Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/95 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Zwa litomba na eteyelo mpo na kobongisa mosala na yo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kotika te kokola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 11/95 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼Eloko nini tosengeli komema na makita?

Na boumeli ya makita ya pɔsɔ na pɔsɔ, tozali kozwa mateya mpe bilendiseli mpo na litomba na biso. (Yis. 48:17; Ebe. 10:24, 25) Nzokande, matomba oyo tokozwa na makita yango mataleli mpenza lolenge oyo tozali komibongisa.

Ekozala malamu ete mosangani moko na moko ya libota azala na mikanda oyo mikoyekolama mpe azala na bisaleli nyonso mosusu ya ntina kati na makita, na ndakisa Biblia, buku ya nzembo, mokanda to mikanda oyo mikoyekolama, esika ya kozwa nɔti, bakisa mpe ekomeli.

Na ntango ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, esengeli kozala na Manaka ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe na Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Yango ezali kosalisa biso ete tómikundwela mitó na makambo ya masolo oyo makosalema na bana-kelasi mpe ete tólanda na likebi nyonso batoli oyo ekopesama na mokɛngɛli na eteyelo. Tokoki biso moko kosalela malako mapesami na ntina ete tóbongisa lolenge ya masolo na biso mpe koyeisa kitoko lolenge na biso ya komonisa nsango kati na mosala ya kosakola. Kobanda na Yanuali 1996, ndambo monene ya masukulu ya boteyi lisangá (discours d’instruction) makozwama na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu. Mbala mosusu ekozala mpasi ete mosangani moko na moko ya libota na biso amema buku na ye moko; na yango, tokoki komema moko na ntina ete libota na biso likoka kosalela yango.

Na ntango ya Likita ya Mosala, tosengeli kozala na Mosala na biso ya Bokonzi mpe kozala na buku Comment raisonner. Tómema mikanda nyonso oyo mikosalelama na boumeli ya likita, na ndakisa mikanda oyo mikosalelama na ntango ya bilakiseli. Bankulutu basengeli komema buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe.

Baboti basengeli kosala makasi na ntina ete bana na bango báfanda kozanga kotya makɛlɛlɛ mpe ete bálanda makita na likebi mpenza. Na kopesáká bango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu, liboso ete báyeba kotánga, bosepeli na bango ekolamwisama. Wana tozali kolakisa bana na biso ete bátalela mikanda na lisɛki te mpe wana tozali komonisa bango lolenge ya kosalela yango, bazali kolona mimeseno malamu ya elimo oyo bakobatela yango na bomoi na bango mobimba.

Esengo mpe bosepeli oyo tozali kozwa na makita ya lisangá ekozala monene mingi koleka na ntango tozali koyangana na kozaláká na bisaleli oyo bisengeli. (2 Tim. 3:17) Ezali lolenge loleki malamu ya komindimisa ete ‘totondi na boyebi ya sikisiki ya mokano na ye [oyo ya Nzambe], na mayele nyonso mpe na bososoli ya elimo.’​—⁠Kols. 1:⁠9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto