Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/95 lok. 1
  • Tótika te kosakola ndako na ndako

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótika te kosakola ndako na ndako
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kosakola ndako na ndako ezali na ntina mingi lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Kosakola ndako na ndako
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Toteya kati na koyangana mpe na ndako na ndako
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Ekoki ete nsango malamu esakolama liboso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 1/95 lok. 1

Tótika te kosakola ndako na ndako

1 Kati na Yisalaele ya kala, bambeka ezalaki kopesama mikolo minso. (Ex. 29:38-42) Mɔ́tɔ ya etumbelo mozalaki kopela ntango nyonso; molinga oyo ezalaki kobima kati na yango mozalaki “nsolo malamu” oyo ezalaki kosepelisa Yehova. (Ex. 29:18) Lelo oyo, tosɛngisami mbala na mbala mpo na ‘kopesa mbeka ya masanzoli epai ya Nzambe, yango mbuma na bibɛbu na biso oyo ezali koyambola liboso na bato banso mpo na nkombo na ye.’ (Ebe. 13:15) Na esika ete tópesa bambeka oyo eyebisami na Mibeko, biso tozali kosambela Yehova na kolobáká masanzoli na ye kozanga kotika.​—Yis. 43:21; Mis. 5:42.

2 Yesu Klisto Motatoli monene oyo alekaki batatoli nyonso awa na mabele, alakisaki biso lolenge ya kosalela losambo na pɛto na kopesáká bambeka ya masanzoli. Ateyaki epai na bayekoli na ye ntina ya nsango oyo azalaki kosakola. Ayebaki ete mwango moleki malamu ya koyebisa epai na bato nsango malamu ezalaki ya kokende epai na bango mpo na kosolola na bango mpenzampenza. (Mat. 10:7, 12) Na bongo, bantoma balandaki batoli na ye oyo epemami na kosakoláká ndako na ndako.​—Mis. 20:20.

3 Ezali mpe motindo moko lelo. Lokola bazali bayekoli ya Yesu, baklisto ya solo bazali kolanda ndakisa na ye na kosakoláká nsango malamu ndako na ndako. Mbala mosusu yango ezali kobendela bango matɔngi to minyoko, kasi, mbula na mbula, bankóto mingi ya bayekoki ya sika bazali koya epai na ebele monene; likambo oyo limonisi ete ezali nde na lolenge wana Yehova alingi ete mokano na ye mokokisama. Ezali mpo na yango nde tozali kolendendela kati na mosala ya kosakola.

4 Matomba ya mosala ya kosakola ndako na ndako: “Nzambe akokabolaka bato te, . . . [moto] oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Mis. 10:34, 35) Wana ezali biso kokende mpenzampenza na ndako nyonso ya teritware na biso, tozali komimonisa ete tozali solo na koponapona te mpe tozali kopesa epai na moto nyonso likoki ya koyoka nsango ya Bokonzi mbala na mbala. Baoyo bazali koyokamela malamu bazali kozwa lisalisi oyo liyokani na bamposa na bango.

5 Pene na basakoli nyonso, bakisa mpe bilenge, mibange mpe ata bato ya sika, bakoki kosangana na mosala ya kosakola ndako na ndako. Ezali na boye nde biso banso tozali “kosala eyambweli ya polele mpo na lobiko.” (Lom. 10:10) Mosala ya kosakola ndako na ndako elongo na basakoli mosusu ezali kosangisa biso kati na bikanganeli ya bolingo. Na komonisáká kondima na biso polele, tozali kokóma “etaliseli mpo na lisano,” mpe na bongo tozali kopesa likoki epai na bato ya motema sembo básosola ete tobongisami mpo na koteya Biblia mpe ete bakoki kozwa litomba na mateya yango. (1 Kol. 4:9) Nyonso emonisi polele ete Yehova azali kopambola mosala ya kosakola mpe azali kosalela yango mpo na koyanganisa ebele monene kati na “ndako” na ye, losambo ya pɛto.​—Yis. 2:2-4.

6 Lelo oyo koleka mikolo nyonso mosusu, bazalani na biso bazali na mposa ya koyoka nsango ya Bokonzi. Tótika te kosakola ndako na ndako, kino na ntango oyo Yehova akoloba ete ekoki. (Yis. 6:11) Kosaláká bongo, tokozwa mbano: esengo oyo ezali kouta na kosangana na mosala ya kosakola ndako na ndako, mosala ya ntina mpe ya motuya na ntango oyo ya nsuka. 1 Kol. 15:58.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto