Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/96 lok. 8
  • Tózongela bato oyo bamonisaki bosepeli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózongela bato oyo bamonisaki bosepeli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • “Oyo elimboli bomoi ya seko”
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tólakisa búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tóbatela bosepeli oyo bato bamonisaki
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 6/96 lok. 8

Tózongela bato oyo bamonisaki bosepeli

1 Na libaku ya kobima ya búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, molobi alimbolaki ete ntango “basilisi boyekoli ya búku yango, bato ya bosembo basengeli koyeba makambo mingi mpo na kokóma na likoki ya kozwa ekateli ya kosalela Yehova mpe kozwa batisimo.” Búku yango ebimisamaki mpo na koteya solo nokinoki. Ezali kopesa malako ya sikisiki oyo makoki kopusa moto ete akóla na elimo. Ezali komonisa solo na lolenge lobongi, kozanga kobungisa ntango likoló na mateya ya lokuta. Mpo na kosalela esaleli yango malamumalamu esɛngaka kozongela bato oyo bamonisaki bosepeli.

2 Soki tosololaki na moto moko oyo andimaka Nzambe te kasi amonisaki mwa bosepeli, tokoki kobanda lisoló na kofungoláká búku na elilingi ya nkasa 4 mpe 5 mpe koloba boye:

◼ “Ntango nayaki na mbala eleki, totalaki elongo elilingi kitoko oyo ezali komonisa lolenge ya bomoi ya esengo. Na pembeni ya elilingi tozali kokuta motuna oyo: ‘Osengeli kosala nini mpo na yango?’ Okanisi nini mpo na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Biblia ezali komonisa polele moko ya masɛngami ya moboko. [Tótánga Yoane 17:3.] Boyebi ezali na ntina mpo ete tózala na kondima epai na Nzambe. Mwango malamu koleka ya koyekola oyo tosengeli koyeba ezali ya kosala boyekoli ya mozindo ya Biblia.” Tófungola búku na mokapo ya liboso mpe tóbimisa mwa makanisi ya kolendisa oyo mazwami na paragrafe 1 kino paragrafe 5. Tólimbola lolenge oyo totambwisaka boyekoli ya Biblia, mpe tósɛnga kozonga mpo na kokóba lisoló.

3 Soki tozongeli moto na mokano ya kozongela lisoló tosololaki oyo etalelaki mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe, tokoki koloba boye:

◼ “Na mbala eleki, tosololaki likambo litali [tókundola likambo oyo tolobelaki]. Yango etindaki biso na komituna mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi na mokili. Osukisaki nini mpo na yango? [Tótika molobani ayanola.] Ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete ezali Nzambe te nde mobandisi ya bampasi oyo ezali konyokola bato.” Tófungola búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko na nkasa 71 kino 72 mpe tósolola likoló na makanisi ya Biblia oyo mazwami na paragrafe 3 kino paragrafe 5. Tósɛnga na moto yango ete tokozonga mpo na kolimbola mpo na nini tosengeli kondimisama ete mosika te Nzambe akotika lisusu nzela te ete bato bányokwama.

4 Soki moto oyo tozongeli azali na bana mpe asepelaka na makambo matali libota, tokoki koloba boye:

◼ “Nabanzi ete lokola ozali tata (to mama) ya libota, ozalaka na mposa ya kosala oyo ezali malamu mpo na bana na yo. Zambi ekoki kosalema te mpo ete obatela bango na nyonso oyo ezali mabe, esengeli ete oteya bango lolenge nini bakoki kolónga mikakatano ya bomoi. Ndenge nini okokoka kosala bongo? [Tótika moto yango ayanola.] Moko ya makambo maleki ntina oyo baboti bakoki kopesa na bana na bango ezali bongo koteya bango malamu.” Tófungola búku Boyebi na nkasa 145 kino 146 mpe tólobela mingi likoló na batoli ebongi ya Biblia; tómonisa malamumalamu ntina na yango mpe ya matomba oyo mazwamaka na kolandáká yango. Tósɛnga ete tokozonga mpo na kolakisa lolenge ya kosalela búku yango mpo ete tózala na bomoi ya libota ya esengo.

5 Soki tozongeli moto oyo tosololaki na ye na mokuse, tokoki koloba boye:

◼ “Mokano ya Nzambe ezalaki te ete tónunaka mpe tókufaka. Alingaki ete tózala na bomoi libela na libela kati na paladiso awa na mabelé.” Tólimbola elilingi ya nkasa 188 kino 189. Tótánga paragrafe 11 ya lokasa 184. Tózwa bibongiseli mpo na bozongeli mosusu.

6 Búku yango ezali mpenza mwango mosusu mosalelami na Yehova mpo na ‘kokólisa’ mosala ya koyanganisa oyo mozali kosalema na mikolo oyo ya nsuka. (Yis. 60:22) Soki tokosalela yango malamumalamu, tokokɔtisa epai na moto boyebi oyo ekoki kopesa ye nzela ete azwa bomoi ya seko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto