Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 90
  • Kozala mondimi ya lingomba moko ezali na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala mondimi ya lingomba moko ezali na ntina?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Lingomba
    Lamuká!—2014
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?
    Lamuká!—2012
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 90
Bato bayei kokutana mpo na losambo

Kozala mondimi ya lingomba moko ezali na ntina?

Eyano ya Biblia

Ɛɛ, mpo Nzambe alingaka ete bato bákutanaka esika moko mpo na losambo. Biblia elobi: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te.”​—Baebre 10:24, 25.

Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakosala lisangá moko; ayebisaki bango ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Mpo bámoniselana mpenza bolingo yango, esengelaki bayekoli ya Kristo bákutanaka esika moko. Basengelaki kokutanaka na masangá mbala na mbala mpo na kosambela Nzambe. (1 Bakorinti 16:19) Bango nyonso basengelaki kozala lisangá ya bandeko ya mokili mobimba.​—1 Petro 2:17.

Kozala mondimi ya lingomba moko ekoki te

Biblia emonisi ete bato basengeli kokutanaka esika moko mpo na kosambela Nzambe, kasi elobi te ete moto akoki kosepelisa Nzambe kaka mpo azali mondimi ya lingomba moko. Mpo Nzambe andima moto, mateya ya lingomba na ye esengeli kosimba bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, Biblia elobi: “Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike ná basi oyo mibali bakufá na bolɔzi na bango, mpe komibatela mpe kozala te na litɔnɔ ya mokili.”​—Yakobo 1:27.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto