Tózwa matomba na masukúlu ya bato nyonso oyo matalelami lisusu
1 Lisoló ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso, lilobelami na mokuse na sikisiki kati na Masese 4:18: “Nzela na bayengebeni ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo na malamu koleka.”
2 Na boyokani na maloba wana, lisangá ya boklisto lizali kokóba kozwa matomba na bingɛngiseli oyo bizali koya na ntango ekoki mpe makambo mabongisami oyo matali mateya ya Biblia. (Mat. 24:45-47) Na ntembe te, okoki kotánga bandakisa ya sikisiki oyo osila komona kobanda osanganaki elongo na Batatoli ya Yehova. Lokola kongɛnga ya solo ezali sé kokóla, boye makita ya lisangá, kati na yango masukúlu ya bato nyonso, mazali kopesa biso nzela ya kolanda bokóli yango.
3 Masukúlu oyo matalelami lisusu: Kala mingi te, la Société atalelaki lisusu ndambo monene ya masukúlu ya bato nyonso. Ezali na makambo oyo mabongisami mpe makanisi ya ntina oyo masɛngisamaki. Mpo ete lisangá lizwa mpenza litomba na makambo oyo mayeisamaki ya sika, bandeko oyo basalaka masukúlu ya bato nyonso bakosɛnzɛla na boye ete básalela masukúlu ya sika oyo tozali na yango.
4 Soki olingi kozwa matomba na masukúlu yango ya bato nyonso, talelá mitó ya makambo ya masukúlu oyo masengeli kosalema. Liboso ete oyangana na likita ya bato nyonso, meká komikundwela makanisi oyo mauti kobimisama kala mingi te kati na mikanda ya la Société mpo na likambo yango. Na nsima, wana ozali koyokamela, yebá liboso likambo oyo molobi akoloba. Kamatá banɔ́ti ntango masolo yango emonisami na lolenge ya sika, mpo na kosalela yango na mikolo mizali koya. Na bongo, okondimisama na kozwa matomba mingi na masukúlu oyo matalelami lisusu.
5 Masukúlu ya bato nyonso masengeli koteya, kasi lisusu kolendisa: Ntango Yesu azalaki koloba, azalaki kosimba mitema ya bayoki na ye. Kati na Matai 7:28, tozali kotánga ete na nsuka ya Lisoló na ye likoló na Ngomba, lisukúlu oyo lileki masukúlu mosusu nyonso, “ebele bakamwi mateya na ye.”
6 Na kobateláká na makanisi ndakisa ya Yesu, masangani ya bankulutu bakosalela bososoli ntango bakopona balobi ya sika, bakokamata bobele bandeko oyo bazali bateyi malamu, oyo bakolanda malamumalamu masukúlu ya la Société mpe baoyo bazali na mayoki ya kobenda likebi ya bayoki. Bandeko oyo bazali na libaku kitoko ya kosala masukúlu ya bato nyonso basengeli ntango nyonso kosala milende ya kobongisa lolenge na bango ya koteya, na kondimáká batoli nyonso mpe makanisi nyonso oyo bazwaki epai na bankulutu.
7 Lokola Yisaya 65:13, 14 esakolaki yango, bokóli na elimo ya basaleli ya Nzambe ezali ntango nyonso komonana polele. Masukúlu ya Bato nyonso ezali moko kati na myango mingi oyo mizali kokómisa biso bato oyo “bateyami na Yehova.”—Yisaya 54:13.