Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w18 Septembre lok. 22
  • Tokómi ngonga nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokómi ngonga nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Masolo mosusu
  • ‘Ezalaki na ngonga nini?’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tósɛnzɛla na lolenge tozali kotambola
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Montre oyo olati na lobɔkɔ
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
w18 Septembre lok. 22

Tokómi ngonga nini?

OSALAKA nini soki olingi koyeba ngonga? Na ntembe te otalaka montre ya lobɔkɔ to montre mosusu. Mpe soki moto atuni yo ngonga, okoyebisa ye nini? Ezali na ndenge mingi ya koloba. Na ndenge nini?

Na ndakisa, soki etikali miniti 20 mpo tókóma ngonga ya 14, okoki koloba ete tozali na ngonga ya 1:40 nsima ya midi, to mpe 13:40. Ndenge yango ya kolobela ngonga elandaka montre ya ngonga 24. Kutu na bisika mosusu, bakoki koloba etikali miniti 20 mpo tókóma ngonga ya 2 nsima ya midi.

Lokola otángaka Biblia, mbala mosusu omitunaka soki bato ya ntango ya kala oyo Biblia elobeli bazalaki kolobela ngonga ndenge nini. Bazalaki na ndenge mingi ya kolobela ngonga. Makomami ya Ebre elobeli “ntɔngɔ,” “midi,” “ntango ya midi,” mpe “mpokwa.” (Ebandeli 8:11; 19:27; 43:16; Kolimbola Mibeko 28:29; 1 Bakonzi 18:26) Kasi, na bantango mosusu, bazalaki kolobela ngonga na bosikisiki.

Mbala mingi, bazalaki kosalela basinzili, mingimingi na butu. Basiɛklɛ ebele liboso Yesu abotama, Bayisraele bakabolaki butu na biteni misato oyo bazalaki kobenga bileko ya kokɛngɛla. (Nzembo 63:6) Basambisi 7:19 elobeli “eleko ya kokɛngɛla na katikati ya butu.” Na ntango ya Yesu, Bayuda balandaki momeseno ya Bagrɛki ná Baroma mpe bakómaki kokabola butu na bileko minei ya kokɛngɛla.

Baevanzile elobeli bileko yango ya kokɛngɛla na bisika mwa mingi. Na ndakisa, ezalaki “na eleko ya minei ya kokɛngɛla na butu” nde Yesu atambolaki na mai mpo na kokende na masuwa esika bayekoli na ye bazalaki. (Matai 14:25) Na ndakisa moko oyo apesaki, Yesu alobaki: “Soki nkolo-ndako ayebaka na ntango nini moyibi akoya na butu, mbɛlɛ alali mpɔngi te mpe mbɛlɛ atiki te ete moyibi abuka ndako na ye mpe akɔta.”​—Matai 24:43.

Yesu alobelaki bileko yango nyonso minei ntango ayebisaki bayekoli na ye: “Bósɛnzɛlaka, mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya, soki na mpokwa to na katikati ya butu to na ntango nsoso eleli to na ntɔngɔntɔngɔ.” (Marko 13:35) Eleko ya liboso, elingi koloba “mpokwa,” ezalaki kobanda na kolala ya moi mpe kosuka na ngonga ya 21. Eleko ya mibale, elingi koloba “katikati ya butu,” ezalaki kobanda na ngonga ya 21 mpe kosuka na midi ya butu. Eleko ya misato, elingi koloba “ntango nsoso eleli,” ezalaki kobanda na midi ya butu mpe kosuka soki na ngonga ya 3 ya ntɔngɔ. Ekoki kozala ete na eleko yango ya kokɛngɛla nde nsoso elelaki na butu oyo bakangaki Yesu. (Marko 14:72) Eleko ya minei, elingi koloba “ntɔngɔntɔngɔ,” ezalaki kobanda na ngonga ya 3 na ntɔngɔ mpe kosuka ntango moi ekobima.

Na yango, ata soki bato oyo Biblia elobeli bazalaki na bamontre te lokola biso lelo oyo, bazalaki na ndenge ya kolobela ngonga, ezala na moi to na butu.

Bileko minei ya kokɛngɛla na butu epai ya Bayuda ya ntango ya kala
    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto