Biyano na mituna na bino
◼ Ezali malamu ete Batatoli ya Yehova bátindelanaka masukulu oyo bandeko mosusu basalaki?
Masukulu elendisaka biso. (Mis. 15:32) Yango wana, ntango tolandi lisukulu moko, tosepelaka koyebisa bandeko oyo bazalaki te makambo oyo toyoki. Lelo oyo, tokómi na baaparɛyi ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa biso tókɔtisa mongongo ya ndeko oyo azali kosala lisukulu mpe tótindela yango bato mosusu. Bandeko mosusu babombaka masukulu ebele, ata mpe masukulu oyo esalemá eleki bambula mingi, mpe bapesaka yango baninga na bango to basalelaka bango bakopi. Basusu bazali kotya masukulu yango na Internet mpo moto nyonso oyo asepeli azwa yango.
Kokɔtisa na kasɛti lisukulu oyo ndeko moko asali mpo biso moko to bandeko ya libota na biso báyoka yango na nsima, ezali mabe te. Longola yango, bankulutu bakoki kosɛnga ete masukulu etyamaka na kasɛti mpo na bandeko oyo bakokaka lisusu koyangana na makita te. Nzokande, ezali na mwa bantina oyo mpo na yango tosengeli te kotindelanaka masukulu oyo bandeko mosusu basalaki.
Lokola mbala mingi balobi babongisaka masukulu na kotalela bamposa ya lisangá, ntango mosusu tokoki komona mabe to koyeba te mpo na nini likambo boye to boye elobami na lisukulu moko oyo batindeli biso. Lisusu, tokoki te koyeba nani asalaki lisukulu yango mpe ntango nini, mpe na ndenge yango ekoki kozala mpasi tóyeba soki makambo oyo elobami eyokani na boyebi oyo tozali na yango sikoyo mpe bosolo na yango. (Luka 1:1-4) Longola yango, kotindelana masukulu oyo bandeko basalaki ekoki kosala ete bandeko mosusu bákóma kopesa to kondima lokumu oyo ebongi te.—1 Ko. 3:5-7.
Moombo ya sembo mpe ya mayele azali kosala mosala makasi mpo na kopesa biso bilei ya elimo ‘oyo tosengeli na yango’ mpe azali kopesa yango “na ntango oyo ebongi.” (Luka 12:42) Moko na makambo oyo moombo asali ezali ebongiseli oyo esɛngaka ete masukulu esalemaka na masangá ya Batatoli ya Yehova mpe masolo oyo tokoki koyoka, oyo etyamaka na Internet (na adrɛsi oyo: jw.org). Tózala na elikya ete moombo ya sembo mpe ya mayele mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakokoba kopesa biso bilei oyo tosengeli na yango mpo tózala na kondima makasi.—Mis. 16:4, 5.