Tóteya bazalani oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso
1 Tokoki lisusu kokutana na ebele ya bato oyo “bayoka maloba ya Yehova” naino te. (Amo. 8:11) Bamoko bazali kondima ete Nzambe azali, kasi bayebi mikano na ye te soko mpe masɛngami na ye te. Na yango, tosengeli koteya bango solo ya lobiko ya Bokonzi. Soki tobongisami malamu mpe tozali pene na kopesa litatoli na mabaku nyonso, tokozwa bato oyo bazali na mposa ya koyekola oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso.
2 Na sanza ya Máí mpe ya Yúni, tokokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo ekozala na masolo mabongi mpenza na ntango oyo. Lisusu, tokolakisa mpo na mbala ya liboso mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Bililingi na yango ya kobenda likebi mpe mituna na yango oyo mizali kopusa na kokanisa ezali kokómisa yango pɛtɛɛ mpo na bato mingi. Makanisi malandi mapesameli biso mpo na kosalisa biso ete tósalela malamu koleka mikanda kitoko yango.
3 Tóluka bato: Na bateritware oyo bato bazalaka te na bandako na bango ntango oyo tokendaka ndako na ndako, ezali mpenza na ntina koluka bango mpe kosolola na bango ezala na esika nini bazali. Siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛ́mbɛ 1996 elendisaki biso na kosakola nsango malamu na bisika nyonso: na balabála, kati na bisi, na parke, na baparkingi mpe na kartyé ya mimbongo. Elendisaki biso mpe lisusu na koluka mabaku ya kosalela litatoli ya libaku malamu. Na ndakisa, mobongisi nzela moko ya mwasi akendaki na zoo na mwa baekzamplɛre ya Lamuká! ya 8 Augústo 1996 (ebimeli ya Lifalansé) oyo elobi “Espèces menacées: pourquoi s’en soucier?” Nsima ya ngonga moko, akabolaki bazulunalo 40 epai na bato oyo balingaka banyama mingi! Tosilá kozwa mbano malamu na kosakoláká nsango malamu bisika nyonso? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká! mpe mwa búku Azali kosɛnga ebongi mpenza na lolenge nyonso ya kopesa litatoli, lokola makambo mazali na kati na yango matali bomoi ya bato mpe mazali kotinda na kokanisa.
4 Tóbanda masoló: Lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1996 ezali kopesa makanisi ya sikisiki mpo na kobongisa lolenge ya biso moko ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Makanisi yango mabongi mpe kosalelama mpo na kolakisa mwa búku Azali kosɛnga. Maloba na biso makoki kozala mokuse, bobele mwa ndambo ya bafraze moke to tokoki kobakisa mwa bafraze mosusu mpo na komonisa makanisi mazwami na vɛrsɛ́ moko kati na Makomami. Ezali na ntina ete tópona malamu maloba ya ebandeli, mpamba te yango ekotinda ntango mosusu moto oyo tolingi kosolola na ye ete alanda koyoka biso to te. Bamoko bazwaka mbano na kobandáká boye: “Natángaki lisoló moko oyo elendisaki ngai nalingi koyebisa yo lisoló yango.” Tokoki mpe kobimisa motuna moko ya ntina mpo na kopesa nzela na molobani na biso ete aloba.
5 Kati na masoló na biso na sanza oyo, soki yango ebongi na teritware na biso, tokoki kotuna mituna lokola oyo:
◼ “Lelo oyo, tozali komona makomi ya pambapamba na bifelo, bosoto mpe kobebisama ya ezingelo. Esengeli kosala nini mpo na kobongisa mabelé mpe kokómisa yango esika ebongi na kofanda?” Tótika moto yango ayanola mpe na nsima tólimbwela ye ete toyebi na bosikisiki nyonso ndenge nini mpe ntango nini mabelé mobimba ekokóma elanga monene. Tómonisa ye kati na moko ya nimero ya sika komantere moko ya sikisiki, vɛrsɛ́ moko ya mokuse mpe elilingi moko oyo ezali kobenda likebi mpe tópesa ye yango mpo atánga. Liboso ya kosukisa lisoló, tóyokana mokolo tokozongela molobani na biso.
◼ “Okanisi ete Nzambe azali kosepela komona biso konyokwama na ebele ya mikakatano lokola tozali kokutana na yango lelo oyo?” Nsima wana moto yango apesi eyano, tokoki koloba: “Ekoki kozala ete oyebi libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye, oyo kati na yango azali kosɛnga ete Bokonzi ya Nzambe eya. Osilá kokanisa soko Bokonzi ya Nzambe ezali nini?” Tófungola mwa búku Azali kosɛnga na liteya 6 mpe tótánga mituna oyo mitunami na ebandeli ya liteya. Mpe,wana tozali kotánga paragrafe 1, tóbenda likebi likoló na eyano ya motuna ya liboso. Tómonisa ete biyano na mituna mosusu bizali mokuse mpe polele. Tólakisa mwa búku yango, mpe tólaka ye ete tokozongela ye mpo na kosolola lisusu mingi na ntina na Bokonzi.
◼ “Bato mingi ya mayele bazali kokanga ntina ete mangomba ya mokili mazali eutelo ya mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango na esika ya kosilisa yango. Yo mpenza okanisi nini?” Nsima ya koyoka makanisi ya molobani na biso, tómonisa makanisi ya zulunalo moko ya sika oyo ekoki kolamwisa mposa na ye na ntina na kozanga kolonga ya mangomba to kokwea na yango na mikolo mizali koya. Tótuna ye soki akosepela kotánga zulunalo yango. Tópesa nkombo na biso mpe tótuna oyo ya ye, tólaka ye ete tokozongela ye mpo na kolimbwela ye ete lingomba ya solo esalelaka bato mabe te.
◼ “Na ntina na mikakatano mingi oyo mabota mazali kokutana na yango lelo oyo, omituná naino te soki sɛkɛlɛ́ oyo ezali kopesa nzela ya kozala na bolamu na libota ezali nini?” Tótika moto yango ayanola mpe tómonisa ye ete Nzambe azali komonisa biso kati na Biblia sɛkɛlɛ́ mpenza ya bolamu na libota. Tokoki kotánga Yisaya 48:17. Na nsima tófungola mwa búku Azali kosɛnga na liteya 8 mpe tólobela bamoko ya mikapo ya Biblia oyo mityami na pembeni oyo mizali kopesa batoli ebongi na kolanda mpo na mosangani mokomoko ya libota. Tótánga mituna mitunami na ebandeli ya liteya. Tósɛnga moto yango soki akosepela kotánga biyano yango. Soki andimi tópesa ye mwa búku yango mpe tóyebisa ye ntalo na yango. Tólaka ye ete tokozongela ye lisusu mpo na kosolola mingi koleka likoló na batoli ya Biblia oyo ebongi mpo na libota ya esengo.
6 Siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1997 elendisaki biso na koyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika. Epesaki makanisi na lolenge ya kosalela mwa búku Azali kosɛnga mpo na kobanda boyekoli ya Biblia soki likoki ezali na bokutani ya liboso, soki bongo te na bozongeli ya sika. Mposa makasi ya bato ezali ya koyekola oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso mpe, na nsima, kosalela yango. (Kols. 1:9, 10) Tokopesa bazalani na biso makambo mingi na boumeli ya sanza ya Máí mpe ya Yúni soki tokoki kobanda koteya bango oyo biso toyebi na ntina na masɛngami ya Yehova mpo na bomoi.—1 Kol. 9:23.