Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w18 Février nk. 13-17
  • Makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOSALA MOSALA BANDA NTƆNGƆ TII MPOKWA
  • BATO OYO BAZALAKI BAKANGAMI BAMEMI SOLO NA KIRGHIZSTAN
  • SOLO EKÓMI PENE MPENZA NA MBOKA NA BISO
  • MWASI NA NGAI AYEBAKI SOLO NTANGO KAKA AYOKAKI YANGO
  • MAKITA MPE BATISIMO NA NTANGO YA EPEKISELI
  • TOSALELI LIBAKU YA KOMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • MINGI YA KOSALA NA LIBOTA MPE NA MOSALA YA KOSAKOLA
  • BAMBONGWANA MINENE
  • Esengo ya kozala mobateli ya mpate
    Lamuká!—2011
  • Molulu ya kofungola Babetele
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Bikateli ya batribinale
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Bikateli ya batribinale
    Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
w18 Février nk. 13-17
Beishenbai Berdibaev

LISOLO YA BOMOI

Makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Yehova

Lisolo ya Beishenbai Berdibaev

“LIWA ekozala lisusu te mpe bato oyo bakufá bakozonga na bomoi.” Mwasi na ngai Mairambubu ayokaki maloba wana ntango azalaki na bisi moko. Ebendaki likebi na ye mpe alingaki koyeba makambo mosusu. Ntango bisi etɛlɛmaki mpe bato bakitaki, alandaki mwasi oyo alobaki makambo wana. Nkombo na ye ezalaki Apun Mambetsadykova; azalaki Motatoli ya Yehova. Kosolola na Batatoli na ntango wana ezalaki likama, kasi makambo oyo toyekolaki epai ya Apun na nsima ebongolaki bomoi na biso.

KOSALA MOSALA BANDA NTƆNGƆ TII MPOKWA

Nabotamá na 1937 na kolkhoz, to ferme moko ya bato ebele, pene na engumba Tokmok, na ekólo Kirghizstan. Tozali bato ya Kirghizstan mpe tolobaka monɔkɔ ya Kirghize. Baboti na ngai bazalaki basali-bilanga, mpe bazalaki kosala na kolkhoz banda ntɔngɔ tii mpokwa. Bazalaki kopesa basali-bilanga biloko ya kolya mbala na mbala, kasi bazalaki kofuta bango mbongo kaka mbala moko na mbula. Mama azalaki kobunda mpenza mpo na kobɔkɔla ngai ná leki na ngai ya mwasi. Nsima ya kotánga kelasi mbula mitano mpamba, ngai mpe nakómaki kokende kosala na kolkhoz mikolo nyonso banda ntɔngɔ tii mpokwa.

Karte ya Kirghizistan
Bangomba ya Teskey Ala-Too

Bangomba ya Teskey Ala-Too

Esika tozalaki kofanda, bobola ezalaki mingi, mpe esɛngaki kosala mosala makasi mpo na kozwa mbongo oyo ebongi. Ntango nazalaki elenge, nazalaki mpenza kokanisa ntina ya bomoi te to avenire na ngai. Nakanisaki ata mokolo moko te ete mateya ya solo oyo etali Yehova mpe mokano na ye ekobongola bomoi na ngai. Ndenge nsango malamu ekɔtaki mpe epalanganaki na Kirghizstan ekamwisaka. Makambo nyonso ebandaki na etúká na biso na nɔrdi ya Kirghizstan.

BATO OYO BAZALAKI BAKANGAMI BAMEMI SOLO NA KIRGHIZSTAN

Mateya ya Yehova ekɔtaki na Kirghizstan na 1956. Mpo solo ezwa esika, esengelaki kokweisa makanisi ya Bakoministe oyo epikamaki makasi. Mpo na nini? Mpo na ntango wana, oyo ezali lelo ekólo Kirghizstan ezalaki na kati ya bikólo ya Union soviétique. Na bikólo yango nyonso, Batatoli ya Yehova bakɔtaki na makambo ya politiki te. (Yoane 18:36) Na yango, bazalaki komona bango lokola banguna ya mboka mpe bazalaki konyokola bango. Kasi, likanisi moko te ya politiki ekoki kopekisa Liloba ya Nzambe ekɔta na mitema ya bato oyo babongi. Kutu, moko ya mateya ya ntina mingi oyo nazwi na bomoi na ngai ya molai ezali ete mpo na Yehova, “makambo nyonso ekoki kosalema.”​—Marko 10:27.

Emil Yantzen

Emil Yantzen

Konyokola Batatoli ya Yehova nde esalaki ete bákóma ebele na Kirghizstan. Na ndenge nini? Sibérie ezalaki na kati ya bikólo ya Union soviétique, mpe bato oyo batalelami lokola banguna ya mboka bazalaki kotindama na bolɔkɔ kuna. Ntango babimisaki bango, mingi bayaki na Kirghizstan mpe basusu kati na bango bamemaki solo. Moko ya bato yango ezalaki Emil Yantzen, oyo abotamaki na Kirghizstan na 1919. Batindaki Emil na kaa ya misala makasi mpe kuna akutanaki na Batatoli. Andimaki solo mpe azongaki mboka na 1956. Emil afandaki pene na mboka Sokuluk, na etúká na biso. Sokuluk nde esika lisangá ya liboso na Kirghizstan esalemaki na 1958.

Victor Vinter

Victor Vinter

Pene na mbula moko na nsima, Victor Vinter akendaki kofanda na Sokuluk. Ndeko mobali yango ya sembo akutanaki na makambo mingi ya mpasi. Lokola aboyaki kokɔta na makambo ya politiki, akɔtaki bolɔkɔ mpo na mbula misato mbala mibale, na nsima, asalaki lisusu mbula 10 na bolɔkɔ, mpe mbula mitano na kaa ya bakangami. Kasi, atako monyoko ezalaki, losambo ya solo epalanganaki.

SOLO EKÓMI PENE MPENZA NA MBOKA NA BISO

Eduard Varter

Eduard Varter

Na 1963, ezalaki na Batatoli soki 160 na Kirghizstan, mpe mingi bazalaki bato ya Allemagne, Ukraine mpe Russie. Kati na bango ezalaki na Eduard Varter, mokangami oyo azwaki batisimo na Allemagne na 1924. Na bambula ya 1940, Banazi batindaki Eduard na kaa ya bakangami, mpe mwa bambula na nsima, Bakoministe ya Union soviétique batindaki ye mokangami na mboka ya mosika. Na 1961, ndeko yango ya sembo akendaki kofanda na mboka Kant, oyo ezali mpenza pene ya mboka na biso.

Elizabeth Fot; Aksamai Sultanalieva

Elizabeth Fot; Aksamai Sultanalieva

Elizabeth Fot, ndeko mwasi moko ya sembo, azalaki mpe kofanda na Kant. Azalaki kosala mosala ya kotonga bilamba. Lokola ayebaki mosala yango malamu, minganga ná balakisi bazalaki kotongisa bilamba epai na ye. Moko ya bakiliya na ye ezalaki mwasi moko na nkombo Aksamai Sultanalieva, oyo mobali na ye azalaki mokonzi na biro ya prokirɛrɛ. Aksamai akendaki epai ya Elizabeth kotongisa bilamba, kasi atunaki mituna ebele oyo etali bakufi mpe ntina ya bomoi. Elizabeth asalelaki kaka Biblia mpo na kopesa ye biyano. Aksamai akómaki kosakola nsango malamu na molende.

Nikolai Chimpoesh

Nikolai Chimpoesh

Na bantango yango, Nikolai Chimpoesh, oyo azalaki moto ya Moldavie, akómaki mokɛngɛli ya zongazonga mpe aumelaki na mokumba yango mbula pene na 30. Nikolai asukaki kaka na kotala masangá te, azalaki mpe kosala bafotokopi ya mikanda ya moombo ya sembo mpe kobimisa yango. Misala oyo azalaki kosala eyebanaki epai ya bakonzi. Na yango, Eduard Varter apesaki Nikolai mwa batoli mpo na kolendisa ye; alobaki na ye: “Soki bakonzi batuni yo mituna, yebisá bango polele ete mikanda na biso eutaka na biro monene na Brooklyn. Taláká basoda ya KGB na miso. Kobanga eloko te.”​—Matai 10:19.

Mwa moke nsima ya lisolo yango, babengisaki Nikolai na biro monene ya KGB na engumba Kant. Ayebisaki ndenge makambo elekaki; alobaki boye: “Soda yango atunaki ngai soki tozwaka mikanda na biso wapi. Nayebisaki ye ete eutaka na Brooklyn. Azangaki likambo ya kobakisa. Atikaki ngai mbala moko mpe abengisaki ngai lisusu te.” Batatoli ya mpiko ndenge wana bakobaki kopalanganisa nsango malamu na ekɛngɛ na etúká na biso na nɔrdi ya Kirghizstan. Solo ekómaki na libota na ngai na 1981; mwasi na ngai Mairambubu nde ayokaki yango liboso.

MWASI NA NGAI AYEBAKI SOLO NTANGO KAKA AYOKAKI YANGO

Mairambubu azali moto ya etúká ya Naryn. Mokolo moko, na sanza ya 08/1974, ayaki na ndako ya leki na ngai ya mwasi, epai tokutanaki mpo na mbala ya liboso. Nasepelaki na Mairambubu mbala moko mpe tobalanaki kaka mokolo yango.

Apun Mambetsadykova

Apun Mambetsadykova

Na sanza 01/1981 ntango Mairambubu azalaki na bisi mpo na kokende wenze, ayokaki lisolo oyo nalobelaki na ebandeli. Lokola mwasi na ngai alingaki koyeba makambo mosusu, atunaki mwasi yango nkombo na ye mpe asɛngaki ye adrɛsi. Alobaki ete nkombo na ye Apun, kasi azalaki ekɛngɛ mpo, ata na bambula yango, mosala ya Batatoli epekisamaki. Na esika apesa adrɛsi na ye, azwaki nde adrɛsi na biso. Mwasi na ngai azongaki ndako na esengo.

Mairambubu alobaki boye: “Nayoki makambo ya malamu mpenza. Mwasi moko ayebisi ngai ete mosika te, bato bakokufa lisusu te. Ata banyama mabe bakokóma lokola banyama ya mboka.” Ngai nayokaki yango lokola lisapo. Nayebisaki ye: “Tózela tii mokolo akoya bongo ayebisa biso yango malamumalamu.”

Apun ayaki epai na biso sanza misato na nsima. Bandeko basi mosusu mpe bazalaki koya kotala biso, mpe na ndenge yango tokutanaki na mwa bana-mboka Kirghizstan ya liboso oyo bakómaki Batatoli. Bateyaki biso makambo ya kokamwa oyo etali Yehova mpe mokano na ye mpo na bato. Bazalaki koteya biso na buku Paladiso ebunga na paladiso ekozwama.a Lokola buku yango ezalaki kaka moko na Tokmok mobimba, tokomaki yango mobimba biso moko na mabɔkɔ.

Moko ya makambo ya liboso oyo toyekolaki ezalaki esakweli ya Ebandeli 3:15. Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe nde akokokisa esakweli yango. Moto nyonso asengeli koyoka nsango yango ya ntina mingi! Yango etindaki biso tóbanda kosakola. (Matai 24:14) Eumelaki te, solo ya Biblia ebandaki kobongola bomoi na biso.

MAKITA MPE BATISIMO NA NTANGO YA EPEKISELI

Ndeko mobali moko na Tokmok abengisaki biso na fɛti moko ya libala. Ngai ná mwasi na ngai tomonaki ete Batatoli bazali lokola bato mosusu te. Masanga ezalaki te na fɛti, mpe makambo nyonso esalemaki na molɔngɔ. Ekesanaki mpenza na bafɛti mosusu ya libala oyo tokendá, esika bato balangwaka, basalaka makambo oyo ebongi te, mpe babimisaka maloba ya nsɔni.

Tokendaki mpe na makita mosusu na lisangá ya Tokmok. Tozalaki kosala yango na zamba, soki mbula ezali te. Bandeko bayebaki ete polisi ezalaki koluka biso; na yango batyaki bandeko mibali mpo na kokɛngɛla. Na eleko ya malili, tozalaki kosala makita na ndako ya ndeko moko. Mbala mingi, polisi eyaki na ndako yango mpo na koluka koyeba soki tozalaki kosala nini. Ntango ngai ná Mairambubu tozwaki batisimo na sanza ya 07/1982 na Ebale Chüy, tosengelaki kozala ekɛngɛ mpenza. (Matai 10:16) Bandeko bazalaki koya mokemoke mpe toyanganaki na zamba. Toyembaki loyembo moko ya Bokonzi mpe toyokaki diskur ya batisimo.

TOSALELI LIBAKU YA KOMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

Na 1987, ndeko mobali moko asɛngaki ngai nakende kotala moto moko oyo asepelaki na solo na mboka Balykchy. Mpo na kokóma kuna, esengelaki kosala mobembo ya mikolo minei na engbunduka. Nsima ya kosala mibembo ebele mpo na kosakola na Balykchy, tomonaki ete bato ebele kuna bazalaki kosepela na solo. Tomonaki ete tosengeli komipesa na mosala ya kosakola.

Ngai ná Mairambubu tosalaki mibembo mingi na Balykchy. Mbala mingi, tozalaki kolekisa nsuka ya pɔsɔ kuna, tozalaki kosakola, mpe kosala makita. Bato bakómaki kosɛnga mikanda mingi mpenza. Tozalaki kouta na mikanda banda na Tokmok, totye yango na mishok, saki moko bazalaki kosalela mpo na komema mbálá. Saki mibale ya mikanda na sanza ezalaki kokoka mpenza te. Ntango tozalaki kokende mpe kozonga na Balykchy, tozalaki mpe koteya bato na engbunduka.

Na 1995, nsima ya mbula 8, lisangá moko efungwamaki na Balykchy. Bambula nyonso oyo tosali mibembo longwa na Tokmok tii Balykchy ezwaki mbongo mingi. Lokola tozalaki bato ya bozwi te, tozalaki kosala ndenge nini? Ndeko mobali moko azalaki kokabela biso mbongo mbala na mbala. Yehova amonaki mposa na biso ya komipesa na mosala ya kosakola, mpe afungolelaki biso “baporte ya mai ya likoló.” (Malaki 3:10) Ya solo mpenza, mpo na Yehova makambo nyonso ekoki kosalema!

MINGI YA KOSALA NA LIBOTA MPE NA MOSALA YA KOSAKOLA

Na 1992, nakómaki nkulutu; nazalaki mwana-mboka ya liboso oyo akómaki nkulutu na Kirghizstan. Na lisangá na biso na Tokmok, tozwaki mabaku mosusu ya komipesa na mosala ya kosakola. Tozalaki koyekola Biblia na bilenge ebele oyo bazalaki koyekola misala ya mabɔkɔ na kelasi. Lelo, moko na bango asalaka na Komite ya filiale, mpe mibale bazali babongisi-nzela monene. Tosalisaki mpe bandeko mosusu na lisangá. Na ebandeli ya 1990, tozalaki kosalela mikanda ya monɔkɔ ya Russe, makita mpe ezalaki kosalema na monɔkɔ yango. Kasi, bato mingi na lisangá bazalaki koloba monɔkɔ ya mboka, Kirghize. Na yango, nazalaki kobongola makita mpo na kosalisa bango bákanga ntina mbala moko.

Beishenbai Berdibaev ná mwasi na ye mpe bana mwambe

Ngai ná mwasi na ngai mpe bana 8, na 1989

Ngai ná Mairambubu tomipesaki mpe na kobɔkɔla bana na biso. Tozalaki komema bango na mosala ya kosakola mpe na makita. Mwana na biso ya mwasi Gulsayra, oyo na ntango wana azalaki na mbula 12 mpamba, azalaki kosolola na baleki-nzela mpe koyebisa bango makambo ya Biblia. Bana na biso bazalaki kosepela kokanga bavɛrsɛ na motó. Na ndenge yango, bana na biso, mpe na nsima bankɔkɔ na biso, bamipesaki mpenza na makambo ya lisangá. Lelo, totikali na bana 9 ná bankɔkɔ 11, mpe 16 basalelaka Yehova to bakendaka makita na baboti na bango.

BAMBONGWANA MINENE

Bandeko oyo babandaki mosala ya Yehova na mboka na biso na bambula ya 1950 bakokamwa komona bambongwana oyo esalemi. Ya liboso, banda na bambula ya 1990, tozali na bonsomi ya kosakola nsango malamu mpe koyangana bato ebele esika moko.

Beishenbai Berdibaev ná mwasi na ye bazali koteya moto moko na wenze

Na mosala ya kosakola elongo na mwasi na ngai

Na 1991, ngai ná mwasi na ngai tokendaki na liyangani ya etúká ya liboso na Alma-Ata, lelo Almaty, na Kazakhstan. Na 1993, bandeko na Kirghizstan basalaki liyangani ya etúká na stade Spartak na Bishkek mpo na mbala ya liboso. Basakoli balekisaki pɔsɔ mobimba mpo na kopɛtola stade yango. Mokonzi na yango akamwaki makasi mpe apesaki biso tósalela yango ofele.

Na 1994, likambo mosusu ya monene esalemaki: mikanda ebimaki na monɔkɔ ya Kirghize mpo na mbala ya liboso. Lelo, bandeko babongolaka mikanda na monɔkɔ ya Kirghize na biro ya filiale, na Bishkek. Kutu, na 1998, mosala ya Batatoli na Kirghizstan endimamaki na Leta. Bokoli ezali komonana, mpe sikoyo tozali basakoli koleka 5 000. Lelo, tozali na masangá 83 mpe bituluku 25 ya monɔkɔ ya Lingelesi, Chinois, elobeli ya bababa ya Russie, Kirghize, Ouïgour, Ouzbek, Russe, mpe Turc. Bandeko nyonso wana oyo bautá na mikili ndenge na ndenge bazali kosalela Yehova na bomoko. Mpo na Yehova, makambo nyonso wana esalemi.

Yehova abongolaki mpe bomoi na ngai. Nakolá na libota ya babola mpe natángá kelasi kaka mbula mitano. Kasi, Yehova asalisaki ngai nazala nkulutu mpe nateya bato oyo batángá kelasi mingi koleka ngai. Ya solo, Yehova asalaka ata makambo oyo ezali komonana ete ekoki kosalema te. Makambo oyo namoná etindaka ngai nakoba kotatola mpo na Yehova, oyo mpo na ye “makambo nyonso ekoki kosalema.”​—Matai 19:26.

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi lelo ebimisamaka lisusu te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto