Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/09 nk. 6-7
  • Makita mpo na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita mpo na mosala ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Likita ya mosala ya kosakola oyo ekokisaka mokano na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Oyo okoki kosala mpo ozwa matomba na etuluku na bino ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 8/09 nk. 6-7

Makita mpo na mosala ya kosakola

1. Mpo na nini tolingaka ete mosala ya kosakola esalema na molɔngɔ?

1 Yesu apesaki ndakisa malamu na likambo etali kobongisa makambo mpo na kosakola Bokonzi. Lelo oyo mpe, bandeko oyo bazali kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba balingaka ete mosala yango esalema malamumalamu mpe na molɔngɔ. Mpo na yango, masangá ya mokili mobimba esalaka makita mpo na mosala ya kosakola mpo na kokabola basakoli na bituluku liboso bábima na mosala ya kosakola​—Mat. 24:45-47; 25:21; Luka 10:1-7.

2. Makambo nini esengeli kosalema na makita mpo na mosala ya kosakola?

2 Ebongiseli moko malamu: Makita mpo na mosala ya kosakola esalemaka mpo na kolendisa, kopesa malako mpe batoli epai ya bandeko oyo balingi kobima na mosala ya kosakola. Na makita yango, bakoki kotalela mokapo ya mokolo soki makanisi na yango eyokani mpenza na mosala ya kosakola. Na bantango mosusu, bakoki kozongela malako oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi, na buku Comment raisonner, to mpe na buku Eteyelo ya mosala mpo ete bandeko oyo bakobima básala mosala na bango malamu. Bakoki mpe kosala elakiseli mokuse oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa mokanda oyo tokokabola. Liboso ya kosala libondeli ya nsuka, mosakoli mokomoko asengeli koyeba ndeko oyo akobima na ye mpe teritware oyo bakosakola. Nsima ya likita yango oyo ekoki koleka miniti 15 te, basakoli nyonso basengeli kokende nokinoki na bateritware na bango.

3. Banani bazali na mokumba ya kotambwisa makita mpo na mosala ya kosakola?

3 Ebongisami ndenge nini? Mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali na mokumba ya kobongisa makambo nyonso etali makita mpo na mosala ya kosakola. Bakɛngɛli ya bituluku ya mosala ya kosakola to basungi na bango bazali na mokumba ya kobima na bato ya etuluku na bango na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Bakɛngɛli mosusu ya bituluku to basaleli na misala bakoki kobimaka ná bandeko ya bituluku na bango na kati ya pɔsɔ. Bakɛngɛli ya bituluku basengeli kosalaka na boyokani ná mokɛngɛli na mosala ya kosakola mpo bázangaka te bateritware mpo na mosala ya ndako na ndako na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola asengeli kozwa bibongiseli mpo ete bandeko oyo bakokamba bituluku na mosala ya kosakola na kati ya pɔsɔ báyeba ndenge oyo bakosala yango.

4-6. (a) Makita mpo na mosala ya kosakola esengeli kobongisama na mokano nini? (b) Makambo nini esengeli kotalela mpo na koyeba ndenge malamu ya kobongisa makita mpo na mosala ya kosakola?

4 Esengeli kosalema wapi mpe na bangonga nini? Na esika ete basakoli nyonso bákutanaka kaka na esika moko, mbala mingi elekaka malamu makita mpo na mosala ya kosakola esalemaka na bisika ndenge na ndenge, mingimingi na bandako ya bandeko, mpo basakoli bázala na likoki ya kosakola na teritware mobimba ya lisangá. Ndako ya Bokonzi ekoki mpe kosalelama mpo na makita mpo na mosala ya kosakola. Masangá mingi esalaka makita mpo na mosala ya kosakola na Ndako ya Bokonzi nsima ya Lisukulu ya bato nyonso mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Esengeli kozwa bibongiseli mpo ete basakoli bátambolaka ntaka molai te liboso bákóma na teritware oyo bakosakola. Yango wana, esengeli mbala na mbala kotalelaka soki bisika oyo eponamaki ebongi kaka mpo teritware esakolamaka malamu.

5 Ngonga oyo ebongi mpo na makita yango, mbala boni esengeli kosalemaka na kati ya pɔsɔ to na mokolo etaleli ndenge teritware ezali. Bokoki komituna mituna oyo elandi mpo na koyeba epai wapi mpe ntango nini makita mpo na mosala ya kosakola ekoki kosalemaka.

6 Teritware nini tosengeli kotyela likebi mingi? Ngonga nini ebongi mpo na kosakola ndako na ndako na teritware yango? Ebongi nde kopona ngonga moko ya mpokwa mpo na kobima ndako na ndako to kozongela bato oyo basepelaki? Bibongiseli nyonso oyo ezwami mpo na mosala ya kosakola esengeli kotyama na etanda na Ndako ya Bokonzi. Basakoli nyonso ya Bokonzi bazalaka na mposa ya kosakola teritware na bango mobimba mpo báloba lokola ntoma Paulo ete: “Nazali lisusu te na teritware epai mosala esalemi naino te.”​—Lom. 15:23.

7. Ndeko oyo akotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola azali na mokumba nini?

7 Ndenge ya kotambwisa yango: Ndeko oyo akotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola asengeli komibongisa malamu mpo na komonisa ete azali kozwa mokumba yango na lisɛki te. Makita yango esengeli kobanda na ngonga oyo etyami, esengeli kolobela makambo oyo ekosalisa basakoli, mpe esengeli kozala molai te; esengeli koumela miniti 10 to 15. Motambwisi asengeli kozwa bateritware oyo akokabola epai ya basakoli liboso likita mpo na mosala ya kosakola ebanda. Nsima ya kokabola basakoli, ezali na ntina te kozela bandeko oyo bayaka retare; kasi, ezali malamu kotika maloba mpo na koyebisa epai oyo bandeko bakei kosakola. Basakoli nyonso basengeli kokende nokinoki na teritware na bango soki kaka likita esili. Soki likita mpo na mosala ya kosakola ebongisami malamu mpe elobeli makambo ya ntina, basakoli bakozwa malako oyo ekosalisa bango básala mosala malamu mokolo yango.​—Mas. 11:14.

8. Ndenge nini bandeko oyo bayanganaka na makita mpo na mosala ya kosakola basalaka na bomoko na bandeko oyo bazali kotambwisa makita yango?

8 Ntina oyo tosengeli koyanganaka na makita yango: Kosala na bomoko ezali na ntina mingi. (Ebe. 13:17) Ndeko oyo azali kokabola asengeli kosalisa mosakoli nyonso oyo azali na mposa ya moninga azwa moto oyo akoki kobima na ye. Ezali malamu ete basakoli oyo bameseni na mosala báyaka na likita yango mpo na kosalisa bandeko ya sika mpe baoyo bayebi naino koteya malamu te. Bandeko oyo bandimaka kobima ná basakoli ndenge na ndenge bakoki kosalisa bandeko mingi. (Mas. 27:17; Lom. 15:1, 2) Biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo tókómaka na likita yango na ngonga ya malamu. Mposa na biso ya kotosa bibongiseli ya Teokrasi mpe limemya mpo na bandeko na biso esengeli kotinda biso tósala makasi mpo tómesana na ebongiseli yango.​—2 Kol. 6:3, 4; Filp. 2:4.

9. Babongisi-nzela bakoki kosala nini mpo na kopesa mabɔkɔ na makita mpo na mosala ya kosakola?

9 Lisalisi ya babongisi-nzela: Soki babongisi-nzela bazali koya mingi na makita mpo na mosala ya kosakola, ezalaka malamu mingi mpe elendisaka basakoli mosusu. Toyebi ete babongisi-nzela bazalaka na makambo ebele ya kosala. Longola mokumba ya koyekola Biblia na bato mpe kozongela bato oyo basepelaki, basusu bazali batata to bamama ya mabota, bamosusu mpe basalaka. Yango wana, babongisi-nzela basengisami te kozalaka na makita nyonso ya mosala ya kosakola oyo lisangá ebongisi, mingimingi soki makita yango esalemaka mikolo nyonso. Atako bongo, babongisi-nzela basengeli koyaka ata na mwa ndambo ya makita yango pɔsɔ na pɔsɔ. Tokoki koloba ete makita mpo na mosala ya kosakola ezali bisika ya kozwa formasyo, mpe na ndenge yango, molende mpe mayele ya babongisi-nzela ekoki kosalisa basakoli mosusu. Kobima mingi na mosala ya kosakola esalisi bango báyeba koteya malamu. Bakoki kosalisa bandeko mosusu bákóma lokola bango. Molende na bango na mosala ya kosakola mpe na koyangana na makita mpo na mosala ya kosakola ekómisi bango bandakisa oyo basusu bakoki komekola. Bandeko mosusu mpe basepelaka mingi ntango bamonaka bango na makita mpo na mosala ya kosakola.

10. Mpo na nini ebongi ete basakoli nyonso bándima na motema moko kosimba ebongiseli ya makita mpo na mosala ya kosakola?

10 Na ndakisa ya Yesu ná bayekoli na ye, kosakola ndako na ndako ezali lolenge ya libosoliboso oyo tosakolaka Bokonzi. Makita mpo na mosala ya kosakola ebongisami mpo tólendisanaka mpe tókokisa mosala yango malamu. Basakoli nyonso ya nsango malamu basengeli kopesa mabɔkɔ na ebongiseli yango na ndenge oyo makoki na bango ezali kopesa nzela. (Mis. 5:42; 20:20) Tiká ete biso nyonso tóndima na motema mobimba kosimba ebongiseli ya makita mpo na mosala ya kosakola. Soki tozali kosala bongo, Yehova akopambola biso mpe tokosepelisa motema ya Motambwisi na biso Yesu Klisto, mpe tokozala na esengo wana tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.​—Mat. 25:34-40; 28:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto