Biblia—Buku ya masolo ya solo mpe ya bisakweli ya kotyela motema
Bilembeteli nini emonisi ete masolo oyo ezali na kati ya Biblia esalemá mpenza? Bisakweli nini ya Biblia oyo ekokisamá endimisi biso ete bisakweli mosusu oyo etikali ekokokisama mpe? Biyano na mituna wana ezali na video La Bible : un récit historique exact, des prophéties dignes de foi (Biblia—Buku ya masolo ya solo mpe ya bisakweli ya kotyela motema) oyo ezali eteni ya misato ya DVD La Bible : un livre historique et prophétique (Biblia—Buku ya makambo ya sikisiki mpe ya bisakweli ya kotyela motema). Nsima ya kotala video yango, okoki kopesa biyano na mituna oyo elandi?
(1) Makambo ya kotyela motema oyo ezali na Biblia eutá epai ya nani? (Dan. 2:28) (2) Ndenge nini Biblia elobeli na bosikisiki ndenge oyo makambo ezalaki na Ezipito ya kala, mpe ndenge nini esakweli oyo ezali na Yisaya 19:3, 4 ekokisamaki? (3) Ndenge nini biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolá emonisi ete makambo oyo Biblia elobi mpo na bato ya Asiri, bakonzi na bango, mpe kobebisama ya mboka yango ezali solo? (Nah. 3:1, 7, 13) (4) Bisakweli nini etali Babilone ekokisamaki mpenza? (Yir. 20:4; 50:38; 51:30) (5) Esakweli nini etali Media mpe Perse ekokisamaki? (Yis. 44:28) (6) Ndenge nini Danyele 7:6 mpe 8:5, 8 ekokisamaki mpo na Grɛsi? (7) Ndenge nini Danyele 7:7 ekokisamaki ntango Roma ekómaki ekólo oyo elekaki nguya na mokili mobimba? (8) Bato boni Biblia elobeli bazalaki na titre Kaisala? (9) Nini ekómelaki bakristo na boyangeli ya Néron? (10) Ndenge nini bisakweli oyo ezali na Emoniseli 13:11 mpe 17:10 ekokisamaki? (11) Mokonzi ya mwambe ezali nani? (12) Makambo nini tomoni na video yango emonisi ete Mosakoli 8:9 ezali solo? (13) Bisakweli nini ozelaka na mposa makasi ete ekokisama? (14) Ndenge nini okoki kosalela video yango mpo na kosalisa bato bándima ete Biblia eutá epai ya Nzambe?