Ntango ezali nde sikawa
1 Ntango ntoma Paulo akomaki mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti, akundwelaki bango ete balakaki kokokisa mosala moko malamu ya lisungi mpo na baninga na bango bandimi na Yelusaleme. Nzokande, mbula moko elekaki mpe basilisaki naino te mosala oyo babandaki. Na bango Paulo apusaki bango na maloba oyo: “Sikáwa bokokisa mosálá mwa bino...bósilisa mwangó na mpiko.” 2 Kor 8:11, Liloba lya Nzambe.
2 Esila kokómela biso mokolo moko to mosusu ete tómityela mikano. Mbala mosusu tokanaka kokólisa kosangana na biso na mosala ya kosakola, kosala boyebani koleka na bandeko na biso, kokóma na bizaleli bisɛngami mpo na kozwa mokumba, to kolónga mwa bolembu moko. Nzokande, ata tozalaki na makanisi ya malamu na ebandeli, mbala mosusu tolendendelaki te kino na nsuka. Tomini te lokola bapɔsɔ, basanza, bambula ezali koleka mpe biso tozali bobele na esika yango moko. Ekoki kozala ete tosengeli kokamata toli ya “kokokisa mpe kosilisa” oyo tobandaki?
3 Tókokisa mikano na biso: Kokamata ekateli ya kosala likambo moko ezali malamu, kasi eleki malamu kokokisa ekateli yango. Soki tozali ntango nyonso kozelisa, tokokóla te. Esengeli kozwa ekateli mpe kokómisa yango na nsuka kozanga koumela. Na yango, esengeli kozala na ebongiseli malamu. Ezali likambo ya ntina na komibombela ntango mpo na kokokisa mokano yango mpe kokeba na kosalela ntango yango bobele mpo na mokano yango. Talá likanisi malamu: tótya dati to ngonga oyo tokokokisa mokano yango mpe na nsima, na komityela disipilini biso moko, tótosa yango.
4 Ntango tozali na mokakatano ya kokokisa mokano na biso, tomekamaka na komilobela ete: “Nakosala yango na nsima.” Kasi toyebi te makambo oyo lóbi ezali kobombela biso. Masese 27:1 elobi ete: “Omikumisa mpɔ na mokɔlɔ na lobi tɛ jambi oyebi tɛ sɔkɔ mokɔlɔ ekobimisa nini.” Moyekoli Yakobo alobaki ete ezali likámá na kotyela mikolo mizali koya motema mingi koleka, mpamba te “toyebi te ndenge nini bomoi na biso ekozala lobi....Na bango soki moto ayebi kosala oyo ezali malamu, kasi azali kosala yango te, asali lisumu.” Yak. 4:13-17, NW
5 Makambo mingi makoki kolɛngola biso mpe bato mingi bakoki kopesa biso mosala kino ete mikano na biso moko mokobeba. Esengeli kosala milende mpo ete tobósana te mikano na biso. Ezali malamu kolobela yango ntango nyonso kati na mabondeli na biso. Mbala mosusu tokoki kozwa lisungi na kosɛngáká na bandeko na biso ete bákundwela biso yango mpe bálendisa biso. Tókoma yango kati na manáka; ekozala bokundoli mpo na koyeba bokóli na biso. Esengeli na biso kozwa ekateli ya “kosala lokola tokanaki yango na motema na biso.” 2 Kol. 9:7
6 Sanza ya Apríli ezali kopesa biso libaku kitoko ya komipesa na mikano na biso. Tokokabola mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis mpe mwa babuku. Tokoki komityela mwa mikano milongobani? Mpo na nini te komeka kotika mikanda mingi koleka kati na teritware? Ekozala malamu mpo na mingi kati na biso kokana kosala bozongeli mingi ya sika mpe kobanda boyekoli ya Biblia.
7 Lokola mokili ezali “koleka,” ezali likambo ya mayele te na kozongisa nsima makambo oyo mazali na ntina mingi. (1 Yoane 2:17) Mikumba mpe mapamboli kitoko kati na mosala ya Nzambe epesameli biso sikawa. Ezali likambo na biso ete tosimba yango!