“Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?”
1 Nsango moko ya kitoko mpenza, ya kolamwisa mayoki mpe ya kobɔndisa ekopesama mosika te na mokili mobimba na nkotá 169. Nsango yango ekolobela nini? Lolenge nini ekosakolama?
2 Ezali nsango na ntina na bolingo mpo na mozalani. Yango ezwami na batrakte Nsango ya Bokonzi No. 35 oyo ezali na motó na likambo ete: “Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?” Nsango yango ya Bokonzi ezali kolobela na mokuse ezalela ya mokili mpe ezali kolimbola ete ebele na bampasi mpe mawa oyo ezali komonana kati na bato euti mpenzampenza na kozanga bolingo kati na bato. Yango ezali mpe komonisa ntina oyo, mingi mpenza na ntango na biso, bolingo mpo na mozalani ekiti mpe ndimbola ya ezalela yango mpo na mikolo mizali koya.
3 Lisusu, Nsango ya Bokonzi No. 35 emonisi ete ezali na bamilió ya bato kati na mokili lelo, oyo bazali komonisa bolingo ya solo mpo na mozalani. Batrakte yango ezali komonisa bato oyo bazali kozongisa boklisto ya ebandeli, elingi koloba losambo oyo ezalaki kosalema na ekeke ya liboso, oyo ebɛtaki nsɛ́tɛ́ likoló na bolingo mpo na mozalani lokola Yesu ateyaki yango.—Luka 10:25-37.
4 Batrakte Nsango ya Bokonzi No. 35 ezali kolimbola na nsuka lolenge oyo bato nyonso ya mokili bakomonisa bolingo mpo na mozalani na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ebɛlɛmi, mpe oyo epesami na mabɔkɔ ya Klisto. Baoyo bakotánga nsango yango babyangami mpe na kozwa mwa búku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mpo na koyeba lolenge ya kozwa litomba na bibongiseli ya bolingo oyo elobelami kati na Liloba ya Nzambe.
5 Nani akopalanganisa nsango yango? Na boumeli ya sanza ya Novɛ́mbɛ mpe ya Desɛ́mbɛ, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bakoyebisa nsango yango etali bolingo mpo na mozalani epai na bayebani na bango, bato bafandi penepene na bango mpe bandeko na bango ya mosuni. Baoyo nyonso bakokisi masɛngami babyangami mpo na kopalanganisa Nsango ya Bokonzi No. 35.
6 Kampanye yango ezali na mokano ya kolamwisa mposa ya bato mpo na boyekoli ya Biblia na lisalisi ya mwa búku Azali kosɛnga to na búku Boyebi. Lisusu, milende oyo mosaleli mokomoko ya Yehova akosala na motema mobimba ekopesa litatoli monene na Nzambe ya bolingo, Yehova, mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto.