Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/97 lok. 8
  • Tómibanzabanza mpenza na bosepeli nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómibanzabanza mpenza na bosepeli nyonso
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tótya motema epai na Yehova mpo na ‘kokólisa’
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi na lisalisi ya mwa babúku
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 6/97 lok. 8

Tómibanzabanza mpenza na bosepeli nyonso

1 Mosika te, mosala ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba ekosuka; na nsima, baoyo “bayebi Nzambe te” bakobebisama. (2 Tes. 1:7-9) Yango nde ezali kopusa libota ya Yehova, ete bámibanzabanzaka mpenza na bomoi ya basusu, ete báyebisa nsango ya Bokonzi na bato mingi koleka.​​​—Sef. 2:3.

2 Sanza na sanza, bamilió ya ngonga esalami mpo na koluka baoyo balingi koyoka “nsango malamu ya kosepela.” (Yis. 52:7) Ntango tolakisaki bango lipesi ya sanza, mingi bandimaki baekzamplere ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! to mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Tokomonisa ete tozali komibanzabanza mpenza mpo na bato yango na kozaláká pene na kolanda bosepeli nyonso oyo emonisamaki.​​​—Mas. 3:27.

3 Tókamata banɔ́ti ya sikisiki: Tokosala mosala malamu soki tozali kozwa banɔ́ti ya makambo nyonso mpe ya sikisiki ya bosepeli oyo emonisamaki mpe ya mokanda oyo totikaki. Koyeba makambo lokola nkombo mpe adresi ya moto yango, mokolo mpe ngonga oyo tolekaki, mokanda totikaki mpe lisoló tosololaki ekosalisa biso ete tózala na makoki mingi ntango tokozongela ye. Tókoma mpe mwa makambo malobamaki na bokutani na biso ya liboso; ekozala na ntina mpo na biso mpo na kozongela lisoló na bozongeli ya sika.

4 Tózongela bato noki: Bato boni kati na baoyo otikelaki mikanda na sanza eleki ozongelaki bango? Bapɔ́sɔ esili koleka kozanga ete bókutana lisusu? Soki tozali komibanzabanza mpenza na lobiko ya seko ya bato yango, tokozongela bango noki ntango likoki emonani, ekozala malamu kati na mwa mikolo mikolanda, wana lisoló lisololamaki lizali naino na makanisi. Ezali na kolandáká noki bosepeli nde tokoki koleka liboso ya Satana, oyo “akoya noki mpe akolongolaka liloba likonami kati na bango.”​​​—Mko. 4:15.

5 Komibongisa esengisami: Bozongeli ya sika oyo ebongi etali mpenzampenza lolenge ya komibongisa na biso. Tókanisa liboso ya kokende lolenge nini tokobanda lisoló na moto yango. Lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Máí 1997 ezali na lolenge mingi ya kolakisa bazulunalo mpe mwa búku Azali kosɛnga oyo tokoki kosalela na bolamu. Na nsima, na elimo na biso tózala na mwa makanisi oyo tolingi kolobela yango na bozongeli ya sika. Nini tokoki koloba mpo na kokolisa bosepeli? Ndenge nini kobanda boyekoli ya Biblia?

6 Mpo na kokóba lisoló oyo tolobelaki likambo oyo esengeli mpo na kopetola mabelé mpe kokómisa yango esika kitoko ebongi mpo na kofanda, tokoki koloba ete:

◼ “Mbala eleki, tondimaki ete, mpo ete mabelé makóma paladiso kitoko, ekosengela ete meko makasi ekamatama. Okanisi ete bato bazali na makoki mabongi mpo na likambo yango? [Tótika moto yango ayanola.] Talá mpo na nini esengeli ete Nzambe akotela makambo ya bato.” Tótánga Nzembo 37:38, mpe tótala liteya 5 ya mwa búku Azali kosɛnga mpe tópona mwa makanisi na baparagrafe 4-5 oyo ezali komonisa ndenge nini Nzambe akokokisa esakweli yango. Tósukisa na kosɛngáká boyekoli ya Biblia na lisalisi ya mwa búku yango.

7 Soki tolobaki mpo na Bokonzi mpe totikaki mwa búku “Azali kosɛnga” na bokutani na biso ya liboso, tokoki kozongela moto yango mpe koloba boye:

◼ “Na boumeli ya masoló na biso ya mbala eleki, tomonaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli moko ya solo oyo ekoyangela mabelé mobimba. Biblia ezali komonisa ete Yesu Klisto akozala mokonzi na yango. Ozali na likanisi moko na ntina na matomba oyo lolenge ya Bokonzi yango mpe lolenge ya mokonzi yango ekomema?” Tótika moto yango ayanola. Tófungola mwa búku Azali kosɛnga na liteya 6. Na lisalisi ya mwa makanisi maponami kati na baparagrafe 6-7 mpe elilingi ya lokasa 13, tómonisa makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato. Tótánga Danyele 2:44 mpe, soki yango emonani malamu, tólakisa búku Boyebi mpe tósɛnga boyekoli ya Biblia.

8 Soki moto oyo tokutanaki na ye ayebaki ete mangomba ya mokili mazali eutelo ya mikakatano ya bato, na bozongeli ya sika tokoki kotuna ye na ndakisa motuna oyo molandi:

◼ “Omituna naino te lolenge nini okoki koyeba lingomba oyo Nzambe andimaka? [Tótika moto yango ayanola.] Kati na mwa búku oyo, Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? ezali na bilembo oyo ezali kosalisa mpo na koyeba lingomba ya solo.” Tótala liteya 13 mpe tóbimisa makambo mitano oyo ekomami na nkomá oyo etɛngisami (italique) kati na baparagrafe 3-7. Na nsima tokoki kokóba boye: “Koyeba lingomba ya solo ezali na ntina, kasi esengeli na biso mpe koluka koyeba makambo oyo Nzambe azali kosɛnga na mokomoko na biso.” Tótánga Yoane 4:23, 24. Tósɛnga na ye ete tósolola lisusu mingi. Tótala liteya 1 ya mwa búku mpe tómonisa lolenge nini boyekoli esalemaka.

9 Mpo na kokóba lisoló na ntina na bolamu ya libota, tokoki kosalela makanisi oyo malandi:

◼ “Mbala ya liboso oyo tokutanaki, nalimbwelaki yo ete sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota etaleli kosalela toli ya Liloba ya Nzambe, Biblia. Na makanisi na yo, Biblia ekoki koyanola na bamposa ya libota ya mikolo na biso, to esilá koleka ngala?” Tótika moto yango ayanola. Tólakisa búku Boyebi. Tófungola yango na mokapo 2 mpe tótánga paragrafe 13. Tósɛnga boyekoli ya libota na kosaleláká makanisi ya paragrafe 3.

10 Na kokamatáká banɔ́ti ya sikisiki, na kosaláká ete komibongisa ezala lisɛngisi mpe na kozongeláká bato noki mpo na kokolisa bosepeli na bango, tokomonisa bolingo mpo na bazalani, bolingo oyo ekobenda bango na nzela ya lobiko.​​​—Mat. 22:39; Gal. 6:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto