Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/10 lok. 3
  • Mpo na nini osengeli kotyela Biblia likebi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli kotyela Biblia likebi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini koyekola Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Buku oyo esengeli koyeba mateya na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Yehova, Nzambe oyo ayebi kosolola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/10 lok. 3

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NSANGO NINI?

Mpo na nini osengeli kotyela Biblia likebi?

Biblia ezali buku oyo bato mingi bazali na yango koleka babuku mosusu nyonso. Mpo na nini? Mpo ezalaka mpasi te kokanga ntina ya makambo na yango. Ezali na masolo ya solosolo ya bato oyo bazalaki mpenza na bomoi mpe elobelaka boyokani oyo bazalaki na yango na Nzambe mpe bato mosusu. Masolo yango ezali na mateya kitoko na maloba ya pɛtɛɛ oyo ekoki kobongolama na bankama ya minɔkɔ mpe oyo bato ya bisika mpe bileko nyonso bakoki kokanga ntina na yango. Lisusu, batoli ya Biblia ezalaka ntango nyonso na ntina.

Likambo eleki ntina, Biblia ezali kaka te buku oyo elobelaka makambo ya Nzambe kasi mpe buku oyo euti na Nzambe. Emonisi nkombo ya Nzambe, bizaleli na ye, mpe mokano oyo azalaki na yango ntango asalaki mabele mpe bato. Biblia emonisi mpe ndenge oyo banda kala, mabe ná malamu eyokanaka te: lisolo moko kitoko oyo etali mokili mobimba mpe oyo ekosuka na ndenge moko ya malamu mpenza. Na yango, kotánga Biblia na makanisi malamu esalisaka moto akóma na kondima mpe elikya.

Biblia ezali na makambo oyo tokokuta yango na babuku mosusu te. Na ndakisa, eyebisi biso solo na makambo lokola oyo:

  • Epai oyo toutá mpe ntina oyo tonyokwamaka

  • Oyo Nzambe asalá mpo na kosikola bato

  • Oyo Yesu asalá mpo na biso

  • Ndenge oyo mabele ekokóma mpe bomoi ya bato na mikolo ezali koya

Mpo na nini te kobwaka mwa liso na nkasa oyo elandi mpe kotalela nsango oyo ezali na Biblia?

MAKAMBO ETALI BIBLIA

  • Motó ya likambo: Ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekozongisa bosembo mpe kimya na mabele

  • Makambo ezali na kati: Ezali na mikanda 39 oyo ekomamaki na Ebre (mosusu na Aramɛyɛ) mpe mikanda 27 na Grɛki

  • Ekomamaki: Na bato soki 40, na boumeli ya mbula soki 1 600, kobanda na mobu 1513 liboso ya ntango na biso tii na mobu soki 98 ya ntango na biso

  • Minɔkɔ: Ebongolami sikoyo na mobimba to ndambo na minɔkɔ koleka 2 500

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto