Batelá yango
Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
Salelá makanisi oyo elandi mpo na kobongisa maloba ya kobanda lisolo mpo na mikanda oyo tokolakisa na sanza.
Approchez-vous de Jéhovah
“Bato mingi oyo bandimelaka Nzambe balukaka kopusana penepene na ye. Oyebi ete Nzambe asɛngaka biso tópusana penepene na ye? [Tángá Yakobo 4:8.] Mokanda oyo ebongisami mpo na kosalisa bato básalela Biblia na bango mpo na kopusana penepene na Nzambe.” Tángá paragrafe 1 na lokasa 16.
“Lelo oyo, bosembo ezali te. Ezali kaka ndenge balobi awa. [Tángá Mosakoli 8:9b.] Bato mingi bamitunaka soki Nzambe amibanzabanzaka kutu na likambo yango. [Tángá bafraze mibale ya liboso ya paragrafe 4 na lokasa 119.] Mokapo oyo ezali kolimbola ntina oyo Nzambe atiki nzela ete bosembo ezala te mpo na mwa ntango.”
Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous?
“Epai wapi tokoki kozwa toli oyo eleki malamu mpo na kosilisa mikakatano na biso ya makasi? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Matai 7:28, 29.] Vɛrsɛ oyo emonisi ndenge bato basepelaki na Lisolo ya Yesu likoló ya Ngomba. Talá oyo basusu balobaki. [Lakisá ye makambo oyo ezali na lokasa 152.] Mokapo oyo ezali kolobela bomoi ya Yesu mpe mateya na ye.”
“Omituná naino te: ‘Soki Nzambe azali mpenza, akosala ata eloko te mpo na kosilisa bampasi mpe makambo ya kozanga bosembo oyo ezali na mokili?’ [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Emoniseli 21:3, 4.] Buku oyo ezali kolimbola oyo Nzambe akosala mpo na kosilisa mpasi mpe makambo oyo ememaka mpasi yango.” Lakisá mokapo 10.
Bókɛngɛlaka!
“Bato mingi bazali komitungisa mpo na bampasi mpe makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema lelo. [Lobelá likambo moko oyo eyebani na esika bofandi.] Oyebi ete makambo ya ndenge wana ezali na kati ya elembo oyo ezali komonisa ete etikali moke boyangeli ya Nzambe etambwisa mabelé? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá vɛrsɛ moko oyo ebongi, na ndakisa Matai 24:3, 7, 8; Luka 21:7, 10, 11; to 2 Timote 3:1-5.] Mwa buku oyo ezali komonisa ntina oyo tosengeli koluka nokinoki koyeba ndimbola ya makambo yango sikoyo.”
“Lelo oyo bato mingi bazali komitungisa mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo ezali kosalema to mpo na biloko na bango ya valɛre oyo ezali kobeba. Basusu bamitunaka mpo na nini Nzambe atikaka nzela na makambo ya ndenge wana. Biblia epesi biso elikya ete etikali moke Nzambe akosilisa bampasi ya bato. [Tángá Emoniseli 14:6, 7.] Talá oyo ekosalema ntango Nzambe akosambisa bato. [Tángá 2 Petelo 3:10, 13.] Mwa buku oyo elobeli mingi likambo wana ya ntina mingi.”
Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
“Soki basɛngi yo ofanda na esika ya kitoko boye, okolinga? [Lakisá elilingi ya nkasa 4-5, mpe tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Liloba ya Nzambe emonisi ete tosengeli kosala mpo na kozala na bomoi ya ndenge wana libela na libela. [Tángá Yoane 17:3.] Buku oyo ekosalisa yo ozwa boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.” Bóyokana mpo na kotalela paragrafe mitano ya liboso ya mokapo 1 na mbala ya nsima.
Fungolá na elilingi ya nkasa 188-189, mpe salelá maloba ya elilingi yango mpo na kotuna moto yango boye: “Ozali kolikya kozala na bomoi kati na Paladiso ntango boyebi ya Nzambe ekotonda na mabelé mobimba? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yisaya 11:9.] Buku oyo ekosalisa yo oyekola makambo oyo Biblia elobi mpo na Paladiso mpe ndenge oyo tokoki kokɔta na Paladiso yango.” Bóyokana mpo na kotalela paragrafe 11-16 ya mokapo 1 na mbala ya nsima.
Yekolá epai ya Moteyi Monene
“Okanisi ete mokili elingaki kozala malamu koleka soki bato basalelaki toli oyo? [Tángá Matai 7:12a. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Buku oyo ezali na mateya mingi ya moteyi oyo aleki bateyi nyonso.” Lobelá bililingi mpe maloba ya bililingi ya mokapo 17.
“Lelo oyo, Baboti mingi bateyaka mokemoke bizaleli malamu epai ya bana na bango. Okanisi ete ezali na ntina kosala bongo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 22:6.] Vɛrsɛ oyo emonisi ete baboti basengeli kobanda koteya bana na bango ntango bazali naino mike mpenza. Bakomi buku oyo mpo na kosalisa baboti báteyaka bana na bango.” Lobelá bililingi mpe maloba ya bililingi ya mokapo 15 to 18.
“Mbala mingi baboti bakamwaka ntango bayokaka mituna oyo bana na bango batunaka. Mituna yango mosusu ezalaka mpasi mpo na koyanola, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Baefese 6:4.] Buku oyo ekoki kosalisa baboti lelo oyo báyeba koyanola na mituna ya bana na bango.” Lobelá mwa bililingi mpe maloba ya bililingi ya mokapo 11 mpe 12 to 34 tii 36.
La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?
“Biso nyonso tomitungisaka mpo na makambo ya mabe mpe mobulu oyo ezali kobima na bisika tofandi. Okanisi ete ezali na moto moko oyo akoki kosilisa mokakatano yango? [Tiká ye apesa eyano.] Nzambe ayebi ndenge ya kosilisa yango.” Fungolá lokasa 196; tángá mpe lobelá Masese 2:21, 22 na paragrafe 19. Lakisá ye motó ya likambo ya mokapo 16, mpe lakisá ye buku.
Fungolá na lokasa 6, mpe lobá boye: “Bato mingi bakanisaka ete mabelé na biso oyo ya kitoko mpe bikelamu nyonso oyo ezali na kati ebimá kaka yango moko. Okanisi ete ndimbola wana ebongi mpenza? [Tiká ye apesa eyano.] Makambo mingi emonisi ndenge Biblia elobi ete ezali na Mozalisi moko oyo azali na nguya mingi mpe alingaka biso mingi. Azali Nzambe ya solo mpe nkombo na ye Yehova.” Tángá Nzembo 83:18, mpe limbolá na mokuse mokano na ye ya kokómisa mabelé mobimba paladiso.
L’humanité à la recherche de Dieu
“Lokola mangomba ekómi ebele lelo oyo, omituná naino te ndenge nini tokoki koyeba lingomba oyo Nzambe andimaka?” Nsima ya koyoka eyano na ye, fungolá na lokasa 377. Lobelá makanisi ya nimero 7, mpe tuná ye soki andimi ete lingomba ya solo esengeli kosangisa bato ya mposo nyonso. Tángá vɛrsɛ moko kati na bavɛrsɛ oyo batii wana, mpe soki ngonga ezali, lobelá mwa makanisi ya banimero mosusu oyo etikali. Soki moto yango asepeli mpenza, lakisá ye buku yango. Liboso okende, okoki kotuna ye boye: “Lingomba ya solo esengeli kotinda moto azala na etamboli ya ndenge nini?” Bóyokana mpo ozongela ye mpe oyanola na motuna yango.
Soki moto alobi ete asambelaka na lingomba moko ya monene, okoki koloba boye: “Ezali esengo kokutana na bato ya mangomba ndenge na ndenge. Bato bazali koluka Nzambe na banzela mingi. [Soki ebongi, tángá Misala 17:26-27.] Mbala mingi, bato balandaka mangomba ya baboti na bango. [Tángá paragrafe 12 na lokasa 8.] Koyeba makambo mingi ya mangomba mosusu efungolaka miso mpe eteyaka. Buku oyo ezali kolimbola ndenge mangomba minene ya mokili ebandá, misala na yango mpe mateya na yango.” Monisá makambo oyo buku elobi mpo na lingomba ya moto yango, ndenge ezali na nkasa oyo elandi: Lingomba ya Sikh (100-101); Hindu (116-117); Buda (141); Tao (164-166); Confucius (177); Shinto (190-195); Bayuda (220-221); mpe Bamizilma (289).
Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
“Ekoki kozala ete oyokaki likambo oyo [lobelá nsango moko]. Soki bato mingi bakufi mbala moko na likama moko boye, bato mosusu bamitunaka nini bakoki kosala mpo na kobɔndisa mabota ya bato yango. Okanisi nini?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima, fungolá lokasa 299 mpe lakisá elilingi ya lisekwa. Lobá lisusu boye: “Bato mingi bakamwaka ntango bayebaka ete bato ya sembo mpe baoyo bazali sembo te, bakozongisama lisusu na bomoi na Paladiso awa na mabelé. [Tángá Misala 24:15, ndenge ekomami na paragrafe 9, na lokasa 297, mpe pesá ndimbola oyo ezali na paragrafe 10.] Buku oyo ezali kolobela makambo mingi mosusu ya malamu, oyo etali mokano ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya.”
La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?
“Tozali kobika na ntango oyo pene na moto nyonso azali kokutana na mikakatano ya minene. Mingi balukaka toli epai ya bapesi-toli ya ndenge na ndenge. Basusu bakendaka epai ya banganga-nkisi. Epai wapi okanisi ete tokoki kozwa toli oyo ekosalisa biso mpenza? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elobeli likambo moko ya ntina mingi oyo biso nyonso tosengeli koyeba. [Tángá 2 Timote 3:16. Na nsima fungolá na lokasa 187, mpe tángá paragrafe 9.] Buku oyo ekosalisa yo omona ete kolanda makambo oyo Biblia elobi ememaka ntango nyonso bolamu.”
Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
“Na eleko oyo, bato mingi bakanisaka Yesu. Kasi, lokola makambo mingi ya mabe ezali kosalema na mokili mobimba, bato mosusu bakoki komituna soki Yesu atyelaka biso mpenza likebi. Okanisi nini mpo na yango?” Tiká ye apesa eyano. Fungolá na mokapo 24, mpe lobelá na mokuse ntina oyo Yesu ayaki na mabelé. Na nsima tángá Yoane 15:13, mpo na komonisa bolingo ya motema oyo Yesu azali na yango mpo na bato mosusu.
“Soki moto moko atángi nkombo ya Yesu Klisto, bato mingi bamonaka kaka bebe moko to moto moko oyo azali kobundana na mpasi ya liwa. Bato mingi bayebaka kaka kobotama ya Yesu mpe liwa na ye. Mbala mingi, balobelaka te makambo ya malamu oyo alobaki mpe asalaki ntango azalaki awa na mabelé. Makambo oyo asalaki etaleli moto nyonso. Yango wana, ezali na ntina ete tóluka koyeba makambo ya kokamwa oyo asalaki mpo na biso.” Tángá Yoane 17:3. Fungolá na lokasa ya liboso oyo ezali na maloba ya ebandeli mpe tángá paragrafe ya minei.
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
“Okanisi ete Nzambe alingaki tózala na bomoi oyo etondi na mikakatano lokola oyo tozali na yango lelo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Matai 6:10.] Osilá komituna soki Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza nini?” Fungolá na liteya 6, mpe tángá mituna oyo ezali na ebandeli ya liteya. Bótalela liteya yango to bóyokana mpo na kotalela yango na mbala ya nsima.
“Atako mayele ya bato ekoli, maladi ná liwa ezali se kopesa bato mpasi mpe kotungisa bango. Oyebi oyo Yesu akosala mpo na bato ya maladi, mibange, mpe ata mpo na bato oyo bakufá?” Tiká ye apesa eyano. Soki moto yango alingi kozwa eyano, fungolá na liteya 5, mpe tángá mituna ya paragrafe 5-6. Bótalela baparagrafe yango to bóyokana mpo na kotalela yango na mbala ya nsima.
Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
“Epai wapi okanisi tokoki kozwa lisalisi mpo na kolonga mitungisi ya bomoi? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Baloma 15:4.] Vɛrsɛ oyo emonisi ete Makomami mosantu eteyaka biso, ebɔndisaka biso mpe epesaka biso elikya oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano. Buku oyo ezali kopesa makanisi oyo ekoki kosalisa biso mpo na kozwa matomba ntango tozali kotánga Biblia.” Lobelá polele makambo minei oyo ezali na lokasa 30.
“Banda ntango Yesu azalaki na mabelé, bato mingi babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya. Omituná naino te ntango Bokonzi yango ekoya ekosala nini mpo na bato? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Danyele 2:44.] Buku oyo ezali komonisa soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini, makambo oyo yango ekosalisa mpe ndenge tokoki kozala na boyangeli yango ya sembo.” Lakisá ye elilingi ya nkasa 92-93.