Okoki kozala na bomoi ya seko awa na mabele
EZALI LIKAMBO YA KOKAMWA! Mozalisi na biso alaki ete akopesa biso bomoi ya seko, awa na mabele. Kasi, bato mingi bandimaka yango te. Balobaka: ‘Nsukansuka, moto nyonso akokufa. Bomoi ezalaka kaka bongo.’ Bato mosusu balobaka ete moto akoki kozala na bomoi ya seko, kasi awa na mabele te. Balobaka ete mpo moto azwa bomoi ya seko, asengeli liboso kokufa mpe kokende likoló. Okanisi nini?
Liboso opesa eyano na motuna wana, tótala naino biyano oyo Biblia epesi na mituna oyo misato: Lolenge oyo moto asalemá, emonisaka ete asalemá mpo azala na bomoi ntango boni? Na ebandeli, mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele ezalaki nini? Ndenge nini liwa ekɔtaki na bomoi ya bato?
MOTO AKESENI NA BIKELAMU MOSUSU
Moto akeseni mosika na bikelamu mosusu nyonso oyo Nzambe asalá awa na mabele. Mpo na nini? Biblia emonisi ete kaka bato nde bakelamaki na “elilingi” ya Nzambe mpe bazali “lokola” Nzambe. (Ebandeli 1:26, 27) Yango elimboli nini? Elimboli ete Nzambe akelá bato na bomoto mpe bizaleli oyo ekokani na oyo ya ye moko, na ndakisa bolingo mpe bosembo.
Longola yango, Nzambe apesá bato makoki ya kokanisa, ya kokesenisa mabe ná malamu, mpe ya koluka koyeba ye mpe kozala na boyokani malamu na ye. Yango wana, tozali na makoki ya komona bonene ya molɔ́ngɔ́ mpe kosepela na biloko oyo Nzambe akelá, kosala mayemi, kobɛta miziki, mpe kobimisa maloba ya ntoki. Oyo eleki ntina, kaka bato nde bazali na likoki ya kosambela Mozalisi. Makoki mpe bizaleli wana nde emonisaka bokeseni monene oyo ezali kati na bato mpe bikelamu mosusu nyonso oyo ezali awa na mabele.
Kanisá naino: Soki Nzambe asalá moto mpo azala na bomoi kaka mpo mwa ntango, mpo na nini apesá ye bizaleli wana ya kokamwa ná makoki ya koyekola oyo ezangi ndelo mpe mayele ya kokolisa makoki yango? Mpo na koloba solo, Nzambe apesá bato bizaleli mpe makoki wana mpo básepela na bomoi libela na libela awa na mabele.
MOKANO YA NZAMBE YA EBANDELI
Kasi, bato mosusu balobaka ete Nzambe asalaki bato te mpo bázala na bomoi ya seko na mabele. Balobaka ete Nzambe atyá bato na mabele kaka mpo na mwa ntango, mpo na komeka bango mpo na koyeba baoyo babongi kokende likoló mpe kozala na bomoi ya seko elongo na Nzambe. Kasi soki ezali bongo, ekomonana lokola nde Nzambe moto abimisaka mabe mpe bampasi oyo etondi na mabele! Likanisi yango eyokani te na bomoto ya Nzambe. Biblia elobi boye mpo na Nzambe: “Mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.”—Kolimbola Mibeko 32:4.
Biblia emonisi polele mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli, na maloba oyo: “Nde likoló, likoló ezali ya Yehova, kasi mabele, apesá yango bana ya bato.” (Nzembo 115:16) Ya solo, Nzambe akelaki mabele mpo ezala esika kitoko oyo moto asengeli kofanda libela na libela mpe atondisá yango na biloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo tózala na bomoi ya esengo, oyo ezangi nsuka.—Ebandeli 2:8, 9.
“Nde likoló, likoló ezali ya Yehova, kasi mabele, apesá yango bana ya bato.”—Nzembo 115:16
Biblia emonisi mpe polele mokano ya Nzambe mpo na bato. Apesaki mwasi ná mobali ya liboso mokumba ya ‘kotondisa mabele mpe kotya yango na nse na bango, mpe kozala na bokonzi likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.’ (Ebandeli 1:28) Bazwaki mpenza libaku malamu ya kobatela mpe kokómisa mabele mobimba, esika oyo basengelaki kofanda, Paradiso! Na yango, Adama ná Eva mpe bana oyo balingaki kobota bazalaki na likoki ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele, kasi na likoló te.
MPO NA NINI TOKUFAKA?
Kasi, mpo na nini tokufaka? Biblia elobi ete moko ya bikelamu ya elimo ya Nzambe, oyo na nsima akómaki kobengama Satana Zabolo, alukaki kobebisa makambo oyo Nzambe abongisaki na Edene. Ndenge nini?
Satana atindaki baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, bátombokela Nzambe. Ntango Satana alobaki ete Nzambe abombeli bango eloko moko ya malamu, elingi koloba lotomo ya kopona kosala oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, balandaki Satana mpe batombokelaki Nzambe. Nini ekómelaki bango na nsima? Nsukansuka, bakufaki, kaka ndenge Nzambe ayebisaki bango. Babungisaki libaku oyo bazalaki na yango ya kozala na bomoi libela na libela na Paradiso awa na mabele.—Ebandeli 2:17; 3:1-6; 5:5.
Botomboki ya Adama ná Eva ememelá bato nyonso mpasi tii lelo. Liloba ya Nzambe elobi: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso.” (Baroma 5:12) Tokufaka mpo tozwá lisumu mpe liwa epai ya baboti na biso ya liboso, kasi te mpo etangamá bongo, to mpo tokoki te koyeba ‘mabongisi’ ya Nzambe.
OKOKI KOZALA NA BOMOI YA SEKO AWA NA MABELE
Botomboki oyo esalemaki na Edene epekisaki Nzambe te akokisa mokano na ye ya ebandeli mpo na bato mpe mabele. Bolingo mpe bosembo ya Nzambe oyo ezali ya kokoka nde etindaki ye asikola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa oyo baboti na biso ya liboso batikelá biso. Ntoma Paulo alobaki: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.” (Baroma 6:23) Bolingo ya Nzambe nde etindaki ye ‘apesa Mwana na ye se moko oyo abotamaki [Yesu Kristo], mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.’ (Yoane 3:16) Na nzela ya mbeka ya lisiko, Yesu azongisaki nyonso oyo Adama abungisaki.a
Mosika te, elaka ya Nzambe ya kokómisa mabele paradiso ekokokisama. Yo mpe okoki kozala na paradiso yango na mikolo ekoya soki otosi toli oyo ya Yesu: “Bókɔta na porte ya moke; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá nde oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta kuna bazali mingi; nzokande porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:13, 14) Ya solo, makambo oyo oponi kosala nde ekomonisa bomoi oyo okozala na yango na mikolo ekoya. Okosala nini?
a Mpo na koyeba makambo mosusu etali bolamu oyo okoki kozwa na nzela ya lisiko, talá liteya 27 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!, ebimisami epai ya Batatoli ya Yehova mpe okoki kozwa yango na Internet na www.jw.org.