Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/12 nk. 4-5
  • Buku oyo esengeli koyeba mateya na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Buku oyo esengeli koyeba mateya na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • EKOMAMÁ NA NDENGE OYO BATO BAKOKANGA NTINA
  • MOTO NYONSO AKOKI KOZALA NA YANGO
  • Biblia ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini osengeli kotyela Biblia likebi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Biblia ezali na nsango ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/12 nk. 4-5
Moto oyo asimbi Biblia mpe azali kotánga yango, mosusu azali kotánga yango na telefone

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOKI KOYEBA MATEYA YA BIBLIA

Buku oyo esengeli koyeba mateya na yango

Biblia ezali mpenza buku moko ya kala. Eumeli mbula boni? Babandaki kokoma Biblia na Moyen-Orient eleki sikoyo bambula soki 3 500. Ekomamaki na eleko oyo Shang, bokonzi moko ya nguya ya ekólo Chine ezalaki koyangela mpe basiɛklɛ soki zomi liboso lingomba ya Buda ebanda na Inde.​—Talá etanda “Makambo etali Biblia.”

Biblia epesaka biyano ya malamu na mituna ya ntina mingi etali bomoi

Mpo buku esalisa mpe epesa bato litambwisi ya malamu, esengeli ezala pɛtɛɛ mpo bato bákanga ntina mpe bázwela yango matomba. Biblia ezali mpenza bongo. Epesaka biyano ya malamu na mituna ya ntina mingi etali bomoi.

Na ndakisa, osí omituna, ‘mpo na nini tozali awa na mabele?’ Motuna yango etungisá bato na boumeli ya ebele ya bambula, mpe tii lelo etungisaka kaka bato. Kasi, tokoki kozwa eyano na motuna yango na mikapo mibale ya liboso ya Mokanda ya Ebandeli. Kuna, lisolo ya Biblia ezongisi biso bamilio ya bambula na nsima, na “ebandeli” ntango Nzambe asalaki likoló ná mabele ata mpe bagalaksi mpe minzoto. (Ebandeli 1:1) Na nsima, elobeli ndenge mabele ekómaki mokemoke esika oyo bikelamu ya bomoi ekoki kofanda, ndenge bikelamu ya bomoi ndenge na ndenge ebimaki mpe ndenge asalaki bato; elobeli mpe ntina oyo asalaki bikelamu yango nyonso.

EKOMAMÁ NA NDENGE OYO BATO BAKOKANGA NTINA

Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano ya mokolo na mokolo. Batoli yango ezali pɛtɛɛ mpo moto akanga ntina na yango. Ezali bongo mpo na bantina mibale.

Ya liboso, Biblia ezali na elobeli ya polele mpe ya malamu. Na esika ezala na maloba mingi ya mindɔndɔ to oyo bato bakoki koyeba te, Biblia ezali na maloba ya polele to oyo eyokani na bamposa ya bato. Makanisi oyo ezali mpasi elobami na maloba oyo bato basalelaka mokolo na mokolo.

Na ndakisa, mpo mateya na ye esimba mitema ya bato, Yesu asalelaki bandakisa mingi ya pɛtɛɛ na makambo oyo bato bakutanaka na yango mokolo na mokolo. Mingi ya bandakisa yango ezali na lisolo oyo asalaki likoló ya ngomba, oyo ezali na Matai mokapo 5 tii na 7. Moto moko ya mayele abengaki yango “lisolo ya ntina mingi” mpo amonaki ete mokano na yango “ezalaki te ya kotondisa mitó ya bato na makanisi ebeleebele, kasi nde ya kosalisa biso tóyeba ndenge ya komitambwisa.” Kotánga mikapo yango ekoki kozwa yo miniti 15 to 20, mpe okokamwa mpo okomona ete maloba ya Yesu ezali pɛtɛɛ mpe na nguya.

Likambo mosusu oyo esalaka ete Biblia ezala pɛtɛɛ mpo moto akanga ntina na yango ezali masolo oyo ezali na kati. Ezali buku ya masapo te. Kutu, buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete eteni monene ya Biblia “elobeli bato minene mpe bato mpamba” mpe “mikakatano, bilikya, mabunga na bango mpe makambo oyo balongaki.” Ezali mpasi te tómona ete masolo ya bato yango oyo bazalaki mpenza na bomoi mpe makambo oyo esalemaki etali mpe biso mpe tókanga ntina ya batoli kitoko oyo ezali na kati.​—Baroma 15:4.

MOTO NYONSO AKOKI KOZALA NA YANGO

Mpo oyeba makambo oyo ezali na buku moko, ebongi ezala na monɔkɔ oyo oyebi. Lelo oyo Biblia mpe ezali na monɔkɔ oyo okoki koyeba, ata soki ofandaka wapi to ozali moto ya ekólo nini. Tótalela makambo oyo esɛngaka mpo ezala na monɔkɔ oyo olobaka.

Kobongola. Na ebandeli, Biblia ekomamaki na Ebre, Aramɛyɛ mpe Grɛki. Yango wana bato oyo bakokaki kotánga yango bazalaki moke. Babongoli nde basalaki milende mpenza mpo ekóma na minɔkɔ mosusu. Mpo na mosala na bango, lelo oyo Biblia ebongolami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ soki 2 700. Yango elingi koloba bato mingi (90%) bakoki kotánga ata mwa ndambo ya Biblia na monɔkɔ ya mboka na bango.

Kobimisa. Na ebandeli Biblia ekomamaki na biloko oyo ebebaka noki, na ndakisa mposo ya nyama mpe papirisi. Mpo nsango yango ekómela bato, esɛngaki básala bakopi na yango malamumalamu na mabɔkɔ mbala na mbala. Bakopi yango ezalaki ntalo makasi, kaka bato moke nde bakokaki kozwa yango. Kasi, ntango Gutenberg abimisaki masini ya konyata mikanda eleki sikoyo mbula 550, bato mingi bakokaki kozwa Biblia. Ankɛtɛ moko emonisi ete bato bazwi Babiblia koleka miliare mitano na mobimba to na ndambo.

Ata buku moko te ya lingomba ekabolami ebele bongo lokola Biblia. Na ntembe te, Biblia ezali buku oyo esengeli koyeba mateya na yango. Ata bongo, koyeba mateya na yango ekoki kozala mpasi. Kasi, lisalisi ezali. Okoki kozwa yango wapi? Mpe ndenge nini okoki kozwa matomba? Lisolo oyo elandi epesi biyano na mituna yango.

Makambo etali Biblia

  • Biblia ezali na mikanda 66.

  • Biblia ezali na masolo, mibeko, bisakweli, bapoɛmi, masese, banzembo mpe mikanda.

  • Ebandaki kokomama na mobu 1513 liboso ya ntango na biso mpe esilaki na mobu 98 ya ntango na biso, kokomama na yango eumelaki bambula koleka 1 600.

  • Bato soki 40 nde bakomaki Biblia na litambwisi ya elimo ya Nzambe.

La vie a-t-elle été créée?

Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge bomoi ebandaki, talá mwa buku La vie a-t-elle été créée? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.pr2711.com.

La Bible—Quel est son message?

Mpo na koyeba makambo mosusu etali Biblia, talá mwa buku La Bible​—Quel est son message? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.pr2711.com.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto