, ezalaki na benefisi mingi.”

“Atako ezalaki mikemike, ntalo makasi mpe bato bazalaki koluka yango mingi, matiti ya nsolo kitoko ezalaki biloko ya kotɛka oyo bato balingaki mingi.”​—Buku The Book of Spices

Bakomelesa bazalaki komema mbala na mbala ebele ya matiti ya nsolo kitoko mpo na kosala mobembo ya bakilomɛtrɛ 1 800 mpo na kokatisa Arabie. (Yobo 6:19) Biblia elobeli molɔngɔ ya ebele ya Bayishimaele oyo bazalaki bakomelesa mpe bamemaki matiti ya nsolo kitoko lokola “ladanume mpe balsame mpe mposo ya nzete oyo ebimisaka mpaka” ya Gileade mpo na kokende na yango na Ezipito. (Ebandeli 37:25) Bana ya Yakobo batɛkaki ndeko na bango Yozefe lokola moombo epai ya bakomelesa yango.

“SEKELE YA MOMBONGO OYO EBATELAMAKI KOLEKA BASEKELE MOSUSU NYONSO”

Aneti

Aneti

Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, kaka bakomelesa ya Arabie nde bazalaki kotɛka matiti ya nsolo kitoko. Na Azia mobimba, bango kaka nde bazalaki kotɛka matiti ya nsolo kitoko, lokola kasia mpe kinamono. Mpo na kolɛmbisa bato oyo bafandaka pembenipembeni ya Mbu Mediterane nzoto mpo básala te mombongo ya biloko oyo ezalaki kouta na Ɛsti, bato ya Arabie babimisaki masapo ya lokuta mpo na komonisa ete koluka kozwa matiti ya nsolo kitoko ezali na makama. Buku moko (The book of Spices) elobi ete esika mpenza matiti yango ya nsolo kitoko ezalaki kouta ekómaki “sekele ya mombongo oyo ebombamaki malamu koleka basekele mosusu nyonso.”

Kumini

Kumini

Masapo nini bato ya Arabie bapalanganisaki? Herodote, moto moko ya istware ya siɛklɛ ya 5 liboso ya ntango na biso, alobelaki masapo ya bandɛkɛ ya nsɔmɔ oyo ezalaki kotonga bazumbu na yango na mposo ya nzete ya kinamono likoló ya ngomba oyo moto akokaki kokóma te. Mpo na kozwa matiti yango ya ntina mingi, akomaki ete esengelaki kotya biteni minene ya misuni na nse ya ngomba. Na lokoso nyonso, bandɛkɛ ezalaki komema ebele ya misuni yango na bazumbu na yango, kilo ya misuni yango ezalaki kosala ete bazumbu yango ekwea na nse mpe epanzana. Na nsima, bato bazalaki kolɔkɔta nokinoki mposo ya nzete ya kinamono mpo na kotɛkela yango bakomelesa. Masapo ya ndenge wana epalanganaki mingi. Buku yango ebakisi ete mpo na “makama oyo babandaki koloba mpo na kozwa [kinamono] yango, esalaki ete etɛkama na ntalo mingi.”

Manti

Manti

Nsukansuka, sekele ya bato ya Arabie eyebanaki mpe bato mosusu bakómaki mpe kosala mombongo yango. Na siɛklɛ ya liboso liboso ya ntango na biso, Alexandrie, na Ezipito, ekómaki libongo ya monene mpe esika oyo mombongo ya matiti ya nsolo kitoko ezalaki kosalema mingi. Ntango bakapitɛni ya bamasuwa ya Roma bayebaki ndenge ya kotambwisa bamasuwa na ntango ya mbula makasi mpe mipɛpɛ makasi ya Mbu Indien, bakómaki kokatisa mabongo ya Ezipito mpo na kokende na Inde. Yango esalaki ete matiti ya nsolo kitoko ekóma ebele mpe ntalo na yango ekita.

Lelo oyo, valɛrɛ na yango ekokani ata moke te na oyo ya wolo. Mpe ezali mpasi tómona ete ezali likabo oyo ebongi kopesa mokonzi. Kasi, bamilio ya bato na mokili mobimba bazali kokoba kosalela yango mpo na kosala bamalasi mpe bankisi; mpe mpo na kobakisa elɛngi na biloko na bango ya kolya. Na ntembe te, nsolo kitoko ya matiti yango esali ete eyebana mingi lelo oyo, kaka ndenge ezalaki eleki sikoyo bankóto ya bambula.

Liboke ya kinamono

Kinamono

a Na Biblia, liloba oyo babongoli na “matiti ya nsolo kitoko” emonisaka mingimingi matiti oyo bazwaka na banzete oyo ebimisaka nsolo kitoko, kasi te biloko mikemike oyo batyaka na biloko mpo na kopesa yango elɛngi.

b “Mafuta ya balsame” emonisaka mafuta ya nsolo kitoko to mpaka oyo eutaka na banzete mpe banzete mikemike.

Ndenge oyo bazalaki kosalela matiti ya nsolo kitoko na ntango ya kala

Mafuta mosantu mpe mpaka ya malasi. Yehova alakisaki Moize ndenge ya kosala mafuta mosantu mpe mpaka ya malasi. Bazalaki kosala yango nyonso mibale na matiti minei ya nsolo kitoko. (Kobima 30:22-25, 34-38) Banganga-nzambe mosusu bayebaki mpenza kosala mafuta mosantu mpe bazalaki na mokumba ya kobatela yango.​—Mitángo 4:16; 1 Ntango 9:30.

Malasi mpe mafuta ya nsolo kitoko. Bato oyo bazalaki na likoki ya kosomba yango bazalaki kosalela pudrɛ ya nsolo kitoko mpo na bandako, bilamba, bambeto mpe nzoto na bango. (Estere 2:12; Masese 7:17; Loyembo ya Salomo 3:6, 7; 4:13, 14) Maria, ndeko ya Lazare asopelaki Yesu “mafuta ya nsolo kitoko, narda ya solosolo” ya ntalo mingi na nsuki mpe na makolo. Elokó ya moke ya “narda ya solosolo” ezalaki na ntalo ya lifuti ya mbula mobimba.​—Marko 14:3-5; Yoane 12:3-5.

Kobongisa ebembe mpo na kokunda yango. Nikodeme apesaki “rulo ya mire mpe aloe” mpo na kobongisa nzoto ya Yesu liboso bákunda yango. (Yoane 19:39, 40) Bayekoli mosusu ya Yesu babongisaki “matiti ya nsolo mpe mafuta ya nsolo kitoko” mpe bamemaki yango na lilita.​—Luka 23:56–24:1.

Kotya yango na bilei. Ekoki kozala ete Bayisraele bazalaki mpe kosalela matiti ya nsolo kitoko na bilubu ya mbisi mpe nyama mpo na kokómisa yango elɛngi. Bazalaki kotya matiti mosusu ya nsolo kitoko na vinyo mpo na kokómisa yango makasi.​—Loyembo ya Salomo 8:2.

Matiti mibale ya nsolo kitoko oyo bapesaki Yesu

Ezala olibana to mire ezalaki mai ya kole oyo ezalaki kobima na nzete ya mikemike to ya nzubɛnzubɛ oyo bazalaki kokata mposo na yango.

Nzete ya olibana ezalaki kobota pembenipembeni ya bokula ya sudi ya Arabie mpe nzete ya mire ezalaki kobota na bamboka oyo ezalaki mwa esobe oyo babengaka lelo Somalie mpe Yémen. Bato bazalaki kolinga mingi matiti yango mibale mpo na nsolo kitoko na yango. Yehova aponaki yango mpo na makambo ya losambo na ye​—bazalaki kotya mpe mire na mafuta mosantu mpe olibana na mpaka ya malasi. (Kobima 30:23-25, 34-37) Kasi, bazalaki kosalela yango ndenge moko te.

Bazalaki kosalela olibana mingimingi lokola mpaka mpe esengelaki kotumba yango mpo na kobimisa nsolo ya malasi. Kasi mai ya kole oyo bazalaki kobimisa na mire, bazalaki kosalela yango mbala moko. Batángi mire mbala misato mobimba na masolo etali Yesu: Na kado oyo bayelaki ye ntango azalaki mwana moke (Matai 2:11), nkisi oyo bapesaki mpo na kokitisa mpasi na ye ntango azalaki likoló ya nzete ya mpasi (Marko 15:23) mpe na moko ya matiti ya nsolo kitoko oyo basalelaki mpo na kobongisa nzoto na ye liboso bákunda yango (Yoane 19:39).

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto