Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
1 Osepelaka kosala bozongeli ya sika? Ezali bongo mpo na basakoli mingi. Ntango mosusu ozalaki na bobangi na ebandeli, mingimingi ntango ozongelaki bato oyo bamonisaki bosepeli moke na bokutani ya liboso. Kasi na meko oyo ‘oyikaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kosakola nsango malamu’ na kosaláká bozongeli ya sika, na ntembe te okamwaki na komona na meko nini mosala yango ekoki kozala pɛtɛɛ mpe na matomba. (1 Tes. 2:2) Ndenge nini kolónga kosala yango?
2 Ya solo, bozongeli ya sika ekeseni mpenza na bokutani ya liboso. Na ntango ya bozongeli ya sika ozali kosolola na moto oyo oyebi, kasi na mopaya te, mpe mingimingi ezalaka likambo ya mpasi mpenza te kosolola na moto oyo tosilá komona. Tozali kozwa mapamboli mingi na komipesáká na mosala yango: bozongeli ya sika ekoki komema na boyekoli ya Biblia oyo ezali kokola malamu.
3 Ntango tozali kosakola ndako na ndako, tozali kokutana mbala na mbala na bato oyo bamonisaki bosepeli te na bokutani na biso ya liboso. Mpo na nini tozali kokóba kokende kotala bango? Toyebi ete ezaleli ya makambo ya bato ezali kobongwana mpe ekoki kokóma ete moto oyo azalaki komonisa bosepeli te, ata kotɛmɛla nsango ya Bokonzi, amonisa bosepeli na mbala ya nsima. Lokola toyebi yango, tómibongisa malamu mpe tóbondela mpo na kozwa litambwisi ya Yehova mpo ete bato bátya likebi mpenza na makambo oyo tokoloba.
4 Soki, na mosala ya ndako na ndako, tozali kosakolela bato oyo bamonisaki ata bosepeli moko te liboso, tosengeli kosepela mingi koleka kozongela baoyo nyonso batyaki likebi na nsango ya Bokonzi, boye te?—Mis. 10:34, 35.
5 Mingi kati na biso bazali lelo kati na solo mpo ete mosakoli moko amonisaki motema molai na kozongeláká bango mbala na mbala. Soki ezali bongo, tomituna: ‘Ezaleli nini namonisaki epai na mosakoli yango na ebandeli? Nandimaki nsango ya Bokonzi sé ntango nayokaki yango? Nasepelaki nde na yango te?’ Tosengeli kosepela ete mosakoli oyo azongelaki biso amonaki ete tobongi na kozongelama, “ayikaki mpiko na lisalisi ya . . . Nzambe,” ayaki epai na biso mpe abandaki koteya biso solo. Tokoloba boni mpo na baoyo bazali komonisa mwa bosepeli na ebandeli mpe na nsima babandi koluka kokima biso? Esengeli na biso kozala na makanisi mabongi lokola yango emonisami na eksperiansi oyo elandi.
6 Na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́, basakoli mibale ya basi bazalaki kopesa litatoli na balabála mpe bakutanaki na elenge mwasi moko oyo azalaki kotambwisa mwana na pusupusu. Andimaki zulunalo moko mpe abyangaki bandeko basi ete báya epai na ye na mokolo ya lomingo oyo elandaki. Bakómaki na ngonga oyo bayokanaki, kasi mwasi yango ayebisaki bango ete azali na ntango te mpo na kosolola. Kasi, alakaki bango ete akoyamba bango na pɔ́sɔ oyo ekolanda. Bandeko basi bandimisamaki te ete akotosa bokutani yango, kasi ntango bazongaki mwasi yango azalaki kozela bango. Boyekoli ebandaki, mpe bokóli ya mwasi yango ezalaki ya kokamwisa. Aumelaki te mpo na koyangana na makita ntango nyonso mpe kosangana na mosala ya kosakola. Sikawa asila kozwa batisimo.
7 Tótya moboko uta bokutani ya liboso: Mbala mingi, moboko ya bozongeli ya sika oyo ekolonga etyamaka na bokutani ya liboso. Tóyoka na likebi nyonso molobani na biso. Azali koloba nini? Asepelaka na masoló matali lingomba? Asepelaka na makambo matali ezaleli ya bomoi ya bato? na siansi? na lisoló ya bomoi ya bato? na ezingelo? Na nsuka ya lisoló, tokoki kobimisa motuna moko oyo ezali kotinda na kokanisa mpe tólaka moto yango ete tokotalela eyano oyo Biblia ezali kopesa ntango tokozongela ye.
8 Na ndakisa, soki molobani na biso azali kosepela na elaka ya paladiso na mabelé oyo Biblia ezali kopesa, lisoló mosusu likoló na likambo yango ekoki kozala malamu. Liboso ya kotika ye tokoki kotuna ye ete: “Ndenge nini tokoki kondimisama ete Nzambe akokokisa elaka na ye?” Mpe tobakisa: “Nakoki kozonga ntango libota mobimba ekozala mpe nakomonisa bino eyano oyo Biblia ezali kopesa.”
9 Soki moto yango amonisi bosepeli na likambo moko ya sikisiki te, tokoki kotuna moko na mituna oyo tozali kokuta na lokasa
ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi mpe kosalela yango lokola moboko mpo na lisoló na biso ya mbala ya nsima.
10 Tózwa banɔ́ti ya sikisiki: Banɔ́ti na biso ya ndako na ndako esengeli kozala ya sikisiki mpe esengeli kotondisama malamu. Tókoma nkombo mpe adresi ya molobani na biso na ntango totiki ye. Tókoma nimero ya ndako mpe nkombo ya balabála bikomákoma te: tomindimisa ete makambo tokomi mazali solo. Tókoma mwa makambo matali moto yango, lisoló oyo tosololaki, baversɛ́ oyo totángaki, mikanda—soki totikaki mpe mituna oyo tokoyanola ntango tokozongela ye na mbala ya nsima. Lisusu tókoma mokolo mpe ngonga ya lisoló na biso mpe ntango oyo toyokani mpo na kozongela ye. Awa lokasa ya banɔ́ti na biso etondisami, tóbungisa yango te! Tóbomba yango na esika oyo toyebi ete ekozala na mpasi te mpo na kozwa yango. Tókanisa moto yango mpe tótalela lolenge nini tokoki kosolola na mbala ekolanda.
11 Tóbosana te nini ezali mokano na biso: Libosoliboso, na kozaláká na mɔ́tɔ mpe na ezaleli ya boninga, tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosepelisa molobani na biso. Tómonisa ete tozali kosepela na ye lokola moto, kozanga kolekisa ndelo na boninga yango. Na nsima, tókundwela ye mituna oyo tobimisaki na mbala eleki. Tóyoka na likebi nyonso likanisi na ye mpe tótɔ́nda ye mpenza mpo na biyano na ye. Na nsima tómonisa ye na likambo nini likanisi ya Biblia ezali na ntina. Soki likoki ezali, tómema ye na likanisi moko eyokani na oyo ezali kati na búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tómikundola malamumalamu ete mokano na biso ya liboso ntango tozali kosala bozongeli ya sika ezali ya kobanda boyekoli ya Biblia.
12 Elobeli ya polele ya búku Boyebi esalisi mingi kati na biso ‘na koyika mpiko’ na boyekoli ya Biblia mpo na kolendisa bayekoli ete básangana na makita mpe bákota na lisangá ya Yehova. Na kala, tozalaki na momeseno ya kozela ete bato bayekola na boumeli ya mwa ntango liboso ya kobyanga bango ete basangana na biso. Sikawa, bayekoli mingi bazali koyangana na makita na ntango babandi boyekoli mpe bazali kokóla noki mpenza.
13 Babalani moko bapesaki litatoli ya libaku malamu epai ya moninga moko ya mosala. Lokola asepelaki na solo, ndeko mobali mpe mwasi na ye basengaki ye boyekoli ya Biblia na lisalisi ya búku Boyebi. Na libaku bobele moko wana, balendisaki ye ete ayangana na makita, epai wapi akozwa biyano na ebele ya mituna na ye misusu. Moto yango andimaki bobele boyekoli te, kasi abandaki koyekola mbala mibale na pɔ́sɔ mpe kosangana ntango nyonso na makita na Ndako ya Bokonzi.
14 Tósalela mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?: Na liyangani ya etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” tozwaki mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Mwa búku yango ezali kosalisa mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato oyo bazali kobanga Nzambe ezala bazali na mayele nini ya mosuni. Ezali na manáka ya boyekoli oyo ekoki mpe ezali kozongela mateya ya moboko ya Biblia. Mokanda yango ezali esaleli ebongi mpenza mpo na koteya boyebi ya Nzambe. Ezali kolimbola solo na lolenge ya polele mpe ya pɛtɛɛ mpenza na boye ete biso banso tosengeli kozala na makoki ya kosalela yango mpo na koteya oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso. Na ntembe te basakoli mingi bakozala na libaku malamu ya kotambwisa boyekoli ya Biblia na lisalisi ya mwa búku yango.
15 Bato mosusu oyo bazali kokanisa ete bazali na ntango te ya koyekola búku Boyebi bakolinga ntango mosusu koyekola masoló mikuse ya mwa búku Azali kosɛnga. Bakosepela na oyo bango bakoyekola. Bobele na nkasa mibale to misato, bakozwa biyano na mituna oyo bato bazali komituna uta bikeke: Nzambe azali nani? Zábolo azali nani? Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini? Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Lolenge nini okoki koyeba lingomba ya solo? Atako mwa búku yango ezali kolakisa solo na maloba ya pɛtɛɛ, nsango ezali kati na yango ezali na nguya mpenza. Ezali na makambo ya ntina oyo bankulutu bakotalela na bakandidá ya batisimo mpe ekoki kosalema lokola lifungola mpo na boyekoli ya mozindo mpenza kati na búku Boyebi.
16 Mpo na kosɛnga boyekoli na bozongeli ya sika, tokoki bobele koloba ete: “Oyebi ete soki opesi bobele mwa miniti moke okoki kozwa eyano na motuna moko ya ntina ya Biblia?” Mpe tótuna motuna moko kati na mituna oyo tozali kokuta na ebandeli ya moko ya mateya ya mwa búku yango. Na ndakisa, soki tozali kosolola na mobangé tokoki koloba boye: “Toyebi ete na ntango ya kala Yesu abikisaki bato. Kasi akosala nini na mikolo mizali koya mpo na babɛli? mibange? bakufi?” Tozali kozwa biyano na mituna oyo na liteya 5. Bosepeli ya moto oyo alingaka makambo ya Nzambe ekoki na mbala mosusu kolamwisama na motuna oyo: “Nzambe ayokaka mabondeli nyonso?” Liteya 7 ezali kopesa eyano. Basangani ya libota bakolinga koyeba: “Nzambe azali kosɛnga nini epai na baboti mpe epai na bana?” Bakoyeba yango na koyekoláká liteya 8. Ezali na mituna mosusu lokola: “Bakufi bakoki kosala mabe epai na bato oyo bazali na bomoi?” (Liteya 11); “Mpo na nini mangomba mazali mingi oyo mazali komikumisa ete mazali mangomba ya boklisto?” (liteya 13); mpe “Osengeli kosala nini mpo na kokóma moninga ya Nzambe?” (liteya 16).
17 Toumela te mpo na kosala bozongeli ya sika: Ntango boni tosengeli kolekisa mpo na kosala bozongeli ya sika? Basakoli mosusu bazongaka mokolo moko to mibale nsima ya bokutani na bango ya liboso. Basusu bazongaka mwa ngonga na nsima bobele na mokolo yango! Ezali pene koleka? Mingimingi, emonani ete bato bakamwaka na yango te. Mbala mingi, mosakoli nde asengeli kozala na makanisi mabongi mpo na koyika mwa mpiko. Tótalela mwa baeksperiansi oyo.
18 Mosakoli moko ya mbula 13 azalaki kosakola ndako na ndako mpe amonaki basi mibale bazalaki koleka. Komikundoláká ete tolendisami na koteya bato ezala na esika nini bazali, asololaki na basi yango na balabála. Basepelaki na nsango ya Bokonzi mpe bango nyonso mibale bandimaki kozwa moto na moto ekzamplɛrɛ moko ya búku Boyebi. Elenge ndeko mobali azwaki adresi na bango, mpe akendeki kotala bango mikolo mibale na nsima mpe abandaki boyekoli ya Biblia na moko na moko na bango.
19 Ndeko mwasi moko, mpo na ye, azwaka bibongiseli mpo na kozonga kosolola na molobani na ye na pɔ́sɔ oyo ekolanda. Kasi mokolo moko to mibale nsima ya bokutani ya liboso, akoleka kotala ye mpo na kotikela ye zulunalo oyo ezali kolobela lisoló oyo basololaki na mbala eleki. Akoloba na moto yango ete: “Lisoló oyo ebendaki likebi na ngai mpe nakanisi ete okolinga kotanga yango. Tokosolola sikawa te kasi nakozonga mokolo ya misato nsima ya nzánga ndenge toyokanaki. Ezali sé bongo?”
20 Ntango moto azali kosepela na solo, tokoki komindimisa ete akokutana na botɛmɛli na lolenge moko to mosusu. Na kozongáká noki nsima ya bokutani na biso ya liboso, tokolendisa ye mpo na kosalisa ye ete alonga bopusi ya basangani ya libota na ye, ya baninga na ye ya pene, mpe bongo na bongo.
21 Mpiko ezali ezaleli moko ya ntina mpo na kozwa matomba na mosala ya bozongeli ya sika. Ndenge nini kozwa yango? Ntoma Paulo ayanoli na kolobáká ete ‘tóyika mpiko’ mpo na kosakola nsango malamu epai na bazalani “kati na Nzambe na biso.” Soki tozali na mposa ya kokóla na likambo yango, tóbondela mpo na kozwa lisungi ya Yehova. Mpe, na boyokani na mabondeli na biso, tólanda bosepeli nyonso. Solo Yehova akopambola milende na biso!
[Etanda na lokasa 3]
Ndenge nini kozwa matomba na bozongeli ya sika
■ Tómonisa ete tozali kosepela solo na moto moko na moko.
■ Tópona lisoló moko ya Biblia oyo ezali kobenda likebi.
■ Tótyaka ntango nyonso moboko mpo na bozongeli ya sika.
■ Tókoba kokanisa moto yango nsima wana totiki ye.
■ Tózonga mokolo moko to mibale na nsima mpo na kolanda bosepeli.
■ Tómikundola ete mokano na biso ezali ya kobanda boyekoli ya Biblia.
■ Tóbondela mpo na kozwa lisungi mpo ete tóyika mpiko na mosala yango.