Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 2 nk. 3-4
  • Esalemaki mpenza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esalemaki mpenza?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO OYO EMONANI
  • BONGO MPO NA LISEKWA YA YESU?
  • Lisekwa ya Yesu—Ndimbola na yango mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Lisekwa ya Yesu esalemaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Baevanzile ezali makambo ya solo to masapo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Lisekwa ezali mpenza elikya ya solosolo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 2 nk. 3-4
Bazali kolongola nzoto ya Yesu na nzete mpe bayekoli na ye bazali kotala na mosika

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI YESU ANYOKWAMAKI MPE AKUFAKI?

Esalemaki mpenza?

Na prɛnta ya mobu 33 ya ntango na biso, babomaki Yesu moto ya Nazarete. Bakoselaki ye makambo ete azali motomboki, babɛtaki ye makasi mpe babakaki ye na nzete. Akufaki liwa moko ya mpasi. Kasi, Nzambe asekwisaki ye mpe nsima ya mikolo 40, Yesu amataki na likoló.

Lisolo oyo ya kokamwa euti na Baevanzile minei ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, oyo bato mingi babengaka Testama ya Sika. Makambo yango esalemaki mpenza? Ezali motuna moko ya ntina mingi. Mpo soki esalemaki te, boye kondima ya bakristo ezali na ntina te mpe elikya ya bomoi ya seko na paradiso ezali kaka ndɔtɔ. (1 Bakorinti 15:14) Kasi, soki esalemaki mpenza, boye bato bakozala na avenire moko kitoko, oyo yo mpe okoki kozala na yango. Na yango, masolo ya Baevanzile ezali makambo ya solo to masapo mpamba?

MAKAMBO OYO EMONANI

Na kokesana na masapo, Baevanzile ezali na makambo ya sikisiki mpe elobeli ata makambo ya mikemike. Na ndakisa, etángi bankombo ya bisika mingi oyo ezalaka mpenza, oyo lelo bato bakoki kokende kotala yango. Elobeli bato oyo bazalaká na bomoi, oyo ata bato mosusu ya istware mpe balobelá.​—Luka 3:1, 2, 23.

Kutu, bakomi mosusu ya siɛklɛ ya liboso mpe ya mibale batángi Yesu na mikanda na bango.a Ndenge oyo Baevanzile elobeli liwa na ye eyokani na ndenge oyo Baroma bazalaki koboma bato na ntango wana. Lisusu, makambo yango elobelami polele mpe na bosembo, elobeli ata mabunga oyo bayekoli mosusu ya Yesu basalaki. (Matai 26:56; Luka 22:24-26; Yoane 18:10, 11) Makambo wana nyonso emonisi ete bakomi ya Baevanzile bakomaki na bosembo mpe na sikisiki makambo etali Yesu.

BONGO MPO NA LISEKWA YA YESU?

Atako bato mingi bandimaka ete Yesu azalaki na bomoi mpe akufaki, kasi bamosusu bandimaka te ete asekwaki. Ata mpe bantoma na ye bandimaki mbala moko te ete azongi na bomoi. (Luka 24:11) Kasi ntembe nyonso esilaki ntango bango mpe bayekoli mosusu bamonaki Yesu na mabaku ekeseni. Kutu, na libaku moko bato koleka 500 bamonaki ye.​—1 Bakorinti 15:6.

Atako bakokaki kokanga mpe koboma bango, bayekoli basakolaki na mpiko mpenza lisekwa ya Yesu epai ya bato nyonso, ata epai ya bato oyo babomaki ye. (Misala 4:1-3, 10, 19, 20; 5:27-32) Bayekoli ebele wana bakokaki kozala na mpiko ya bongo soki bándimisamaka te ete Yesu asekwaki mpenza? Kutu, lisekwa ya Yesu nde esalá ete lingomba ya bokristo eyebana mingi banda wana tii lelo.

Masolo ya Baevanzile oyo elobeli liwa mpe lisekwa ya Yesu ezali na makambo nyonso oyo istware esɛngaka mpo lisolo moko endimama. Kotánga yango na likebi ekondimisa yo ete makambo yango esalemaki mpenza. Kondima na yo ekokóma lisusu makasi soki oyebi ntina oyo makambo yango esalemaki. Lisolo elandi elobeli yango.

a Tacite, oyo abotamaki na mobu 55 ya ntango na biso, akomaki ete “nkombo wana ya bakristo eutá na Kristo, oyo anyokwamaki makasi na boyangeli ya Tibere, na mabɔkɔ ya Guvɛrnɛrɛ Ponse Pilate.” Suétone (siɛklɛ ya liboso); Josèphe, Moyuda mpe moto ya istware (siɛklɛ ya liboso) mpe Pline le Jeune, guvɛrnɛrɛ ya Bitinia (ebandeli ya siɛklɛ ya mibale) balobelaki mpe makambo etali Yesu.

Mpo na nini ezali na mikanda mingi te ya siɛklɛ ya liboso oyo elobeli Yesu?

Lokola Yesu ayebanaki mingi, ebongi te ete longola Biblia ezala mpe na mikanda mingi mosusu ya siɛklɛ ya liboso oyo elobeli ye? Mpenza te. Mpo banda basilisá kokoma Baevanzile eleki sikoyo bambula soki 2 000. Kaka makomi moke mpenza ya ntango wana nde ebatelamaki. (1 Petro 1:24, 25) Lisusu, lokola Yesu azalaki na banguna mingi, bakokaki te kokoma likambo moko oyo ekondimisa makambo oyo bato balobaki mpo na Yesu.

Petro, moko ya bantoma ya Yesu alobaki boye mpo na lisekwa ya Yesu: “Nzambe alamwisaki Moto yango na mokolo ya misato mpe apesaki ye likoki ya komonana, epai ya bato nyonso te, kasi epai ya batatoli oyo baponamá na Nzambe liboso, epai na biso, bato tolyaki mpe tomɛlaki elongo na ye nsima ya kosekwa na ye na bakufi.” (Misala 10:40, 41) Mpo na nini epai ya bato nyonso te? Evanzile ya Matai emonisi ete ntango banguna bayokaki ete Yesu asekwi, basalaki nyonso mpo nsango yango eyokana te.​—Matai 28:11-15.

Yango elingi nde koloba ete Yesu alingaki te bato báyeba ete asekwaki? Te, mpo Petro alobaki lisusu boye: “Apesaki biso mitindo ya kosakwela bato mpe kopesa litatoli malamumalamu ete ye azali Moto oyo atyami na Nzambe mpo na kozala mosambisi ya bato ya bomoi mpe ya bakufi.” Bakristo ya solo basakolaki mpe bazali kokoba kosakola yango.​—Misala 10:42.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto