Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/97 lok. 1
  • Makita epusaka na misala malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita epusaka na misala malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Makita mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 9/97 lok. 1

Makita epusaka na misala malamu

1 Losambo na biso ezali na biteni mibale ya ntina: koyangana na makita ya lisangá mpe mosala ya kosakola. Nyonso mibale etambolaka nzela moko mpe ezalaka na bopusi moko likoló na mosusu. Makita mapusaka na misala malamu; nzokande na misala malamu yango nyonso oyo eleki malamu ezali bongo mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli. (Ebe. 10:24) Soki totiki koyangana na makita, nokinoki tokotika mpe kosakola, mpo ete tokopusama na kosakola lisusu te.

2 Na ntango makita masalemaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, tozali kozwa mateya ya elimo oyo ebongisamaki mpo na kopusa biso na kosakola. Mateya yango mazali kokundwela biso ete tozali kobika na eleko ya mpasi, mpe yango ezali kopusa biso na kosakola nsango ya bomoi oyo ezali kati na Biblia. Lisusu, tolendisami mpe tokembisami mpo na kolendendela kati na mosala ya kosakola. (Mat. 24:13, 14) Ezali bongo na kosaleláká mabaku oyo tozali na yango ya kopesa bakomantere na makita nde tokomimesenisa mpo na koyambola kondima na biso liboso ya bato nyonso. (Ebe. 10:23) Mpe ezali bongo na kokomisáká nkombo na biso na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi nde tozali koyekola kokóma baministre oyo babongi mpe kokólisa makoki na biso ya koteya.​​​—2 Tim. 4:2.

3 Lolenge nini makita ya mosala na biso ya bokonzi ezali kopusa biso na kosakola: Mokomoko na biso asengeli kotalela liboso mateya oyo mazali kati na Mosala na biso ya Bokonzi. Na kosaláká bongo yango ekotikala na bɔɔngɔ́ na biso ntango tokotalela mateya yango lisusu na likita ya mosala mpe na ntango bilakiseli bikosalama na ebaelo. Na mosala ya kosakola, tokoki bongo kokanisa lisusu Mosala na biso ya Bokonzi, komikundola bilakiseli mpe, na motindo wana tokopesa litatoli oyo ebongi mpenza. Ezali yango nde basakoli mingi basalaka.

4 Na boumeli ya likita ya mosala, basakoli mosusu bazali koyokana mpo na kosakola esika moko. Makanisi oyo mapesamaki mazali naino na mitó na bango, bapusami mpe balingi komeka kosalela yango mpo ete likita elendisaki bango na kosakola pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.

5 Ezali na eloko moko te oyo ekoki kozwa esika ya makita na biso ya boklisto. Ezali na makita nde baninga na biso mpe biso moko tokoki kozala elongo, mpe ezali na makita nde topusami na misala malamu. Tolingi ete mosala na biso ebota mbuma? Na bongo, tóyanganaka na makita, tósalaka yango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Tómonisa botɔ́ndi na biso epai na Yehova mpo na ebongiseli malamu oyo “na kotikáká koyangana te.”​​​—Ebe. 10:25.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto