Bisakweli oyo ekokisamaki
Na lisolo ya liboso, tolobelaki lisapo oyo emonisi ndenge oyo Oracle de Delphes akosaki Crésus, likambo yango esalaki ete mokonzi ya Perse alonga ye na etumba. Nzokande, Biblia ezali na esakweli moko ya kokamwa mpo na mokonzi ya Perse, oyo ekokisamaki na mobimba na yango.
Mbula soki 200 liboso ete mokonzi Sirise abotama, Yisaya, mosakoli moko Moebre atángaki nkombo ya Sirise mpe alimbolaki ndenge oyo akolonga engumba makasi ya Babilone.
Yisaya 44:24, 27, 28: “Talá oyo Yehova alobi, . . . ‘Ye oyo azali koloba na mai mozindo ete: “Kauká; mpe nakokaukisa bibale na yo nyonso”; Ye oyo azali koloba na Siruse ete: “Azali mobateli ya mpate na ngai, mpe akokokisa mpenza likambo nyonso oyo nasepeli na yango”; ɛɛ, liloba na ngai na ntina etali Yerusaleme, ete: “Ekotongama lisusu,” mpe na ntina etali Tempelo, ete: “Moboko na yo ekotyama.”’”
Hérodote, Mogrɛki moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, akomaki ete basoda ya Sirise balekisaki na nzela mosusu mai ya Ebale Efrate, oyo ezalaki kokatisa engumba Babilone. Mayele wana ya Sirise esalisaki basoda na ye bákatisa ebale yango na makolo mpo na kokɔta na engumba yango. Nsima ya kozwa engumba Babilone, Sirise abimisaki Bayuda oyo bazalaki na boombo na engumba yango mpe apesaki bango nzela bázonga na mboka na bango mpe bátonga lisusu Yerusaleme, oyo ebebisamaki mbula 70 liboso.
Yisaya 45:1: “Talá oyo Yehova alobi na moto na ye oyo atyami mafuta, na Siruse, oyo nasimbi lobɔkɔ na ye ya mobali, mpo natya na nse na ye bikólo oyo ezali liboso na ye, mpo nafungola ata mikaba na loketo ya bakonzi; mpo nafungola baporte ya bizipeli mibale liboso na ye, bongo baporte ekokangama te.”
Baperse bakɔtaki na engumba yango na baporte na yango ya minene, oyo etikalaki polele mpo bato ya Babilone babosanaki kokanga yango. Soki bato ya Babilone báyebaka likambo oyo Sirise azalaki kokana kosala, balingaki kokanga baporte nyonso oyo ezalaki kotala na ebale. Emonani polele ete engumba yango ezalaki lisusu na libateli te.
Esakweli wana ya kokamwa ezali kaka moko ya ebele ya bisakweli ya Biblia oyo ekokisamaki.a Na kokesana na bisakweli ya bato, oyo mbala mingi eutaka na banzambe na bango ya lokuta, bisakweli ya Biblia euti na Moto oyo alobi ete: “Banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te.”—Yisaya 46:10.
Kaka Nzambe ya solo, oyo nkombo na ye ezali Yehova, nde akoki koloba bongo. Nkombo na ye elimboli “Akómisaka.” Emonisi likoki oyo azali na yango ya koyeba makambo liboso mpe kosala ete makambo yango eyokana na mokano na ye. Yango endimisi biso ete akokokisa makambo nyonso oyo alaki.
BISAKWELI OYO EZALI KOKOKISAMA LELO OYO
Olingi koyeba soki bisakweli ya Biblia elobi nini mpo na mikolo na biso? Esili koleka mbula soki 2000, Biblia esakolaki ete “mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Mikolo ya nsuka ya nini? Mikolo ya nsuka ya mabele te, ya bato mpe te; ezali nde mikolo ya nsuka mpo na bampasi, minyoko, mpe kowelana oyo ezali konyokola bato banda bankóto ya bambula. Tótalela mwa bisakweli oyo emonisi mpenza ete tozali na “mikolo ya nsuka.”
2 Timote 3:1-5: Na “mikolo ya nsuka . . . bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.”
Nani akoki kotya ntembe ete bizaleli wana ekómi komonana mingi epai ya bato lelo? Ozali komona te ndenge bato mingi na bisika oyo tofandi bazali komilinga, kolinga mbongo, mpe bavimbi na lolendo? Ozali komona te ndenge bato mingi balingi kaka basusu básalelaka bango makambo mpe balingi te kosala boyokani na basusu? Na ntembe te, ozali komona ndenge bana mingi bazali kotosa lisusu baboti te mpe bato mingi bakómi kolinga bisengo mingi koleka Nzambe. Mpe mokolo na mokolo, makambo ezali kobeba se kobeba.
Matai 24:6, 7: “Bokoyoka lokito ya bitumba mpe nsango ya bitumba. . . . Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.”
Bato mosusu balobaka ete motángo ya bato oyo bakufá na bitumba mpe na mindoki banda 1914 tii lelo eleki milio 100, motángo oyo eleki motángo ya bato na bikólo mosusu. Kanisá kolela, mawa, mpe mpasi oyo liwa ya ebele ya bato ndenge wana ebimisá! Atako bongo, bato bazwi nde liteya mpe batiki bitumba?
Matai 24:7: “Nzala ekozala.”
Ebongiseli ya ONU mpo na kosilisa nzala na mokili (Programme alimentaire mondial) elobi: “Na mokili tozali kobimisa ebele ya biloko ya kolya mpo na moto nyonso, nzokande bato koleka milio 815 balalaka nzala; elingi koloba soki tozwi bato libwa, moko na bango alalaka nzala. Bamosusu, soki tozwi bato misato, moko na bango alyaka malamu te.” Balobaka ete mbula na mbula, bana soki milio misato bakufaka mpo na nzala.
Luka 21:11: “Mabele ekoningana makasi.”
Mbula na mbula, koningana ya mabele soki 50 000 ya mwa makasi esalemaka na bisika mingi oyo bato bafandi. Koningana ya mabele soki 100 eningisaka to ebukaka bandako. Mpe ata mbala moko na mbula, koningana ya mabele ya makasi mpenza esalemaka. Ankɛtɛ moko emonisi ete banda mobu 1975 tii 2000, bato oyo bakufaki na koningana ya mabele bazalaki 471 000.
Matai 24:14: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”
Batatoli ya Yehova, oyo bazali lelo koleka milio 8, bazali kosakola mpe kopesa litatoli mpo na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mabele mobimba na mikili 240. Bazali kosakola nsango malamu na bingumba ya minene, na bamboka ya mike, na kati ya zamba, mpe likoló ya bangomba. Esakweli yango elobi ete ntango Nzambe akomona ete mosala yango ekokisami na ndenge oyo ye moko alingi, “nsuka ekoya.” Yango elimboli nini? Elimboli nsuka ya bokonzi ya bato mpe ebandeli ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. Bilaka nini ekokokisama ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela? Mpo na koyeba yango, tángá lisolo oyo elandi.
a Talá lisolo “Monima oyo emonisi ete esakweli moko ya Biblia ekokisamaki.”