Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/9 lok. 4
  • Biso Batatoli ya Yehova tozali bato ya ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biso Batatoli ya Yehova tozali bato ya ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosakolaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Kokɔta na makambo ya mokili te elakisi nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • “Bazali bato ya mokili te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/9 lok. 4
Batatoli ya Yehova ya mposo ndenge na ndenge bazali kopesana mbote na Ndako ya Bokonzi

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BATATOLI YA YEHOVA BAZALI BANANI?

Biso Batatoli ya Yehova tozali bato ya ndenge nini?

Tozali ebongiseli ya mokili mobimba oyo esanganaka na mangomba mosusu te. Atako Biro monene na biso ezalaka na États-Unis, ebele ya Batatoli ya Yehova bafandaka na mikili mosusu. Kutu, tozali bato milio soki mwambe mpe toteyaka bato Biblia na mikili koleka 230. Tosalaka bongo mpo na kotosa maloba oyo ya Yesu: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Ezala tofandi esika nini, totosaka mpenza mibeko. Kasi tosalaka nyonso tókɔta te na makambo ya politiki. Ezali mpo totosaka maloba oyo Yesu alobaki na bakristo ete “bazali bato ya mokili te.” Yango wana tokɔtaka te na makambo ya politiki to kopesa mabɔkɔ na bitumba. (Yoane 15:19; 17:16) Kutu, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakɔtisaki Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ, babɛtaki bango mabe mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Episkɔpɔ moko ya kala ya Allemagne, akomaki boye: “Bato yango bakoki mpenza koloba ete kaka bango nde baboyaki kopesa Hitler mabɔkɔ mpo na kotosa lisosoli na bango.”

“Ndenge oyo [Batatoli ya Yehova] bakangamaka na bizaleli malamu ekamwisaka mpenza. Tokoki kopesa bato yango oyo bazalaka na ezaleli ya moimi te bibonga minene na politiki, kasi bakondima yango ata moke te. . . . Batosaka bakonzi ya Leta, kasi bandimaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi nyonso ya bato.”​—Zulunalo moko (Nová Svoboda), République tchèque.

Ata bongo, tofandaka esika moko na bato nyonso. Yesu abondelaki Nzambe boye mpo na bayekoli na ye: “Nazali kosɛnga yo, olongola bango na mokili te.” (Yoane 17:15) Yango wana okoki komona biso na mosala, na bamagazini mpe na bakelasi na bisika oyo tofandaka.

MIKILI OYO BATATOLI YA YEHOVA BAZALI MINGI KOLEKA

  • États-Unis 1 190 000

  • Mexique 800 000

  • Brésil 770 000

  • Nigeria 330 000

  • Italie 250 000

  • Japon 220 000

Israël

Talá video Assemblée spéciale en Israël na www.pr2711.com mpo omona ndenge Batatoli ya Yehova ya Israël mpe Palestine balongi likambo ya kokabola bikólo. (Fungolá esika bakomi QUI SOMMES-NOUS? > ASSEMBLÉES)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto