Tóyebisa na bazalani na biso Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
1 Libota ezali ebongiseli ya ebandeli ya lisangani nyonso ya bato, eloko oyo ezali kobandisa bamboka mike, bingumba minene, bikólo mpe bamboka minene. Lelo koleka bileko mosusu nyonso, libota ezali kozwa mikakatano ndenge na ndenge. Makambo mingi ya bopusi makasi mazali kútu kokana kobebisa nyɛɛ bomoi ya libota. Oyo nde botɔ́ndi tozali na yango epai na Yehova, Mobandisi ya libota, lokola azali koteya biso mpo ete tózala na bolamu kati na libota! Baoyo bazali kosalela batoli na ye bazali komona ete mikakatano na bango mizali kokita mpe bazali kokóma na bomoko kati na libota. Na Ɔkɔtɔ́bɛ, tozali na esengo ya kokabola búku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Tózwa likatami ya kobanda lisólo elongo na bato na oyo etali bomoi kati na libota. Tózala na ezaleli ya boninga, na elimo ya kolónga mpe tómonisa bososoli. Tokoki koloba nini?
2 Tokoki kotuna motuna lokola oyo:
◼ “Osili komona ete mabota mingi mazali mpenza te kokoka mitungisi ya bomoi? [Tiká ete moto yango ayanola.] Emonani ete bato mingi bazali mpenza kokutana na mikakatano na libota. Mpo na yo, nini ekoki kosunga mabota mpo ete yango ezala na boyokani makasi mpe na esengo koleka? [Tiká ete moto yango ayanola.] Lokola Nzambe azali Mobandisi ya libota, ekozala likambo ya mayele te ete tótalela batoli na ye na ntina na libota? [Tótánga 2 Tim. 3:16, 17.] Toli yango oyo ezali mpo na bolamu na biso ezwami na búku oyo, Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.” Tótuna lisusu na moto yango, mokakatano nini ya libota oyo engebene ye, ezali komonana mingi, tómonisa ye mokapo moko oyo ezali kolobela mokakatano yango mpe tólakisa ye búku.
3 Na bozongeli ya sika, lokola mokano na biso ezali ya kobanda boyekoli ya Biblia, tokoki koloba boye:
◼ “Nakanisaki mingi likoló na makambo oyo oyebisaki ngai na ntina na bomoi ya libota, mpe namemeli yo eloko moko oyo okosepela na yango. [Tólakisa mwa búku Azali kosɛnga, tófungola yango na lokasa 16 mpe tótánga mituna motoba oyo ezali likoló na lokasa.] Ezali likambo lilongobani ete mosangani mokomoko kati na libota asengeli kopesa mabɔkɔ mpo na koyeisa bolamu kati na libota. Soki ozali na mwa ntango, nakolakisa yo lolenge nini okoki kozwa litomba na makambo mayebisami awa.” Tóbanda bongo koyekola liteya 8.
4 Lolenge mosusu ya kobanda lisoló ezali ya kolobela mokakatano moko, na kolobáká mwa likambo lokola oyo:
◼ “Atako moto nyonso alingaka kozala na esengo mpe kosepela na mwa makoki ya ntina, emonani ete mabota mingi mazali kokóma na yango te. Mpo na yo, nini ekoki kosunga mabota yango mpo ete mákóma na bolamu ya solo? [Tótika moto yango ayanola.] Uta kala, Biblia eyebisaki lolenge ya mikakatano oyo mabota makokutana na yango na mikolo na biso. [Tótánga 2 Tim. 3:1-3.] Nzokande, Biblia ezali mpe komonisa na mabota lolenge ya kosala mpo na kosilisa mikakatano na yango mpe kozala na bolamu ya ntango molai. Yango elobelami na búku oyo, Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.” Na nsima, tóbenda likebi ya moto yango na mituna ya bozongeli na nsuka ya mokapo moko oyo ebongi, tótánga yango, mpe tólakisa ye búku.
5 Na bozongeli ya sika, tósalela mwa búku “Azali kosɛnga” mpo na kobanda boyekoli. Tokoki koloba boye:
◼ “Nasepelaki mingi mpo na mposa na yo ya kotalela mitindá ya Biblia oyo mitali bomoi kati na libota. Eksperiansi emonisi ete na kosaleláká batoli ya Biblia, bato mingi bazali kozwa matomba malamu. Talá ntina na yango.” Tótánga paragrafe ya liboso ya liteya 1 kati na mwa búku Azali kosɛnga, mpe tótánga lisusu Nzembo 1:1-3 to Yisaya 48:17, 18. Soki likoki ezali, tótalela liteya mobimba. Tópesa elaka mpo na kozonga kotalela liteya oyo lilandi.
6 Mpo na mikanda na biso: Lokola toyebi ete mikanda na biso ezali na ntina mpenza mpe kobimisama na yango esɛngaka mosolo mingi, tozalaka nde kokakatana mpo na kolakisa bazulunalo, mwa babúku to babúku na bato oyo tozali kokutana na bango? Lolenge nini tokoki komindimisa ete tozali te kotika mikanda epai na bato oyo bazali kosepela na yango te? Mwango moko ezali ya kotuna moto yango soki akoki kondimisa biso ete akotánga mokanda oyo tozali kolakisa ye.
7 Ntango tozali kolakisa búku “Libota,” na ndakisa, tokoki koloba ete:
◼ “Soki olobi na ngai ete okotánga búku oyo, nakotikela yo yango na likabo moke. Ntango mosusu olingi koyeba mpo na nini tosɛngaka likabo moke. Ezali mpo ete mosala na biso esimbami na makabo ya bolingo malamu. Makabo na bino mazali kosunga biso bobele mpo na kozongisa mosolo mobimisami na transport ya mikanda. Nasepeli bongo kotikela yo búku oyo mpamba te ekosunga yo mpo ete oyeba sɛkɛlɛ́ ya solo mpenza ya bolamu na libota, na likabo moke ya . . . [Tóyebisa likabo moke oyo lizali kopesama.]”
8 Tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na koyebisa na bazalani na biso sɛkɛlɛ́ oyo ezali koyeisa bolamu na libota: botosi na malako mazali kati na Liloba ya Nzambe.—Nz. 19:7-10.