Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/96 lok. 4
  • Tózongela moto nyonso oyo azwaki mwa búku

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózongela moto nyonso oyo azwaki mwa búku
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi na lisalisi ya mwa babúku
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tósalela mwa babúku ndenge na ndenge kati na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 1/96 lok. 4

Tózongela moto nyonso oyo azwaki mwa búku

1 Ntoma Paulo akumisaki Bafilipi mpo ete ‘balamwisaki lisusu makanisi na bango mpo na ye.’ (Filp. 4:10) Soki tolandi ndakisa na bango kati na mosala ya kosakola, ‘tokolamwisa lisusu makanisi na biso’ mpo na baoyo tozali kosakwela bango mpe tokomiyoka ete topusami na kozonga kotala bango.

2 Soki totikaki mwa búku “Bokonzi oyo ekosala Paradis,” tokoki na ndakisa koloba boye:

◼ “Nakanisaki likoló na lisoló oyo tosololaki mokolo wana, mpe mikapo mibale ya Biblia miyaki na makanisi na ngai. Nakosepela kolakisa yo yango. Ozali mbala mosusu komikundola: Tolobelaki bokonzi oyo Nzambe asengelaki kozala na yango awa na mabelé. Kati na Biblia, Yehova Nzambe alaki ete yango ekosalema mpenza. [Tótánga Danyele 2:44.] Okanisi ete likambo yango likoki kosalema? [Tótika moto yango ayanola.] Yoká oyo Nzambe alobi na ntina na makoki azali na yango ya kokokisa bilaka na ye. [Tótánga Yisaya 55:11.] Mokapo oyo mosengeli kopusa biso na kotya elikya na biso kati na Bokonzi ya Nzambe, boye te? Kasi, ntango nini Nzambe akokokisa bilaka na ye? ” Tóyebisa ete tokoyanola na motuna yango na mbala ezali koya.

3 Soki tokei kotala moto moko oyo azwaki mwa búku “Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ,” tokoki komeka maloba oyo ya bokɔti na lisoló:

◼ “Lokola mokolo wana tolobelaki liwa ya moto moko oyo olingaka, nasali molende mpenza mpo na kozonga kotala yo.” Tólakisa elilingi ya lokasa 30 na kolobáká ete: “Ozali komikundwela bosepeli monene oyo, epai tozali komona bokutani ya basekwi elongo na baoyo bango balingaka? Natunaki yo soki oyebi esika oyo likambo yango ekosalema, soko na likoló to awa na mabelé. Osilaki mbala mosusu komona, na lokasa 26 ya mwa búku oyo, eyano oyo Biblia epesi.” Tótalela makambo minene ya baparagrafe 3 kino 5, mpe tólakisa Yoane 5:21, 28, 29. Soki ngonga ezali, tótánga moko ya mikapo oyo mipesami na lokasa 26,

4 Tosili kobanda koyekola mwa búku “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika”? Na mbala ya nsima, tokoki kosala boye:

◼ Tófungola lisusu na lokasa 30 mpe tóbimisa motuna oyo: “Na makambo nini Biblia ezali mpenza búku ya kobenda likebi? ” Tófungola mwa búku yango na nkasa 3 mpe 4, na nsima tótalela lisusu baparagrafe 1 kino 4, bakisá mpe elilingi ya ezipeli. Tótánga mokapo moko to mikapo mibale kati na maloba na nsé ya lokasa oyo mazwami na paragrafe 4. Tóyebisa ete Biblia ezali búku bobele moko oyo ezali kopesa elikya moko kitoko. Tókamata bibongiseli mpo na bozongeli na biso ya mbala ekoya. Nsima na bozongeli ya misato, soki tomoni ete boyekoli ekokóba, boye tokoki kokoma ye na lapólo na biso.

5 Tokoki kozongela lisoló likoló na mwa búku “Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko” na lolenge lolandi:

◼ “Mbala eleki, nalakisaki yo nkombo ya Nzambe kati na Biblia. Koyeba nkombo ya Yehova mpe kosalela yango ezali eteni ya ntina kati na losambo na biso.” Tófungola mwa búku yango na lokasa 31, tótalela makanisi ya ntina oyo mazali na baparagrafe minei ya nsuka, mpe tótángela moto yango Yoane 17:3 mpe Mika 4:5. Tóyebisa ete tolingi kosala, elongo na ye, boyekoli ya Biblia oyo ekopesa ye nzela na koyeba ete nkombo ya Nzambe ekosantisama mpe ete bato bakozwa esengo ya kozala na bomoi na mabelé oyo makokóma paladiso.

6 Tólamwisa lisusu makanisi na biso mpo na baoyo tokutanaki na bango. Tosengeli kozonga kotala bango na kolendendela nyonso mpe komibongisa mpo na koyebisa bango makanisi ya kolendisa. Na bongo, tokozala baklisto ‘oyo bazali mpenza kobota mbuma’ kati na mosala motali kozalisa bayekoli ya sika.​—Mat. 13:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto