Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
1 Bato bakɔtaka na eteyelo mpo na kozwa mateya oyo ekosalisa bango bákokisa mikano bamityeli na bomoi. Kasi, mokano nini oyo eleki mpenza kosanzola Mopesi ya bomoi mpe kosalisa basusu báyeba mikano mpe banzela na ye? Ata moko te. Ntina ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali ya kobongisa biso mpo tóteya basusu kondima na biso. Na yango, ntango tozali kokɔta eteyelo yango pɔsɔ na pɔsɔ, tozali kozwa makoki oyo ebongisaka biso mpo tósala mosala oyo eleki misala mosusu nyonso na bomoi na biso na ntina.
2 “Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2003” etyamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo eleki. Programɛ yango ezali mpe na malako oyo etali ndenge eteyelo ekotambwisama. Ekozala malamu mingi obomba programɛ yango na kati ya buku na yo Zwá matomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, oyo okobanda komema na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi pɔsɔ na pɔsɔ. Talá mwa makambo ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2003.
3 Toli mpo na koloba malamu: Kobanda na sanza ya Yanuali, likita nyonso ya eteyelo ekobanda na lisolo ya miniti mitano oyo ekolobela toli moko mpo na koloba malamu to likambo moko etali ndenge ya kotánga, koyekola to koteya. Mokɛngɛli na eteyelo akosala masolo yango ya ebandeli, to akoki kopona nkulutu mosusu ya makoki asala yango. Molobi akoki kopesa ndimbola mpe ntina ya toli yango mpo na koloba malamu. Na nsima, akolimbola malamu makambo etali lisolo yango na nzela ya bandakisa ya Biblia mpe akomonisa ndenge oyo esengeli kosalela toli yango mpo na koloba malamu, akotya likebi mpenza mpo na komonisa ndenge oyo kosalela toli yango ekoki kobongisa mosala na biso ya kosakola.
4 Lisolo No. 1: Bandeko mibali oyo bakosala lisukulu ya koteya lisangá basengeli kosala na ndenge ete “bábenda likebi mpo na koyeba ndenge ya kosalela toli yango.” Elingi koloba komonisa lisangá ndenge ya kosalela makambo oyo ezali na lisolo. Soki okosala lisolo yango, talá nkasa 48-49 ya buku Eteyelo ya mosala mpo ozwa makanisi oyo ekosalisa yo mpo na kobongisa lisolo, mpe yekolá makambo oyo ezali na index ya buku yango na nse ya motó ya likambo “Komonisa ndenge ya kosalela makambo.”
5 Manaka ya botángi ya Biblia: Soki kala okokaki te kolanda manaka ya botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ, mpo na nini te kozwa ekateli ya kolanda yango malamumalamu mbula oyo? Baoyo bakosala bongo bakosilisa kotánga Makomami ya Grɛki ya boklisto na mobimba na yango na nsuka ya mbula oyo. Matomba ya kobanda kolanda manaka mpo na botángi ya Biblia na Makomami ya Grɛki ya boklisto elobelami na lokasa 10, paragrafe 4, ya buku Eteyelo ya mosala.
6 Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia: Lisolo oyo ekómi na miniti zomi mpo ete bayangani bákoka kopesa makanisi na botángi ya pɔsɔ. Baoyo bakosala lisolo yango bakolekisa te ngonga oyo epesami mpo na yango. Ekosalema pɔsɔ na pɔsɔ, ezala mpe na pɔsɔ ya bozongeli ya koloba. Ntango ozali kotánga mikapo oyo epesami, talelá makanisi oyo ekoki kosalisa bino na boyekoli na bino ya libota, na mosala ya kosakola, to na bomoi na yo. Wapi bizaleli ya Yehova oyo emonanaki na makambo asalelaki bato mpe bikólo? Makambo nini ekómisaki kondima na yo makasi mpe ebakisaki botɔndi na yo mpo na Yehova? Kobanga te kopesa makanisi na yo na makambo oyo ezali na mikapo oyo epesamaki, ezala na mokapo oyo esengeli kotángama na Lisolo No. 2, mpamba te ndeko oyo akosala lisolo No. 2, akopesa likanisi te ya mokapo oyo atángi.
7 Lisolo No. 2: Pɔsɔ na pɔsɔ, mokumba ya mwana-kelasi ya liboso ekozala komeka kotánga liboso ya bato nyonso. Botángi nyonso, longola kaka botángi ya nsuka ya sanza, ekouta na botángi ya Biblia oyo etyami na manaka mpo na pɔsɔ wana. Botángi oyo ekosalema na pɔsɔ ya nsuka ya sanza ekouta na Linɔngi ya Mosɛnzɛli. Mwana-kelasi akotánga kaka kotánga mpamba, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Na ndenge wana, akotya likebi na ye nyonso na makoki na ye ya kotánga.—1 Tim. 4:13.
8 Lisolo No. 3 mpe No. 4: Masolo yango ekouta na buku Comment raisonner, mosusu ezali na makambo mingi, mosusu ezali na makambo mingi te; nzokande masolo mosusu mpe ezali kaka na motó ya likambo mpamba. Baoyo bakozwa masolo oyo ezali na makambo mingi te ya buku to oyo ezali kaka na motó ya likambo mpamba, bakozala na libaku ya kobongisa lisolo na bango na bolukiluki oyo bakosala na mikanda mosusu. Yango ekosalisa bandeko basi bákokanisa lisolo yango na kotalela molobani nini bakosala na ye.
9 Kadre: Ndenge balobeli yango na lokasa 45 ya buku Eteyelo ya mosala, mokɛngɛli na eteyelo akoponela mwana-kelasi kadre. Soki asali yango te, bandeko basi bakoki nde kopona moko ya bakadre oyo ezali na lokasa 82. Soki ndeko mwasi moko na moko azali kosala lisolo nsima ya sanza mibalemibale, ekozwa ye mbula mitano mpo asilisa kosalela bakadre nyonso 30. Bandeko basi oyo bakopona kadre No. 30 oyo babengi “Ndenge mosusu ya kosala masolo, oyo ebongi mpo na teritware na bino,” basengeli kokoma kadre yango oyo bakosalela na nse to na nsima ya lokasa na bango ya toli (S-89). Mokɛngɛli na eteyelo akokoma dati oyo mwana-kelasi asali lisolo na ye na lokasa 82 ya buku na ye pene ya kadre oyo aponaki. Akoki kokoma dati yango mbala moko na ntango oyo apesi mwana-kelasi pwɛ na lokasa ya toli.
10 Lokasa ya toli: Ekangami na kati ya buku na yo. Ezali na nkasa 79-81. Na yango, esengeli opesaka mokɛngɛli na eteyelo buku na yo mbala nyonso oyo okosilisa kosala lisolo moko. Mokɛngɛli na eteyelo asengeli kokomaka batoli oyo bana-kelasi bazali kosala, mpe asengeli kobomba yango malamu.
11 Bozongeli ya koloba: Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema na mɔnɔkɔ kaka. Ekosalema nsima ya sanza mibalemibale mpe ekoumela miniti 30. Se ndenge ezalaki kosalema liboso, mituna ya bozongeli ekokoba kobima na Mosala na biso ya Bokonzi. Soki bozongeli ya koloba ekwei na pɔsɔ ya liyangani ya zongazonga to ya boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga, masolo nyonso oyo elingaki kosalema na pɔsɔ oyo elandi esengeli kosalema pɔsɔ wana mpe bozongeli ya koloba ekosalema na pɔsɔ oyo elandi.
12 Bakelasi mosusu: Na masangá oyo bana-kelasi nyonso baleki 50, ekozala malamu soki bankulutu babakisi bakelasi mosusu epai bakoki kosala masolo. “Soki balingi masolo nyonso ya bana-kelasi ekosalema mpe na bakelasi wana mosusu, to soki mpe balingi, kaka masolo mibale ya nsuka nde esalemaka kuna, mabe ezali te.” (Eteyelo ya mosala, lok. 285) Likanisi oyo ya nsuka ekosalisa masangá oyo bandeko basi bazali mingi kasi bandeko mibali oyo basengeli kosala mokumba ya kotánga bazali mingi te. Bankulutu basengeli kopona bandeko mibali ya makoki mpo na kotambwisa bakelasi yango.
13 Mopesi-toli mosungi: Ndenge elobelami na Programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, bankulutu basengeli kopona mopesi-toli mosungi oyo akopesa toli na nkuku soki esengeli na bankulutu mpe basaleli na misala oyo basalaka makanisi ya ntina na botángi ya Biblia mpe masukulu ya koteya lisangá. Ndeko mobali oyo akozwa mokumba yango asengeli kozala ndeko moko oyo akɔmelá, mpe moto oyo bankulutu mosusu bakoyoka toli na ye. Toli na ye esengeli koteya, akopesa longonya mpo na mayele ya koteya ya malamu oyo molobi asalelaki mpe akosɛnga ye abongisa likambo moko to mibale. Ezali na ntina te ete apesa toli nsima ya lisolo nyonso oyo ndeko mobali oyo amesaná kosala masolo azali kosala. Kasi ndeko oyo azwi mokumba yango asengeli kozala na bososoli mpe koyeba ete ata bandeko mibali oyo basalaka masukulu ya bato nyonso bakoki kozwa lisalisi mpo bákola lisusu.—1 Tim. 4:15.
14 Makambo oyo bapesi-toli basengeli kotyela likebi: Nini ekoki kosalisa mopesi-toli mpo atalela lisolo moko malamumalamu? Bitanda ya misato nyonso oyo ezali na mikapo ya buku Eteyelo ya mosala ezali na makanisi ya mokuse ya makambo oyo basengeli kotyela likebi. Mokɛngɛli na eteyelo asengeli mpe kotya likebi na makundoli to batoli ya buku oyo ekosalisa ye ayeba na mbala moko ndenge oyo molobi abongisaki lisolo na ye mpe soki asali yango malamu. Na ndakisa, talá mituna oyo elandani oyo ezali na likoló ya lokasa 55 mpe makanisi oyo ezali na paragrafe ya liboso na lokasa 164.
15 Salelá bisika oyo etikali mpamba: Mokanda Eteyelo ya mosala ezali na bisika minene oyo etikali mpamba pembeni ya makomi; mpe ezali lisusu na bisika ya mpamba oyo ezali na mikɔlɔtɔ mpo na kokoma makambo ntango ozali kosala boyekoli ya yo moko mpe ntango ozali na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. (Talá nkasa 77, 92, 165, 243, 246, mpe 250.) Memáká mokanda na yo na eteyelo pɔsɔ na pɔsɔ. Landá malamu na buku na yo ntango lisolo ya liboso ezali kosalema. Tiká buku na yo polele mpo na masolo nyonso oyo etikali. Komá makambo oyo ekosalisa yo oyo mokɛngɛli na eteyelo alobeli. Tyá likebi na mayele ya ndenge na ndenge ya koteya, mituna, bandakisa, masese, bililingi, biloko mpo na koteya, mpe kokesenisa makambo oyo molobi asaleli. Soki ozali kokoma banɔti malamu, ekosala ete makanisi ya malamu mingi oyo okozwa na eteyelo ezongela yo na makanisi mpo osalela yango.
16 Yesu Klisto ayebaki ete kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali libaku oyo eleki monene epesami na moto nyonso. Ezalaki mokumba na ye oyo elekaki monene. (Mko. 1:38) Alobaki boye: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Lokola tondimá kolanda ye, biso mpe tomipesi na mosala ya kosakola nsango malamu, mpe tozali ntango nyonso kosala makasi mpo tóbongisa lisusu lolenge ya kopesa “mbeka ya lisanzoli” na biso. (Ebe. 13:15 ) Mpo na kokokisa mokano yango, tiká ete tózala na ekateli makasi ya kosangana na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi pɔsɔ na pɔsɔ, eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso.