Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/6 nk. 21-23
  • Balsame ya Gileade—Mafuta oyo ebikisaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balsame ya Gileade—Mafuta oyo ebikisaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balsame na ntango ya kala
  • Balsame mpo na ekólo oyo ezalaki maladi
  • Nsango malamu oyo ebikisaka
  • Kobikisama oyo ezali koya
  • Ndenge oyo bazalaki kosalela biloko ya kobongisa nzoto na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Malási kati na Galadi
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Ozali koyeba lisusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Makabo oyo ebongaki na Mokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/6 nk. 21-23

Balsame ya Gileade​—Mafuta oyo ebikisaka

LISOLO moko oyo bato mingi bayebi oyo ezali na mokanda ya Ebandeli elobeli ndenge bandeko ya Yozefe batɛkaki ye epai ya bato ya mombongo, Bayishimaele oyo bazalaki kokende na Ezipito. Bato yango bautaki na Gileade mpe bakamela na bango ezalaki komema balsame mpe biloko mosusu na Ezipito. (Ebandeli 37:25) Mwa lisolo mokuse wana emonisi ete balsame ya Gileade ezalaki eloko ya motuya mingi na Moyen-Orient ya kala, bazalaki kosepela na yango mpo na ndenge ezalaki kobikisa.

Kasi, na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso, mosakoli Yirimia atunaki na mawa nyonso: “Balsame ezali na Gileade te?” (Yirimia 8:22) Nini etindaki Yirimia atuna motuna yango? Balsame ezali nini? Lelo oyo ezali na balsame oyo ebikisaka?

Balsame na ntango ya kala

Balsame ezali liloba oyo esalelamaka mingi mpo na kolobela mai moko ya nsolo kitoko oyo ezalaka mafutamafuta oyo eutaka na milona mpe banzete ya mikemike. Mbala mingi, mafuta ya balsame oyo bazalaki kosalela mpo na mpaka malasi mpe malasi, ezalaki moko ya biloko ya ntalo na Moyen-Orient. Ezalaki na kati ya biloko oyo bazalaki kosangisa na mafuta oyo bazalaki kosalela mpo na kotya bato oyo Nzambe aponaki; bazalaki mpe kotya yango na mpaka malasi oyo ezalaki kosalelama na tabernakle mwa moke nsima ya kobima ya Bayisraele na Ezipito. (Kobima 25:6; 35:8) Mafuta ya balsame ezalaki mpe na kati ya ebele ya bakado oyo mokonzi mwasi ya Sheba amemelaki Mokonzi Salomo. (1 Bakonzi 10:2, 10) Babongisaki mpe banyolisaki Estere nzoto “sanza motoba na mafuta ya balsame” liboso akɔta epai ya Mokonzi ya Perse Ahasueruse.​—Estere 1:1; 2:12.

Atako mafuta ya balsame ezalaki kouta na bisika ndenge na ndenge ya Moyen-Orient, balsame ya Gileade ezalaki ya Mabele ya Ndaka, Gileade ezalaki etúká oyo ezalaki na ɛsti, mosika te na ebale Yordani. Mpo na Yakobo, balsame ezalaki moko ya “biloko oyo eleki kitoko ya mokili,” mpe atindaki yango lokola likabo na Ezipito. (Ebandeli 43:11) Lisusu, mosakoli Ezekiele atángaki balsame na kati ya biloko ya kotɛka oyo Yuda mpe Yisraele etindaki na Tire. (Ezekiele 27:17) Balsame eyebanaki mingi mpo ezalaki kosalelama lokola nkisi. Mbala mingi, mikanda ya kala elobelaka likoki oyo mafuta ya balsame ezalaki na yango ya kobikisa, mingimingi ya kosilisa bampota.

Balsame mpo na ekólo oyo ezalaki maladi

Kasi, mpo na nini Yirimia atunaki motuna oyo: “Balsame ezali na Gileade te”? Mpo na kokanga ntina ya motuna yango, tókanisa Yisraele ya kala. Liboso, mosakoli Yisaya alobelaki ndenge boyokani ya Bayisraele na Nzambe ebebaki: “Banda na nse ya lokolo tii na motó, eteni moko ya malamu ezali te. Bampota, bisika oyo bazokisi mpe bisika oyo babɛti​—bafini yango te mpo ebimisa mafina, bakangisi yango te.” (Yisaya 1:6) Na esika ekólo yango eyeba ete ezalaki lisusu na boyokani na Nzambe te mpe báluka kobikisama, ekólo yango ekobaki nde na etamboli na yango ya mabe. Na ntango wana, Yirimia amilelaki boye: “Babwaki liloba mpenza ya Yehova, bongo bwanya nini bazali na yango?” Soki bazongelaki Yehova, alingaki kobikisa bango. “Balsame ezali na Gileade te?” Oyo nde motuna ya kosimba motema!​—Yirimia 8:9.

Na bandenge mingi, mokili ya lelo etondi na “bampota, bisika oyo bazokisi mpe bisika oyo babɛti.” Bato bazali konyokwama na bobola, kozanga bosembo, moimi, mpe kozanga boboto, nyonso wana mpo bolingo ya Nzambe mpe ya mozalani ekiti. (Matai 24:12; 2 Timote 3:1-5) Bato mingi bamonaka lokola basundolami mpo bazali na mposo to mimeseno ekeseni to mpo bazali mibange to bilenge. Longola yango, likambo oyo eleki, ezali nzala, maladi, bitumba, mpe liwa oyo ezali kobakisela bango mpasi. Lokola Yirimia, bakristo mingi ya sembo bamitunaka soki “balsame ezali na Gileade” te oyo bakoki kosalela yango mpo na kopakola mpo esilisa mpasi mpe mpota ya elimo ya bato oyo bazali konyokwama.

Nsango malamu oyo ebikisaka

Na mikolo ya Yesu, bato ya komikitisa bazalaki mpe komituna motuna wana. Kasi, bazwaki eyano. Na ebandeli ya mobu 30 ya ntango na biso, na sinagoga ya Nazarete, Yesu atángaki rulo ya Yisaya, oyo elobaki boye: “Yehova atye ngai mafuta mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu. Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema.” (Yisaya 61:1) Na nsima, Yesu asalelaki maloba yango mpo na ye moko, amonisaki ete azali Masiya oyo azalaki na mokumba ya koyebisa bato nsango ya kobɔndisa.​—Luka 4:16-21.

Na boumeli ya mosala na ye, Yesu asakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na molende mpenza. (Matai 4:17) Na Lisolo Likoló ya Ngomba, alakaki bato oyo bazalaki konyokwama ete makambo na bango ekobongwana; alobaki boye: “Esengo na bino baoyo bozali kolela sikoyo, mpo bokosɛka.” (Luka 6:21) Yesu ‘akangaki bampota ya bato oyo bazoki na mitema’ na ndenge azalaki kosakola koya ya Bokonzi ya Nzambe, nsango moko ya elikya.

Na mikolo na biso, “nsango malamu ya bokonzi” ezali kaka kobɔndisa. (Matai 6:10; 9:35) Tózwa ndakisa ya Roger ná Liliane. Na sanza ya Yanuali 1961, bayekolaki bilaka ya Nzambe mpo na bomoi ya seko, mpe yango ezalaki lokola mafuta ya balsame na mitema na bango. Liliane alobi boye: “Nazalaki kotambola na kuku nazali kobina mpo na makambo oyo nazalaki koyekola. Nazalaki mpenza na esengo.” Roger, oyo na ntango wana akómaki paralize ngámbo moko na boumeli ya mbula zomi, abakisi boye: “Nakómaki na esengo monene, esengo ya kozala na bomoi, nyonso wana mpo na elikya kitoko ya lisekwa mpe nsuka ya bampasi nyonso mpe maladi.”​—Emoniseli 21:4.

Na 1970, batungisamaki ntango mwana na bango ya mobali ya mbula 11 akufaki. Kasi, babungisaki elikya te. Bayokaki mpenza ete Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema, mpe akangaka bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.” (Nzembo 147:3) Elikya yango ebɔndisaki bango. Eleki sikoyo mbula soki 50, nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe ememeli bango kimya mpe esengo.

Kobikisama oyo ezali koya

Na yango “balsame ya Gileade” ezali lelo oyo? Ɛɛ, lelo oyo balsame ya elimo ezali. Libɔndisi mpe elikya oyo nsango malamu ya Bokonzi ezali kopesa ekoki kokanga mpota ya mitema. Olingi komona likambo yango? Mpo na yango, osengeli kofungola motema na yo na nsango ya kobɔndisa oyo euti na Liloba ya Nzambe mpe kopesa yango nzela ya kokamba bomoi na yo. Bamilio ya bato basili kosala yango.

Kobikisama na nzela ya balsame yango ezali elilingi ya libɔndisi monene oyo ezali koya. Ntango oyo Yehova Nzambe ‘akobikisa bikólo’ mpo na kopesa bato bomoi ya seko ezali koya mbangu, na ntango yango “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’” Ya solo, “balsame ya Gileade” ezali kaka!​—Emoniseli 22:2; Yisaya 33:24.

[Elilingi na lokasa 23]

Nguya ya kobikisa ya nsango malamu ezali kokoba kokitisa mpasi ya bato oyo mitema ezoki lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto