Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
1 Liboso ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, tozalaki komituna mituna mingi mpo na bomoi, kozanga ete tókoka koyanola na yango. Oyo nde esengo, ya kozwa biyano biuti na Biblia! Lelo oyo, tozali na makoki ya kosalisa bato mosusu ete bázwa biyano yango. (Talá 2 Timoté 2:2.) Tokoki kokabola elongo na bango boyebi ya Nzambe oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Yoa. 17:3) Kasi lolenge nini kosalisa moto ete asepela na motuya ya boyebi yango? Bobele na kokanisáká biyano oyo tozwaki biso moko na nzela ya solo. Na kozaláká na makanisi yango na motó, ekozala pɛtɛɛ mpo na biso kolakisa búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Makanisi oyo mapesami awa na nsé makoki kosalisa biso na komibongisa mpo na mosala ya kosakola na sanza ya Yulí.
2 Lokola bato mingi bazali komituna mpo na nini bampasi etondi na mokili, lolenge ya kosalela oyo elandi ekoki kobimisa matomba malamu:
◼ “Ntango likámá liuti na biloko bizalisami lisalami to soki makambo ya mobulu mpe matata mazali koikana, bato bazali komituna mbala mingi ndenge nini makambo ya motindo boye makoki kosalama. Okopesa ndimbola nini?” Tólanda eyano na likebi nyonso, na nsima tófungola búku Boyebi na mokapo 8 mpe tómonisa oyo elobami na paragrafe 2. Tómonisa ete búku oyo ezali kopesa ndimbola ya Biblia mpo na komonisa ntina oyo mabe ezali, mpe tóbakisa ete: “soki okolaka ngai ete okotánga yango, nakosepela kotikela yo yango.” Soki moto yango asepeli, tólakisa ye búku yango mpe tóyebisa ye ntalo na yango.
3 Ntango tokozongela mobali to mwasi oyo totikelaki ye búku “Boyebi,” tokoki koloba ete:
◼ “Nakosepela koyeba bosukisi nini ozwi mpo na ntina oyo bampasi epalangani na mokili. Ondimi eyano oyo Biblia ezali kopesa oyo emonisami kati na búku yango?” Tiká moto yango ayanola. Tótánga paragrafe 17 na lokasa 77 ya búku Boyebi mpe tósɛnga na ye ete atánga Baloma 9:14 kati na Biblia ya ye moko. Na nsima tóloba ete: “Nsango malamu yango, ezali ete Yehova azali kopesa biso ata mpasi moko te oyo elongobani te. Alaki ete akopesa biso bomoi ya seko kati na kimya mpe bolamu. Mokapo ya liboso ya búku yango ezali na motó na likambo ete ‘Okoki kozala na esengo na mikolo mizali koya!’ Nakosepela kolimbwela yo lolenge nini yango ekoki kosalama mpo na yo mpe mpo na baoyo yo olingaka.” Tófungola mokapo 1 mpe tómonisa ye lolenge nini tosalaka boyekoli na biso. Tótalela motango ya baparagrafe engebene ntango oyo tozali na yango.
4 Tokopona ntango mosusu maloba ya bokɔti na lisoló oyo ezwami na lokasa 14 ya búku “Comment raisonner” na nsé ya motó na likambo “Vieillesse/ Mort” (Konuna/Liwa):
◼ “Omituna naino te mpo na nini tozali konuna mpe kokufa? [Tótika moto yango aloba.] Makomami mazali kopesa biyano na mituna nyonso oyo tokoki komituna mpo na likambo yango. [Tótánga Mosakoli 9:5, 10.] Makomami mazali mpe komonisa ete ezali na elikya ya solo mpo na baoyo bazali komonisa kondima. [Tófungola búku Boyebi na lokasa 84 paragrafe 13; tótánga mpe tólimbola maloba ya Yesu oyo mazwami na Yoane 11:25.] Mokapo yango mobimba mozali na mokano ya koyanola na motuna oyo: ‘Nini ekomelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?’ Soki olingi kotánga yango, nakotikela yo ekzamplere oyo.” Tóyebisa ye ntalo ya búku yango.
5 Na bozongeli na biso ya sika, tokoki kozongela lisoló, mpe koloba ete:
◼ “Na mbala eleki, tosololaki mpo na makambo oyo malekaka na ntango ya liwa. Bato mingi bakanisaka ete soki bomoi ezali nsima ya liwa, ekoki kozala na likoló to na lifelo. Kasi osilá kokanisa ete bakufi bakoki kozonga awa na mabelé? [Tótika moto yango aloba.] Engebene Biblia, basekwi bakozala kati na bato ya bopɔlɔ oyo bakofanda na mabelé. [Tótánga Nzembo 37:11, 29, mpe tólobela paragrafe 20 na lokasa 88 ya búku Boyebi.] Elikya yango esalisi bamilió ya bato oyo liboso bazalaki kobanga bakufi. Búku oyo ekosalisa yo ete okanga ntina ya likambo yango malamu. Okoki kopesa ngai nzela ete namonisa yo lolenge nini yango ekoki kosalama?”
6 Soki tolingi bokɔti ya lisoló oyo ya pɛtɛɛ, tokoki komeka oyo:
◼ “Nakosepela kolakisa yo elilingi moko ya búku oyo, Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Omoni te ete ezali elilingi kitoko?” Tófungola búku yango mpo ete moto yango akoka komona nkasa 4 mpe 5. Tótika ye apesa eyano, na nsima tótánga etanda oyo ezali na lokasa 5. Tósukisa boye: “Nakoki kotikela yo búku oyo mpo ete otánga yango yo moko.” Tóyebisa moto yango ntalo na yango. Soki moto yango amonisi bosepeli, tótuna ye soki tokoki kozongela ye ntango nini.
7 Tozali na boyebi oyo ezali kouta epai ya Nzambe, oyo ezali koyanola na ebele ya mituna ya ntina oyo etali bomoi. Tómibongisa malamu mpenza mpe Yehova akopambola milende oyo tokosala mpo na koyebisa nsango ya bomoi epai ya bato oyo bazali koluka solo.